< 撒母耳記下 23 >

1 達味的最後遺言如下:葉的兒子達味的神諭,至高者所舉揚的人,雅各伯的天主的受傅者,以色列的善歌詠者的神諭:
Tala maloba ya suka ya Davidi: Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele:
2 上主的神藉著我說話,的話語在我的唇舌上。
« Molimo na Yawe alobi na nzela na ngai, atie maloba na Ye na monoko na ngai.
3 雅各伯的天主說過,以色列的磐石曾向我說:那以正義統治人的,那以敬畏天主之情統治人的,
Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai: ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,
4 有如日出時的晨光,無雲的黎明,雨後射在綠草地上的光輝。
azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
5 的確,我的家必屹立在天主前,因為衪與我結了永久的盟約,妥善而有保證的盟約,衪豈能不給我產生救恩和喜樂。
Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, mpe oyo Ye moko abatelaka? Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga mpe akokisaki posa ya motema na ngai.
6 但匪徒敗類必像被拋棄的荊棘,誰也不敢去用手拿;
Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube oyo babwakaka mosika; basimbaka yango te na maboko pamba.
7 誰若去觸動,必用刀或槍柄打伐,而後用火燒盡」。
Moto oyo alingi kosimba yango asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga; batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »
8 以下是達味勇將的名單:哈革摩尼人依市巴耳是三傑之首,他一次揮矛擊殺了八百人。
Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi: Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni: azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko.
9 其次為阿曷亞人多多的兒子厄肋阿匝爾,也是三傑之一。有一次他同達味在帕斯達明,當培肋舍特人正在那裏集合準備交戰時,以色列人退卻,
Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi: azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba.
10 他卻固守陣地,擊殺培肋舍特人,直到他的手麻痺無力,貼在刀柄上。上主在那一天使他大獲勝利,民眾折回,在他身後專奪財物。
Kasi ye ayikaki mpiko kati na bitumba mpe abomaki bato ya Filisitia kino alembaki, mpe loboko na ye etikaki mopanga te. Yawe apesaki bango elonga monene na mokolo wana. Mampinga bazongaki epai ya Eleazari kaka mpo na kokamata biloko ya bato oyo bakufaki.
11 再其次是哈辣黎人厄拉的兒子沙瑪。那時,培肋舍特人在肋希集合;在口有一塊長滿扁豆的田地。當民眾由培肋舍特心面前逃走時,
Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango.
12 他獨自立在田間,保護了那塊田地,殺敗了培肋舍特人:如上主又使他大獲勝利。
Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
13 在開始收割時,培肋舍特的軍隊在勒法因平原紮了營,三十勇士中,有三位下到阿杜藍山岩,來見達味。
Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.
14 達味恰在山岩內,而培肋舍特人當時在白冷駐防。
Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi.
15 達味渴望著說:「誰能為白冷城門旁的井中,給我打一點水來喝﹖」
Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki: « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela? »
16 那三位勇士就衝過培肋舍特人的營幕,從白冷城門旁的井裏打了水,將水取來,帶到達味前,但他不肯喝,反而將水奠於上主前,
Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
17 說:「上主決不許我做這事;我豈能喝那些冒生命危險者的血﹖」所以他不止喝。這是這三位勇士的事。
Alobaki: « Tika ete Yawe apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo, pamba te ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende kokufa mpo na ngai. » Boye, Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
18 責魯雅兒子,約阿布的兄弟,阿彼瑟是三十勇士的領袖,他揮舞長矛擊殺了三百人,因此,在三十勇士中出了名。
Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
19 他是三十勇士中最出名的,所以做了他們的領袖,但尚不及前三傑。
Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
20 約雅達的兒子貝納雅原是卡貝責耳人,是一位英勇,大有作為的人。他擊殺了摩阿布人阿黎耳的兩個兒子,又在下雪天,下到旱井裏打死一隻獅子。
Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa: abomaki bilombe mibale ya Moabi; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
21 他也曾打死了一個埃及大漢。這埃及人手中拿著長矛,他只拿著一棍子,就下去與他對抗,從那埃及人手裏把長矛奪過來,用那長矛將他殺死。
Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
22 這是約雅達的兒子貝納雅做的事,因此,他在三十勇士中也出了名。
Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale.
23 他比三十勇士更有名望,但尚不及前三傑。達味派他作侍衛長。
Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
24 約雅布的兄弟阿撒耳也是三十勇士中的一位,還有白冷人多多的兒子厄耳哈難,
Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na: Asaeli, ndeko mobali ya Joabi; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi;
25 哈洛得人沙瑪,哈洛得人厄里卡,
Shama mpe Elika, bato ya Arodi;
26 帕耳提人赫肋茲,特科亞人依刻士兒子依辣,
Eletsi, moto ya Peleti; Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa;
27 阿納托特人阿彼厄則爾,胡沙人息貝開,
Abiezeri, moto ya Anatoti; Mebunayi, moto ya Usha;
28 阿曷亞人匝耳孟,乃托法人瑪哈賴,
Tsalimoni, moto ya Aoyi; Maarayi, moto ya Netofa;
29 乃托法人巴托阿納兒子赫肋得,本雅明族基貝亞人黎拜的兒子依泰,
Elebi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa; Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame;
30 丕辣通人貝納雅,加阿士溪人希待,
Benaya, moto ya Piratoni; Idayi, moto ya mabwaku ya Gashi;
31 貝特阿辣巴人阿彼巴耳,巴胡陵人阿次瑪委特,
Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba; Azimaveti, moto ya Baarumi;
32 沙耳賓人厄里亞巴,基宗人雅笙,
Eliaba, moto ya Shaaliboni; Bana mibali ya Yasheni; Jonatan,
33 哈辣黎人沙瑪的兒子約納堂,哈辣黎人沙辣爾的兒子阿希揚,
Shama, moto ya Arari; Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari;
34 貝特瑪阿加人阿哈斯拜的兒子厄里培肋特,基羅人阿希托費的兒子厄里安,
Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo;
35 加爾默耳人赫茲賴,阿辣布人帕阿賴,
Etsirayi, moto ya Karimeli; Paarayi, moto ya Arabi;
36 祚巴人約堂的兒子依加耳,加得人巴尼,
Yigali, mwana mobali ya Natan, moto ya Tsoba; Bani, moto ya Gadi;
37 阿孟人責肋克,貝厄洛特人納赫賴,他是責魯貝的兒子約阿布的持戟者;
Tseleki, moto ya Amoni; Naarayi, moto ya Beyeroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya;
38 雅提爾人依辣,雅提爾人加勒布,
Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri;
39 赫特人烏黎雅:共計三十七人。
mpe Iri, moto ya Iti. Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo.

< 撒母耳記下 23 >