< 但以理書 8 >

1 貝爾沙匝王在位第三年,在以前顯現給我的異象之後,又有異象顯現給我達尼爾。
Na mobu ya misato ya bokonzi ya mokonzi Balitazari, ngai, Daniele, nazwaki emoniseli moko ya sika, sima na oyo nazwaki liboso.
2 我觀看這異象;我觀看時,恍惚見我在厄藍省的穌撒禁城;在神視中,我恍惚見我在烏來河畔。
Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.
3 我舉目仰視,看見有一隻公綿羊站在河畔,牠有兩隻角,這兩隻角都很高,但一隻角卻高於另一隻角,且那較高的是較晚長出來的。
Natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki, liboso na ngai, meme moko ya mobali etelemi pembeni ya moluka; ezalaki na maseke mibale ya milayi makasi, kasi moko kati na maseke yango, oyo ebotaki sima, elekaki mosusu na molayi.
4 我見那隻公綿羊向西、向北、向南牴撞,走獸中沒有能抵禦牠,能擺脫牠勢力的;牠任意行事,自高自大。
Bongo, namonaki meme ya mobali ezali kobeta na ngambo ya weste, ya nor mpe na sude. Nyama moko te ekokaki kobundisa yango mpe moto moko te akokaki kokangola soki ekangi yango. Ezalaki kosala nyonso oyo yango elingi mpe ezalaki kokola.
5 我定睛注視之時,看見有一隻公山羊由西而來,跑遍天下而腳不著地;這隻公山羊在兩眼之間,有一隻顯著的角。
Wana nazalaki kokanisa na tina na yango, ntaba moko ya mobali eyaki wuta na ngambo ya weste; ezalaki kotambola mabele mobimba na kozanga konyata yango. Ntaba yango ya mobali ezalaki na liseke moko ya monene na kati-kati ya miso na yango;
6 牠來到我所見立在河畔而有兩隻角的公綿羊那裏,就憤怒地猛力向牠衝去。
eyaki kino epai ya meme ya mobali oyo namonaki etelemi pembeni ya moluka mpe ezalaki na maseke mibale; ebetaki yango makasi, na maseki te.
7 我見牠走近公綿羊前憤怒地觝撞牠,將牠的雙角撞斷,那公綿羊就再無力抵抗,公山羊把牠擊倒在地,用腳踐踏,竟沒有誰能救公綿羊擺脫牠的勢力。
Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana.
8 後來這公山羊長的極其強大;正當牠極強大的時候,牠那隻高大的角被折斷了,代替這角而生出來的是四隻卓絕的角,向著天下四方:
Ntaba ya mobali ekolaki makasi; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.
9 其中之一又生出一小角來,長得極其高大,向南、向東,亦向著光華之地。
Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko.
10 這角逐漸增高,直達天上的萬象,且把一些天象和星宿打落在地,加以蹂躪。
Ekolaki lisusu kino na mampinga ya likolo, ebwakaki na mabele ndambo ya mampinga yango mpe ndambo ya minzoto, mpe enyataki yango.
11 他又自高自大,直達天象之君,取消了他的日常祭,破壞了他的聖所,且加以劫掠;
Emitombolaki kino kotia tembe na Mokonzi ya mampinga, elongolaki mbeka ya mokolo na mokolo na losambo mpe ebebisaki Esika na Ye ya bule elongo na miboko na yango.
12 又在獻日常祭處,安放了罪孽,將真理拋棄於地;他如此作了,也成功了。
Likolo ya botomboki ya bato liboso ya Nzambe, mampinga ya likolo ekomaki na se ya bokonzi ya liseke elongo na mbeka ya mokolo na mokolo. Liseke yango ezalaki kolonga na makambo nyonso oyo ezalaki kosala mpe ebwakaki solo na mabele.
13 我聽見一位聖者在說話,另一位聖者問那說話的說:「關於廢除日常祭,招致毀滅的罪孽,聖所和天軍遭蹂躪的異象,要延長到何時呢﹖」
Nayokaki mosantu moko koloba, mpe mosantu mosusu kotuna ye: — Makambo oyo etalisami na emoniseli ekosala mikolo boni? Mbeka ya mokolo na mokolo ekopesama lisusu te mikolo boni? Botomboki oyo ememaka pasi ekosala mikolo boni? Mikolo boni Esika ya bule mpe mampinga ekotiama na se ya matambe?
