< 阿摩司書 1 >

1 亞毛斯的言論:亞毛斯原是特科亞的一個牧人,在猶大王烏齊亞時代和以色列王耶曷阿士的兒子雅洛貝罕時代,地震前二年,見了關於以色列的神視。
Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.
2 他說:「上主由熙雍一怒吼,從耶路撒冷一出聲,牧場即淒涼,加爾默耳山頂即乾枯。」
Alobaki: Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.
3 上主這樣說:「為了大馬士革再三再四犯罪,我不收回成命,因為他們用鐵棍壓榨了基肋阿得。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.
4 我必把火投於阿匝耳家,燒毀本哈達得的王宮。
Nakotia moto na ndako ya mokonzi Azaeli, mpe moto yango ekozikisa bandako ya mokonzi Beni-Adadi, oyo batonga makasi.
5 我必打斷大馬士革的門閂,消滅彼卡特阿文的居民和貝特厄登的掌權者;阿蘭人民必被擄往克爾──上主說。
Nakobuka ekuke ya Damasi, nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni, mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni; mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, » elobi Yawe.
6 上主這樣說:「為了迦薩再三再四犯罪,我不收回成命,因為他們將戰俘全部擄去,賣給厄東。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu mpe batekaki bango na Edomi.
7 我必把火投在迦薩城牆上,燒盡她的王宮。
Nakotia moto na bamir ya Gaza, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi.
8 我必消滅阿市多得的固民和阿市刻隆的掌權者,伸手打攻擊厄刻龍,培肋舍特的殘餘必要滅亡」──吾主上主說。
Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni. Nakobalukela engumba Ekroni kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, » elobi Nkolo Yawe.
9 上主這樣說:「為了提洛再三再四犯罪,我不收回成命,因他們將戰俘全都賣給了厄東,毫不念兄弟的盟約。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.
10 我必把火投在提洛的城牆上,燒盡她的王宮。」
Nakotia moto na bamir ya engumba Tiri, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi. »
11 上主這樣說:「為了厄東再三再四犯罪,我不收回成命,因為他們持刀追擊自己的兄弟,毫無憐憫,常存怒氣,永懷憤怒。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.
12 我必把火投於特曼,燒盡波責辣的王宮。」
Nakotia moto na engumba Temani, mpe moto yango ekozikisa bandako ya Botsira, oyo batonga makasi. »
13 上主這樣說:「為了阿孟子民再三再四犯罪,我不收回成命,因為他們剖開基肋阿得的孕婦,為擴展的疆土。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.
14 在作戰之日的吶喊中,在風雨的狂暴中,我必在辣巴的城牆上放火,燒盡她的王宮。
Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.
15 他們的君王和君王的官吏必一起被擄去」──上主說。
Mokonzi na bango akokende na bowumbu, ye elongo na bakalaka na ye, » elobi Yawe.

< 阿摩司書 1 >