< 申命記 18 >

1 肋未人司祭即全肋未支派,在以色列中沒有分子和產業,他們靠獻與上主的火祭祭品,和他們應得的一分維持生活。
Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi, elongo na libota mobimba ya Balevi basengeli te kozwa eteni ya mabele to libula kati na Isalaele; basengeli kobika kaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe mpe na libula na Ye, pamba te yango nde ezali libula na bango.
2 他在兄弟中間沒有產業;照上主向他所說的,上主自己要作他們的產業。
Basengeli te kozala na libula kati na bandeko na bango; Yawe nde azali libula na bango ndenge alakaki bango.
3 這是司祭由人民應得的一份,就是宰殺牛羊作祭獻的人,應將前腿、兩腮和胃臟給司祭;
Tala eteni oyo Banganga-Nzambe basengeli kozwa epai na bato oyo bakobonza ngombe to meme lokola mbeka: lipeka, mbanga mpe biloko ya kati. Okopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala.
4 初收的五穀、酒、油和初剪的羊毛,亦應給他,
Okopesa ye bambuma na yo ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta mpe bapwale nyonso ya liboso oyo okolongola na bameme na yo;
5 因為上主你的天主由各支派中揀選了他,叫他和他的子孫,時時以上主的名義服役供職。
pamba te Yawe, Nzambe na yo, aponi ye elongo na bakitani na ye kati na bikolo na yo nyonso mpo na kotelema mpe kosala tango nyonso mosala na Kombo na Yawe kati na Tempelo.
6 如果一個住在以色列境內任何城鎮的肋未人,離開了本地,一心一意地要到上主所選的地方去,
Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona;
7 他可因上主的名義供職,如同在那裏侍立於上主面前的肋未弟兄們一樣,
asengeli kosala na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ndenge bandeko na ye nyonso Balevi bazali kosala kuna na miso ya Yawe.
8 分享同樣的口糧,不必變賣祖產。
Akozwa eteni ya ndenge moko na bango na oyo etali biloko ya kolia, bakisa mbongo oyo akozwa tango bakoteka biloko ya libota.
9 幾時你進入了上主你的天主賜給你的土地,不要仿傚那些異民做可憎惡的事。
Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo, okomekola te misala ya mbindo ya bikolo oyo ezali kuna.
10 在你中間,不可容許人使自己的兒子或女兒經過火,也不可容許人占卜、算卦、行妖術或魔術;
Moto moko te kati na yo akobonza na moto mwana na ye ya mobali to ya mwasi epai ya moto oyo asalelaka soloka, kindoki, oyo atalaka minzoto mpo na kosakola makambo, oyo asalelaka maji
11 或念咒、問鬼、算命和求問死者;
to moto oyo asalelaka makambo ya nkuku to moto oyo atunaka milimo to nganga-kisi to moto oyo asololaka na bakufi.
12 因為凡做這些事的人,都是上主所憎惡的;其實就是為了這些可憎惡的事,上主你的天主纔把他們由你面前趕走。
Moto nyonso oyo asalaka makambo oyo, azali mbindo na miso ya Yawe; mpe ezali mpo na makambo nyonso oyo ya nkele nde Yawe, Nzambe na bino, akobengana bikolo wana liboso na bino.
13 你應一心一意屬於上主你的天主。
Bosengeli kozala bato bazangi pamela liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
14 你要趕走的這些民族,聽信了算卦和占卜的人;但上主你的天主為你卻不是這樣安排;
Bikolo oyo bokobotola ezali bikolo oyo elandaka bato wana, esalelaka kindoki mpe soloka. Kasi mpo na bino, Yawe, Nzambe na bino, akoki te kopesa bino nzela ya kosala bongo.
15 上主你的天主,要由你中間,由你兄弟中,為你興起一位像我一樣的先知,你們應聽信他。
Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino; bosengeli koyoka ye.
16 正如你在曷勒布集會之日,求上主你的天主說:「惟願我再不聽見上主我的天主的聲音,再不看見這烈火,免得我死亡。」
Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki: « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. »
17 上主遂對我說:「他們說得有理,
Yawe alobaki na ngai: « Makambo oyo balobi ezali malamu.
18 我要由他們的兄弟中,給他們興起一位像你一樣的先知,我要將我的話放在他口中,他要向他們講述我所吩咐他的一切。
Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.
19 若有人不聽信他因我的名所說的話,我要親自同他算賬。
Soki moto aboyi koyoka maloba na Ngai, oyo mosakoli yango akoloba na Kombo na Ngai, Ngai moko nakopesa ye etumbu.
20 但是,若一位先知擅敢因我的名說我沒有吩咐他說的話,或因其他神的名說話,這位先知應該處死。」
Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.
21 也許你心裏想:「我們怎能知道上主未曾說過這話﹖」
Tango mosusu bokoki komituna: ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te? ›
22 幾時一位先知因上主之名說話,若他的話不實現,不應驗,這話就不是上主說的,是先知擅自說的,你不用怕他。
Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »

< 申命記 18 >