14 那說話的回答他說:「要延長二千三百晝夜,以後聖所再要恢復原狀。」
Alobaki na ngai: — Ekosalema bapokwa nkoto moko na nkama moko na tuku mitano mpe batongo nkoto moko na nkama moko na tuku mitano; sima na yango nde Esika ya bule ekobulisama lisusu mpo na losambo.
15 我達尼爾見了這異象之後,便渴望明瞭其中的意義;看見有一個外貌像人的立在我面前,
Wana ngai, Daniele, nazalaki komona emoniseli yango na makanisi mpe koluka kososola yango, namonaki lokola moto moko atelemi liboso na ngai.
16 同時我聽見在烏來河中間有人的聲音呼喊說:「加俾額爾! 給這人解說這異象罷! 」
Nayokaki mongongo moko lokola ya moto wuta na kati-kati ya moluka Ulayi; ezalaki kobelela: — Gabrieli, limbolela moto oyo emoniseli.
17 他便向我站立的地方走來;我見他來近,就害怕起來,俯伏在地;他對我說:「人子,你要明白! 這異象是關於末世時期的。」
Lokola azalaki kopusana pene ya esika oyo nazalaki, nakomaki na somo mpe nakweyaki elongi kino na mabele. Alobaki na ngai: — Mwana na moto, sosola malamu ete emoniseli oyo etali makambo ya suka ya tango.
18 他與我說話時,我就昏迷過去了,臉伏於地上;他撫摸了我,使我起來,站在原處。
Wana azalaki koloba na ngai, nakomaki na pongi moko ya makasi, mpe nakweyaki elongi kino na mabele; kasi asimbaki ngai mpe atelemisaki ngai, kaka na esika oyo nazalaki.
19 他說:「看,我要把在盛怒末期將要發生的事告訴你,因為這事是關於末期的。
Bongo, alobaki na ngai: — Nakoyebisa yo makambo oyo ekosalema na sima na tango ya kanda ya Nzambe, pamba te emoniseli oyo etali tango oyo ekatama mpo na mikolo ya suka.
20 你所見具有兩角的公綿羊是瑪待和波斯君王,
Maseke mibale ya meme ya mobali oyo omonaki ezali kolakisa bakonzi ya Medi mpe ya Persi.
21 多毛的公山羊是雅汪君王,牠兩眼之間高大的角是第一位君王,
Ntaba mobali ya bapwale ebele ezali mokonzi ya Grese, mpe liseke monene oyo ezali na kati-kati ya miso na yango ezali mokonzi ya liboso.
22 代替被折斷的腳而另生出的四隻角,是指由他的民族中崛起的四個王國,但沒有前一個那樣強盛。
Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango: ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te.
23 在他們王國的末期,惡貫滿盈之時,要興起一位面貌凶惡,詭計多端的君王。
Na suka ya bokonzi na yango, tango batomboki bakokolisa mabe na bango kino na suka, mokonzi moko ya motema makasi mpe ya mayele mabe akobima;
24 他必勢力強大,但那力量不是出於自己;他卻有驚人的破壞力,他所行的無不成功,要摧毀強有力者和聖民,
akokoma makasi koleka, kasi na nguya na ye moko te. Akobebisa mokili na ndenge ya kokamwa mpe akolonga na makambo nyonso oyo akosala; akoboma bato ya makasi mpe basantu.
25 憑自己的機智必攻擊聖民,靠自己的權術獲得成功;他心中妄自尊大,趁人不備而毀滅許多人民,且起而攻擊萬君之君,但終於未經人手而自趨崩潰。
Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te.
26 關於所說的晝夜數目的異象,是真實的,但你對這異象要保守秘密,因為是關於遙遠日期的事而說的。」
Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.
27 我達尼爾疲憊患病數日,然後纔起來處理君王的政務。我對這異象仍驚奇不已,因我不能明白其中的意義。
Ngai, Daniele, nalembaki penza nzoto mpe nabelaki mikolo ebele. Sima na yango, natelemaki mpe nazongelaki kolandela misala ya mokonzi. Emoniseli oyo nazwaki ekamwisaki ngai mpe nazalaki kososola yango te.

< 但以理書 8 >