< 撒母耳記下 4 >

1 撒烏耳的兒子依市巴耳,一聽見阿貝乃爾死在赫貝龍,就慌了手腳,全以色列大驚。
Tango Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, ayokaki ete Abineri akufi na Ebron, alembaki nzoto, mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na somo makasi.
2 撒烏耳的兒子依市巴耳有兩個土匪頭目:一個名叫巴阿納,一個名叫勒加布,是本雅明子孫貝洛特人黎孟的兒子,──貝洛特被認為是本雅明族,
Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga: moko, kombo na ye ezalaki « Baana; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame,
3 因為貝洛特人逃到了基塔殷,僑居在那裏,直到今日。
pamba te bato ya Beyeroti bakimelaki na Gitayimi mpe bavandaki kuna lokola bapaya kino na mokolo ya lelo.
4 撒烏耳的兒子約納堂有個兒子雙足跛了,當撒烏耳與約納堂的凶信由依次勒耳傳來時,他只有五歲,他的乳母帶他逃跑,在慌張逃跑中,他跌瘸了腿;他名叫默黎巴耳。
Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »
5 貝洛特人黎孟的兒子勒加布和巴阿納出去,正當中午炎熱的時候,到了依市巴耳家裏,他正在床上睡午覺。
Rekabi mpe Baana, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, bakendeki na ndako ya Ishi-Bosheti mpe bakomaki kuna na ngonga ya midi, wana azalaki kolala mpo na kopema.
6 看門的女僕在篩麥子,也打盹睡著了。此時勒加布和他兄弟巴阿納溜進去,
Bakotaki kati na ndako lokola nde bakei kozwa ble, wana Ishi-Bosheti azalaki ya kolala na mbeto na ye kati na shambre, batubaki ye mbeli na libumu, babomaki ye mpe bakataki ye moto; bongo bazwaki moto yango, bakimaki mpe batambolaki na yango butu mobimba na nzela oyo ekenda na etando ya Araba. Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bakimaki.
7 到了屋內,見依市巴耳正睡在臥室的床上,便將他打死,砍下他的頭,帶著頭,在阿辣巴的大路上走了一夜。
8 他們帶著依市巴耳的頭,到了赫貝龍見達味王說:「大王的仇人撒烏耳常謀害你的性命;看,他兒子依市巴耳的頭;上主今天為我主向撒烏耳和他的後代報了仇。」
Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi: — Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye.
9 但是,達味答覆貝洛特人黎孟的兒子勒加布和他兄弟巴阿納說:「我指著那救我脫離了一切患難的永生上主起誓:
Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti: — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso
10 那告訴我說:撒烏耳死了的,自以為是報喜信,我卻拿住他,在漆刻拉格殺了,作為他報信的賞報;
tango moto moko ayebisaki ngai ete Saulo akufi, wana akanisaki ete amemeli ngai sango malamu. Nakangaki ye mpe nabomaki ye, na Tsikilagi. Ezalaki lifuti oyo napesaki ye mpo na sango na ye.
11 那麼,現在這些匪徒,偷進人屋,殺了睡在床上的義人,我豈不更該從你們手中追討他的血債,將你們由地上剷除﹖」
Bongo sik’oyo, tango bato mabe babomi moto oyo ayebi na ye likambo te kati na ndako na ye moko mpe na mbeto na ye moko, nasengeli te kosenga makila na ye na maboko na bino mpe kolimwisa bino na mokili?
12 達味遂命自己的僮僕,殺了他們,砍去他們的手足,掛在赫貝龍的池旁;至於依市巴耳的頭,叫人拿去葬在赫貝龍,阿貝乃爾的墳墓內。
Boye Davidi apesaki mitindo; mpe bato na ye babomaki bango, bakataki bango maboko mpe makolo mpe badiembikaki bango pembeni ya liziba ya Ebron. Bazwaki moto ya Ishi-Bosheti mpe bakundaki yango kati na kunda ya Abineri, na Ebron.

< 撒母耳記下 4 >