< 撒母耳記上 5 >

1 培肋舍特人劫走了天主的約櫃,從厄本厄則爾運到阿市多得,
Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi.
2 把天主的約櫃抬到達貢廟內,放在達貢近旁。
Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni.
3 第二天清早,阿市多得人起來,見達貢傾倒了,在上主的約櫃面前,俯伏在地;他們把達貢豎起安置在原處。
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye.
4 但第二天清早人們起來,見達貢又傾倒了,仍在上主的約櫃面前,俯伏在地,達貢的頭和雙手都斷在門檻上,只留下了他的魚身。──
Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo; kaka nzoto na ye nde etikalaki.
5 因此,達貢的司祭和進達貢廟的人,都不敢踏阿市多得的廟的門檻,直到今天。
Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.
6 上主的手重重地壓制了阿市多得人,威嚇他們,使阿市多得和附近的人都生了毒瘡。
Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu.
7 阿市多得人一見這樣,就說:「別讓以色列天主的約櫃留在我們這裏,因他的手重重地壓制了我們的神達貢。」
Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki: — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso.
8 遂打發人召集了培肋舍特人所有的酋長來到他們那裏,向他們說:「對以色列天主的約櫃我們該怎麼辦﹖」他們就回答說:「把以色列天主的約櫃送到加特去! 」他們遂把以色列天主的約櫃送到加特去了。
Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango: — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. Bazongisaki: — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati.
9 他們把約櫃送去以後,上主的手又壓制那座城,使他們發生了很大的恐慌,因為上主打擊了城中的人,無論老幼,都患了毒瘡。
Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango: Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo.
10 於是加特人又把天主的約櫃送到厄刻龍;天主的約櫃一到了厄刻龍,厄刻龍人就喊說:「人把以色列天主的約櫃送到我們這裏,是為殺害我們和我們的百姓! 」
Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki: — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.
11 遂立刻派人召集培肋舍特所有的酋長來,向他們說,「你們把以色列天主的約櫃送走,送回原處,免得殺害我們和我們的百姓。」因為全城的人死的太多了,天主的手重重地壓制了那地方。
Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia; balobaki na bango: — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.
12 凡沒有死的人,都患了毒瘡,因此城中哀號之聲,上達於天。
Bato oyo bakufaki te bazwaki bokono ya pota ya libumu, mpe koganga ya engumba emataki kino na likolo.

< 撒母耳記上 5 >