< 撒母耳記上 1 >

1 從前在辣瑪有個厄弗辣因山地的族弗人,名叫厄耳卡納,是耶洛罕的兒子,──耶洛罕是厄里胡的兒子,厄里胡是托胡的兒子,托胡是厄弗辣因人族弗的兒子。──
Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.
2 他有兩個妻子:一個名叫亞納,一個名叫培尼納;培尼納有孩子,亞納卻沒有。
Elikana azalaki na basi mibale: moko, kombo na ye ezalaki « Penina; » mosusu, « Ana. » Penina azalaki na bana, kasi Ana azalaki na mwana te.
3 這人每年從本城上史羅去朝拜祭獻萬軍的上主。那裏有厄里的兩個兒子曷弗尼和丕乃哈斯做上主的司祭。
Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe.
4 有一天,厄耳卡納獻祭後,就把祭品給了自己的妻子培尼納和她的兒女好分,
Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi.
5 只給了亞納一分;他雖喜愛亞納,無奈上主封閉了她的子宮;
Kasi epai ya Ana, azalaki kopesa biteni yango mbala mibale, pamba te azalaki kolinga ye, atako Yawe akangaki ye mabota.
6 就因上主封閉了亞納的子宮,她的情敵便羞辱刺激她,使她憤怒。
Nzokande, lokola Yawe akangaki ye mabota, mbanda na ye azalaki kaka kotiola ye tango nyonso mpo ete atomboka.
7 年年都是這樣:每次她上上主的聖殿時,總是這樣刺激亞納。──亞納傷心痛哭,不肯吃飯。
Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,
8 她的丈夫厄耳卡納對她說:「亞納,你為什麼哭,不肯用飯﹖為什麼傷心﹖難道我對你不比十個兒子還好嗎﹖」
Elikana, mobali na ye, atunaki ye: « Ana, mpo na nini ozali kolela? Mpo na nini ozali kolia te? Mpo na nini ozali na mawa boye? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi? »
9 在史羅吃喝完了,亞納就起來走到上主面前;那時司祭厄里正對著上主聖殿門口,坐在椅子上。
Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe.
10 她心靈愁苦,哀求上主,不斷痛哭流淚;
Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.
11 且許願說:「萬軍的上主,若你垂顧你婢女的痛苦,記念我,不忘你的婢女,賜你婢女生一個男孩,我就將他一生獻於上主,一輩子不給他剃頭。」
Bongo apesaki elaka, alobaki: « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »
12 亞納在上主面前祈禱很久,厄里曾注意到她的嘴唇;
Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye.
13 亞納只是心內訴說,嘴唇微動,卻聽不到她的聲音,厄里卻以為她喝醉了,
Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga.
14 就對她說:「你要醉到幾時﹖消消你身上的酒氣罷! 」
Eli alobaki na Ana: — Kino tango nini okozala na milangwa? Longola milangwa na yo.
15 亞納答說:「我主! 你想錯了;我是個遭遇不幸的女人,清酒烈酒總不沾唇;我是在上主面前傾吐我的心意。
Ana azongisaki: — Te, nkolo na ngai! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe.
16 望你不要以為你的婢女是個壞人,因為我由於極度的痛苦悲傷,纔一直傾訴到現在。」
Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo.
17 厄里回答她說:「你平安的去罷! 願以色列的天主賜給你求他的事。」
Eli azongisaki: — Kende na kimia, mpe tika ete Nzambe ya Isalaele apesa yo, oyo osengi Ye.
18 她答說:「願你的婢女在你眼內蒙恩。」這女人就回了旅舍,吃完飯,不再愁容滿面。
Ana alobaki: — Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo. Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te.
19 次日早,他們起來,朝拜了上主,就回了辣瑪本家。厄耳卡納認識了妻子亞納,上主也記念了她,
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.
20 亞納就懷了孕,生了一個兒子,給他起名叫撒慕爾,說:「因為是我向上主求得了他。」約過了一年,
Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki: « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. »
21 她的丈夫厄耳卡納和全家上史羅去,向上主奉獻年祭,並還所許的願,
Na mobu oyo elandaki, Elikana, elongo na libota na ye mobimba, akendeki lisusu kobonzela Yawe mbeka ya mibu nyonso mpe kokokisa elaka na ye.
22 亞納卻沒有上去,因她對丈夫說:「等孩子斷了乳,我要帶他去,將他奉獻給上主,以後他永住在那裏。」
Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye: — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe; bongo akovanda kuna mpo na libela.
23 她的丈夫厄耳卡納對她說:「就照你的意思辦罷! 等他斷了乳再說;惟願上主實現你的話! 」於是他的妻子留在家裏,乳養孩子,直到斷了乳。
Elikana, mobali na ye, alobaki: — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela.
24 斷乳後,她便帶著小孩和一頭三歲的牛,一「厄法」麵和一皮囊酒,來到史羅上主的聖殿;孩子還很小。
Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.
25 他們祭殺了牛以後,孩子的母親來到厄里前,
Sima na bango koboma ngombe mpo na kobonza yango lokola mbeka, bamemaki mwana epai ya Eli.
26 對他說:「我主,請聽:我主,就如你活著那樣真實,我就是曾在你旁邊祈求上主的那個婦人,
Ana alobaki na ye: — Limbisa ngai, nkolo na ngai; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.
27 那時我為得到這孩子祈禱,上主就賞賜了我所懇求的,
Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.
28 所以我現在把他獻於上主,他一生是屬於上主的。」亞納便把他留在上主那裏。
Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe: bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.

< 撒母耳記上 1 >