< 列王紀下 12 >

1 他在耶胡第七年即位為王,在耶路撒冷作王凡四十年。他的母親名叫漆彼雅,是貝耳舍巴人。
Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.
2 約阿士在司祭約雅達教導他期間,行了上主視為正義的事,
Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye.
3 只是沒有廢除高丘,人民仍在高丘上焚香獻祭。
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
4 約阿士對司祭說:「凡人向上主的殿繳納作獻儀錢,不論是人丁贖金,或樂意捐獻於上主殿中的錢,
Joasi alobaki na Banganga-Nzambe: « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe: mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo.
5 司祭們都可以接收,每人也可向相識的人去勸捐;但司祭們應該修理聖殿需要修理的破壞之處。」
Tika ete Nganga-Nzambe moko na moko akamata mbongo na maboko ya babombi mbongo mpe basalela yango mpo na kobongisa eloko nyonso oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe. »
6 但是,直到約阿士王第二十三年,司祭尚未修理聖殿的破壞之處。
Kasi tango mokonzi Joasi akokisaki mibu pene tuku mibale na misato na bokonzi, Banganga-Nzambe babongisaki nanu Ndako ya Nzambe te.
7 於是約阿士王將約雅達大司祭和其他司祭召來,問他們說:「你們為什麼不修理聖殿破壞之處﹖現在你們不要再向相識的人收錢了;應把所有的錢交出,用來修理聖殿的破壞之處。」
Boye, mokonzi Joasi abengisaki Nganga-Nzambe Yeoyada mpe Banganga-Nzambe mosusu. Atunaki bango: « Mpo na nini bozali kobongisa te biloko oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe? Sik’oyo, bokozwa lisusu mbongo te na maboko ya babombi mbongo na bino, kasi botika yango mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe. »
8 司祭們就同意不再向人民收錢,也不再負責修理聖殿的破壞之處。
Banganga-Nzambe bandimaki kotika kokongola mbongo na maboko ya bato mpe kotika kobongisa Ndako ya Nzambe.
9 司祭約雅達於是拿來一個箱子,箱子上面開了一個口,安放在祭壇旁邊,即在上主聖殿入口的右邊,守門的司祭將所有獻於上主聖殿的銀錢,放入箱內。
Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.
10 幾時看見箱內的錢夠多了,君王的秘書和大司祭就上來,把錢倒出,數點上主殿內所有的銀錢。
Tango nyonso bazalaki komona ete mbongo ekomi ebele kati na sanduku, mokomi mikanda ya mokonzi elongo na mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kotanga mbongo oyo bato bazalaki komema na Tempelo ya Yawe; bongo bazalaki kotia yango na basaki.
11 他們將秤好了的錢,交給上主殿內間監工的管理員,由他們發給在上主殿內工作的木匠和建築工人,
Soki bayebi motuya na yango, bazalaki kopesa mbongo yango epai ya bato oyo bazalaki kosalisa misala kati na Ndako ya Nzambe. Na mbongo yango, bazalaki kofuta bato oyo bazalaki kosala kati na Tempelo ya Yawe: basharipantie,
12 泥水匠和石匠,或購買木料和鑿刻好的石頭,用來修補上主殿內的破壞之處;總之,用來作為修理聖殿的費用。
batongi ndako mpe bato oyo bakataka mabanga. Bazalaki kosomba mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe: mabaya mpe mabanga bakata. Bazalaki mpe kobimisa mbongo mpo na misala mosusu ya kobongisa Tempelo ya Yawe.
13 進獻於上主聖殿的銀錢,並沒有用來製造上主殿內的銀盆、燭剪、盤子、號筒,或任何金銀器皿,
Kasi bazalaki kobimisa te mbongo oyo bazalaki komema na Ndako ya Nzambe, mpo na kosalela basani ya minene ya palata, bambeli, basani oyo babwakelaka na yango mayi, bakelelo mpe biloko mosusu oyo esalemi na wolo to na palata mpo na Tempelo ya Yawe.
14 只是將銀錢交給工作人員,用來修理上主的殿。
Mbongo yango ezalaki bobele mpo na kofuta basali oyo bazalaki kobongisa Ndako ya Yawe.
15 也並不需要向那些經手收錢付給工人的人算賬,因為他們做事忠信可靠。
Bazalaki kolandela te mbongo oyo bapesaki na bato mpo na kofuta basali, pamba te bazalaki kosalela yango na bosembo.
16 至於獻作贖過祭和贖罪祭的錢,不歸於上主的殿,全歸於司祭。
Bazalaki komema te na Tempelo ya Yawe, mbongo oyo ewutaki na makabo ya kimia mpe na mbeka mpo na masumu; yango ezalaki mpo na Banganga-Nzambe.
17 那時,阿蘭王哈匝耳上來攻打加特,也攻下了,準備進攻耶路撒冷。
Na tango wana, Azaeli, mokonzi ya Siri, akendeki kobundisa engumba Gati mpe abotolaki yango. Sima, Azaeli abalukaki mpo na kobundisa Yelusalemi.
18 猶大王約阿士就將他祖先猶大王約沙法特、約蘭和阿哈齊雅所奉獻的聖物,同他自己奉獻的聖物,以及上主聖殿和王宮的府庫內儲藏的金子,全部取出來,送給了阿蘭王哈匝耳;哈匝耳就離開了耶路撒冷。
Kasi Joasi, mokonzi ya Yuda, azwaki biloko nyonso ya bule oyo bakoko na ye —Jozafati, Yorami mpe Akazia, bakonzi ya Yuda— babulisaki. Joasi azwaki mpe bakado oyo ye moko abulisaki mpe wolo nyonso oyo amonaki kati na bibombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe mpe na ndako ya mokonzi. Atindaki yango epai ya Azaeli, mokonzi ya Siri. Sima na yango, Azaeli akendeki mosika ya Yelusalemi.
19 約阿士其餘的事蹟,他行的一切,都記載在猶大列王實錄上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
20 約阿士的臣僕起來結黨謀反,在約阿士下到米羅宮時,將他殺死;
Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila.
21 殺他的是他的臣僕史默阿特的兒子約匝加爾和芍默爾的兒子約匝巴得。他死後,人將他葬在達味城,與祖先埋在一起;他的兒子阿瑪責雅繼位為王。
Tala bakombo ya basali oyo babomaki Joasi: Yozabadi, mwana mobali ya Shimeati, mpe Yeozabadi, mwana mobali ya Shomeri. Joasi akufaki mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 列王紀下 12 >