< 撒母耳記下 5 >

1 以色列各支派聚集到赫貝龍,來見達味說:「看,我們都是你的骨肉。
Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki: « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko.
2 以前,連撒烏耳當我們的君王時,也是你率領以色列出入征討;上主曾對你說過:你應牧養我的百姓以色列,作以色列的領袖。」
Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo: ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
3 隨後,以色列所有的長老都到赫貝龍來見君王,達味君王就在赫貝龍,當上主的面同他們立了盟約;他們便給達味傅油,立他為以色列王。
Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.
4 達味登極時已三十歲,做王四十年;
Davidi azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei:
5 在赫貝龍做猶大王,七年零六個月;在耶路撒冷做全以色列和猶大王三十三年。
mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi.
6 以後,達味和他的人向耶路撒冷進發,攻打住在那地方的耶步斯人,有人告訴達味說:「你決攻不進去,因為瞎眼瘸腿的也會把你趕走。」這是說:「達味決攻不進去。」
Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi: « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. » Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te.
7 但是達味卻佔領了熙雍山堡,即達味城。
Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.
8 那日達味宣佈說:「凡攻打耶步斯人,從水道首先到達味所惱恨的那些瘸腿瞎眼的人那裏的,他要升為軍長和元帥。」責魯雅的兒子約阿布首先上去了,因而成了元帥。但為此有句俗語說:「有瞎眼瘸腿的在此,人是進不去的! 」
Na mokolo wana, Davidi alobaki: « Moto nyonso oyo alingi kobundisa bato ya Yebusi asengeli kozwa nzela ya se ya mabele mpo na kokanga bato ya tengu-tengu mpe bakufi miso oyo bazali banguna ya Davidi. » Yango wana balobaka: « Bakufi miso mpe bato ya tengu-tengu bakokota te na ndako ya mokonzi. »
9 達味住在那山堡內,稱之為達味城。達味又從米羅往裏,四周加建了城牆。
Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati.
10 達味日漸強盛,上主萬軍的天主與他同在。
Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, azalaki elongo na ye.
11 提洛王希蘭派使臣來見達味,給他送來了香柏木,派來了木匠石匠,為他建造宮室。
Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga; mpe batongelaki Davidi ndako.
12 那時,達味知道上主已堅定他為以色列王,並為了自己的百姓以色列,提高了他的王位。
Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye.
13 達味從赫貝龍遷來以後,在耶路撒冷又娶了妻妾,生了一些子女。
Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
14 他在耶路撒冷所生兒子的名字如下:沙慕亞、芍巴布、納堂、撒羅滿、
Tala bakombo ya bana ya Davidi oyo babotamaki na Yelusalemi: Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo,
15 依貝哈爾、厄里叔亞、乃費格、雅非亞、
Yibari, Elishuwa, Nefegi, Yafia,
16 厄里沙瑪、厄肋雅達和厄里培肋特。
Elishama, Eliyada mpe Elifeleti.
17 培肋舍特人聽說:達味受傅作了以色列王,遂都上來向達味尋釁;達味一聽說,便下到堡壘中。
Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, akendeki na ndako oyo batonga makasi.
18 培肋舍特人來到後,散布在勒法因平原內。
Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi.
19 那時達味求問上主說:「我可以上去攻打培肋舍特人嗎﹖你將他們交在我手中嗎﹖」上主回答達味說:「你上去,我必將培肋舍特人交在你手中。」
Davidi atunaki Yawe: — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia? Okokaba bango solo na maboko na ngai? Yawe azongiselaki ye: — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
20 達味於是來到巴耳培辣親,在那裏擊敗了他們。達味因此說:「上主使我的敵人在我面前崩潰,如水破堤。」為此,後人稱這地方為巴耳培辣親。
Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki: « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.
21 培肋舍特人把自己的神像都遺棄在那裏,達味和他的人便將這些神像都帶走了。
Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango.
22 培肋舍特人又上來,散布在勒法因平原內。
Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi.
23 達味又求問上主,上主說:「不要上去,但要繞到他們後方,從桑林那邊抄他們的後路。
Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye: « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.
24 當你聽到桑樹梢上有腳步聲時,你就趕快行動,因為那時正是上主在你前面出擊培肋舍特人的軍隊。」
Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
25 達味就照上主所命的行了,擊殺培肋舍特人,從基貝紅直到革則爾。
Davidi asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Geba kino na Gezeri.

< 撒母耳記下 5 >