< 歷代志下 17 >

1 [約沙法特的虔誠與強盛]阿撒的兒子約沙法特繼位為王,發奮圖強,對抗以色列,
Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele.
2 在猶大各堅城內派駐了大軍,在猶大地內和他父親阿撒所克服的厄弗辣因各城裏,也派上了守軍。
Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki.
3 上主與約沙法特同在,因為他遵行了他父親最初所行的道路,沒有尋求過巴耳神,
Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala.
4 只尋求他父親的天主,履行他的誡命,不照以色列的作風行事。
Kasi alukaki Nzambe ya tata na ye mpe atosaki mibeko na Ye: alandaki te makambo oyo ezalaki kosalema kati na Isalaele.
5 因此,上主鞏固了他統治的王國,全猶大人都給約沙法特獻禮,所以他財產很富,尊榮很大。
Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu.
6 他一心在上主的道路上向上邁進,剷除了猶大境內的高丘和木偶。[教訓人民法律]
Motema na ye esepelaki makasi kotambola na banzela ya Yawe kino kolongola kati na Yuda bisambelo ya likolo ya bangomba mpe makonzi ya Ashera.
7 他為王第三年上,派遣了他的官員本海耳、敖巴狄雅、則加黎雅、乃塔乃耳和米加雅,往猶大各城去教訓百姓。
Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe.
8 隨從他們的有肋未人舍瑪雅、乃塔尼雅、則巴狄雅、阿撒耳、舍米辣摩、約納堂、阿多尼雅和多彼雅:這些都是肋未人;還有司祭厄里沙瑪和約蘭。
Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa: Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami.
9 他們隨身帶著上主的法律書,在猶大施教,走遍了猶大各城,教訓百姓。[約沙法特的聲望]
Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.
10 上主威震猶大四周所有的國家,因此都不敢與約沙法特作戰。
Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati.
11 有些培肋舍特人向約沙法特進貢獻銀,阿剌伯人給他呈獻家畜,即公綿羊七千七百隻,公山羊七千七百隻。
Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo.
12 約沙法特勢力日漸強大,達到頂峰:在猶大建造了一些堡壘和儲貨城,
Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko.
13 在猶大各城又做了堅固的工事,在耶路撒冷駐有英勇的部隊。
Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko.
14 他們的人數,按照家族記錄如下:猶大的軍長,首為阿德納軍長,率領三十萬勇士,
Tala motango na bango kolanda mabota na bango: Kati na libota ya Yuda, bakonzi ya bankoto: Adina, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama misato;
15 次為約哈南軍長,率領二十八暗人,
sima na ye, Yoanani: mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale na tuku mwambe;
16 其次為齊革黎的兒子阿瑪息雅,他甘願獻身於上主,率領二十萬勇士;
sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe: mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale.
17 屬本雅明的有勇士厄肋雅達,他率領二十萬挽弓和持盾的人;
Kati na libota ya Benjame: Eliyada, elombe ya bitumba, azalaki mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale oyo bazalaki na matolotolo mpe na banguba;
18 其次為約匝巴得,率領十八萬常備軍人。
Yozabadi, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama moko na tuku mwambe.
19 這些都是服侍君王的人,王在全猶大各堅城所駐派的人,尚未計算在內。
Bato oyo nyonso bazalaki kosala epai ya mokonzi lokola bakonzi ya basoda ya mpiko, bakisa ba-oyo mokonzi atiaki kati na bingumba batonga makasi ya Yuda mobimba.

< 歷代志下 17 >