< 申命記 2 >

1 以後,我們照上主對我吩咐,的轉向紅海出發,往曠野進行,我們圍著色依爾山地繞行了很久。
Na sima, tobalukaki mpe tokendeki na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo ndenge Yawe atindaki ngai, pamba te tobalukaki mikolo ebele zingazinga ya etuka ya ngomba Seiri.
2 那時上主對我說:「
Yawe alobaki na ngai:
3 你們繞行這山地已夠久了,如今該轉向北方。
« Bowumeli mingi na kobaluka zingazinga ya etuka ya bangomba oyo; sik’oyo bokende na ngambo ya nor.
4 你吩咐人民說:你們要經過你們的兄弟厄撒烏子孫所住的色依爾地區;他們必畏懼你們,但你們卻應小心,
Pesa mitindo oyo epai ya bato: ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele.
5 不要與他們挑戰,因為他們的地,連腳掌那麼大的一塊地,我也沒有給你們,因為我已將色依爾山地給了厄撒烏作產業。
Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye.
6 你們應用錢向他們買糧吃,用錢向他們買水喝。
Bokofuta bango palata mpo na biloko oyo bokolia mpe mpo na mayi oyo bokomela.
7 的確,上主你的天主祝福了你所作的一切,護衛你經過了這遼闊的曠野,這四十年來,上主你的天主常與你同在,使你什麼也不曾缺少。」
Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »
8 於是我們繞過了我們的兄弟厄撒烏的子孫所住的色依爾,沿阿辣巴路到了厄拉特,和厄茲雍革貝爾,然後轉向摩阿布曠野進發。
Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi.
9 那時上主對我說:「不要擾亂摩阿布人,不要與他們挑戰,他們的土地我一點也不會給你作產業,因為我已將阿爾給了羅特子孫作產業。 [
Yawe alobaki na ngai: « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
10 原先住在那裏的,是強大眾多,身材魁偉像阿納克人的厄明民族。
Bato ya Emimi nde bazalaki kovanda kuna na kala. Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe lokola bana ya Anaki.
11 他們像阿納克人一樣,也算是勒法因人,但摩阿布人卻稱他們為厄明人。
Bango mpe bazalaki komonana lokola bato ya Refayimi ndenge moko na bana ya Anaki. Kasi bato ya Moabi bazalaki kobenga bango bato ya Emimi.
12 同樣,在色依爾原先住有曷黎人;但厄撒烏的子孫侵佔了他們的產業,消滅了他們,住在他們境內,就如以色列人對上主賜給他們作產業的土地所做的一樣。]
Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi.
13 你們現在起身,過則勒得溪。」我們就過了則勒得溪。
Yawe alobaki: « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku.
14 從離開卡德士巴爾乃亞到我們過則勒得溪所用的時間,共計三十八年,直到能作戰的那一代,照上主對他們所起的誓,由營中完全消滅。
Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango.
15 實在是上主的手攻擊了他們,使他們由營中完全消滅。
Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako.
16 所有的戰士由民中死盡以後,
Tango bato ya suka kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba basilaki kokufa,
17 上主吩咐我說:「
Yawe alobaki na ngai:
18 你今天路過摩阿布的領土,即阿爾,
« Lelo oyo, okokatisa Moabi mpe Ari.
19 就要面臨阿孟子民;但不要擾亂他們,不要與他們挑戰,阿孟子民的土地我一點也不會給你作產業,因為我已將這地給了羅特子孫作產業。 [
Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
20 這地也算是勒法因人地,勒法因人先前住在那裏,阿孟人稱他們為「匝默組明。」
Mboka yango mpe emonanaki lokola mboka oyo bato ya Refayimi bazalaki kovanda. Kasi bato ya Amoni bazalaki kobenga bato ya Refayimi: bato ya Zamizumi.
21 他們像阿納克人一樣,是強大眾多,身材魁偉的民族;但上主卻由阿孟人面前消滅了他們,使阿孟人佔有他們的產業,住在他們境內,
Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
22 正如上主為住在色依爾的厄撒烏子孫所做的一樣:即由他們面前消滅了曷黎人,使厄撒烏的子孫佔有他們的產業,住在他們的境內,直到今日。
Yawe asalaki mpe ndenge wana mpo na bakitani ya Ezawu oyo bazalaki kovanda na Seiri tango abomaki bato ya Ori liboso na bango. Bakitani ya Ezawu babenganaki bato ya Ori mpe bakomaki kovanda na bisika na bango kino na mokolo ya lelo.
23 同樣,阿威人原先住在迦薩附近各村莊內,有加非托爾人由加非托爾來,將他們消滅,住在他們境內。]
Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
24 你們起身出發,過阿爾農河。看,我已將阿摩黎人赫市朋王息紅和他的土地交在你手中;進軍佔領,與他交戰。
Yawe alobaki: « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.
25 從今日起,我要使天下萬民在你面前驚慌害怕,使他們一聽見你的消息就戰慄;一看見你的面目就發抖。」
Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. »
26 我於是由刻德摩特曠野,派遣使者到赫市朋王息紅那裏,和平談判說:
Wuta na esobe ya Kedemoti, natindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, na maloba ya kimia.
27 讓我從你國內經過,我只走大道,不偏右也不偏左。
Nalobaki: « Tobondeli yo, tika biso tolekela na mokili na yo. Tokoleka kaka na nzela ya monene, tokobaluka te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to ya mobali.
28 你按價錢賣給我糧吃,按價錢供給我水喝;只讓我步行過去,──
Okotekela biso biloko ya kolia mpe mayi ya komela na motuya ya palata. Kasi tika biso kaka toleka na makolo
29 如住在色依爾的厄撒烏子孫和住在阿爾的摩阿布人,對我所做的一樣,──好使我過約但河,進入上主我們的天主賜給我們的地方。
ndenge bakitani ya Ezawu, oyo bavandaka na mokili ya Seiri, mpe bato ya Moabi, oyo bavandaka na Ari, basalelaki biso kino tokatisaki Yordani mpe tokotaki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. »
30 但是赫市朋王息紅,不肯讓我們從他那裏經過,因為上主你的天主使他頑固,使他心硬,好將他交在你手中,就如今日一樣。
Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.
31 上主對我說:看我已將息紅和他的土地交給了你,你應進軍佔領他的土地。」
Bongo Yawe alobaki na ngai: « Tala, nabandi kokaba na maboko na bino Sikoni mpe mokili na ye. Banda kobotola yango mpe kamata yango. »
32 那時息紅和他所有的民眾出來攻擊我們,在雅哈茲與我們交戰;
Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi,
33 但上主我們的天主將他交給了我們,我們擊殺了他,他的兒子和他所有的人民。
Yawe, Nzambe na biso, akabaki ye na maboko na biso mpe tobomaki ye, bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso.
34 同時我們也佔領了他所有的城邑,照毀滅律將全城破壞,不論男女或幼童,全都殺死,沒有留下一個,
Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso; totikaki ata moto moko te.
35 只留下了牲畜和由佔領的城邑中所奪的財物,作我們的戰利品。
Kasi tomemaki mpo na biso: bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tokutaki na bingumba na bango.
36 由阿爾農谷邊的阿洛厄爾和谷中的城直到基肋阿得,沒有一座城不被我們攻下的,上主我們的天主將這一切全交給了我們,
Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.
37 只有阿孟子孫的土地,即雅波克河一帶和山地的城邑,你沒有進攻,全照上主我們的天主所吩咐的。
Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso.

< 申命記 2 >