< 歷代志下 3 >

1 [興工建殿]撒羅滿在耶路撒冷,即在他父親達味看見異像的摩黎雅山上,在耶步斯人敖爾難的禾場上,達味所準備的地方,興工建造上主的聖殿。
Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
2 撒羅滿在即位後第四年二月興工建造。
Abandaki kotonga na mokolo ya mibale ya sanza ya mibale, na mobu ya minei ya bokonzi na ye.
3 撒羅滿為建造天主聖殿的基地,按照古尺度計算:長六十肘,寬爾十肘。
Moboko oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Nzambe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse.
4 門廊的長度與聖殿的寬度相等,即二十肘,高二十肘,裏面全貼上純金。
Ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe ezalaki na bametele pene zomi, na bosanda, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto kati na yango.
5 大殿裏面先蓋上一層木板,再貼上純金,上面雕刻上棕樹和花環;
Babetaki mabaya ya sipele na bamir ya eteni oyo eleki monene mpe abambaki wolo ya peto na likolo na yango. Asalaki bililingi ya nzete ya mbila mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
6 又以寶石點綴聖殿,甚是華麗;金子都是帕爾瓦因金。
Abambaki mabanga ya talo mpo na kokomisa yango kitoko. Wolo oyo asalelaki ezalaki wolo ya Parivayimi.
7 正殿、棟樑、門限、牆壁,以及門扇,都貼上金子,牆上刻有革魯賓。[至聖所]
Apakolaki wolo na motondo, na bikuke, na bamir, mpe atobolaki bililingi ya basheribe na bamir.
8 以後,建造了至聖所,長度與聖殿的寬度相等,即二十肘,寬度也是二十肘;內部貼了六百「塔冷通」純金。
Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe: bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe.
9 釘子重五十「協刻耳」金子;連樓閣也貼上了金子。
Basete oyo basalelaki ezalaki ya wolo, mpe ezalaki ya bagrame nkama motoba. Apakolaki lisusu wolo na bashambre ya likolo.
10 在至聖所內,以刻工刻了兩個革魯賓,外面包上了黃金;
Atiaki bililingi ya basheribe mibale kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe apakolaki yango wolo.
11 革魯賓的翅膀,共長二十肘:這邊革魯賓的一個翅膀長五肘,伸至這邊殿牆;另一個翅膀也長五肘,與另一個革魯賓的翅膀相接連。
Mapapu ya basheribe ezalaki na bametele pene zomi na molayi. Lipapu ya sheribe ya liboso ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe etutaki mir ya Tempelo ya Yawe; bongo lipapu na ye mosusu, oyo ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano, etutaki lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki mpe na bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
12 這一個革魯賓的一個翅膀,也長五肘,伸至那邊殿牆;另一個翅膀也長五肘,與前一個革魯賓的翅膀相接連。
Ndenge moko mpe mpo na lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano: etutaki mir mosusu ya Tempelo ya Yawe; mpe lipapu mosusu oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano etutaki lipapu ya sheribe ya liboso.
13 兩個革魯賓的翅膀都伸開,共長二十肘;他們雙足站立,面向聖殿。
Mapapu ya basheribe yango ezalaki ya kofungwama na molayi ya bametele pene zomi. Basheribe nyonso mibale batelemaki na makolo na bango, mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya kati ya Esika ya bule.
14 又用藍線、紫線、朱紅線和細麻,作了一帳幔,上面繡上革魯賓。[圓柱]
Asalaki rido ya lino, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, mpe atongaki bililingi ya basheribe na likolo na yango.
15 他又在殿前造了兩根柱子,共長三十肘;每根柱子頂上有柱帽,高五肘。
Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
16 又做了類似項鍊的花環,置於柱頭上;又作了一百個石榴,懸在花環上。
Asalaki bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni mpe atiaki yango na mito ya makonzi; asalaki lisusu bililingi ya bambuma nkama moko ya grenade, mpe akangisaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
17 把兩根柱子立在殿前,一左一右:右邊的叫雅津,左邊的叫波阿次。
Mpe atongaki makonzi liboso ya Tempelo ya Yawe: moko na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe mosusu, na ngambo ya loboko ya mobali. Abengaki likonzi ya ngambo ya loboko ya mwasi Yakini, mpe oyo ya ngambo ya loboko ya mobali, Boazi.

< 歷代志下 3 >