< 撒母耳記上 28 >
1 那時培肋舍特人調集軍隊要進攻以色列人,阿基士對達味說:「你該知道你和你的人應協助我作戰」。
Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi: — Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai.
2 達味回答阿基士說:「好! 你就要知道你的僕人要作什麼」。阿基士對達味說:「那麼,我就立你常作我的護衛」。
Davidi azongiselaki Akishi: — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. Akishi alobaki na Davidi: — Malamu mingi! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.
3 那時撒慕已死,全以色列人舉喪哀悼他.把他葬在他的故鄉辣瑪。撒烏耳也早已將招魂的和行巫術的人驅逐出境。
Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.
Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa.
5 撒烏耳看見培肋舍特人的軍營就害怕起來,心中非常恐慌,
Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye.
6 遂去求問上主,但上主沒有藉夢境,也沒有藉「烏陵」,也沒有藉先知答覆他。
Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.
7 撒烏耳便對臣僕說:「你們給我找個召魂的女巫,我頊到她那裏去求問」。他的臣僕回答他說:「現今在恩多爾有個招魂的女巫」。
Bongo, Saulo alobaki na basali na ye: — Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye. Basali na ye bazongisaki: — Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori.
8 撒烏耳就改裝易服,帶了兩個人作伴,夜間來見那女人,對她說:「求妳用招魂的法術給我占卜,將向妳指出的人給我招上來」。
Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki: — Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye.
9 那女人回答說:「啊! 你知道撒慕爾作了什麼,他已經將國內招魂和行巫術的人剷除,為什麼你來陷陷阱害我的性命,叫我死呢﹖。
Kasi mwasi yango alobaki na ye: — Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai?
10 撒烏耳就指著上主對她發誓說:「上主永在! 為這事妳決不會受害」。
Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki: « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. »
11 那女人問說:「要我給你招誰上來﹖」他答說:「妳給我招撒烏耳上來」。
Bongo mwasi yango atunaki: — Nabimisela yo nani? Saulo azongisaki: — Bimisela ngai Samuele.
12 那女人一看見撒慕爾就大喊一聲,對撒烏耳說:「你為什麼哄騙我﹖你就是撒烏耳! 」
Tango mwasi yango amonaki Samuele, agangaki makasi mpe alobaki na Saulo: — Mpo na nini okosi ngai? Ozali Saulo!
13 王對她說:「不要怕! 妳究竟看見了什麼﹖」那女人回答撒烏耳說:「我看見神由地中上來」。
Mokonzi alobaki na ye: — Kobanga te, omoni nini? Mwasi alobaki na Saulo: — Namoni nzambe moko kobima na mabele.
14 撒烏耳問說:「什麼形狀﹖」她答說:「上來了一位老人,身披外氅」。撒烏耳便知道這是撒慕爾,遂俯首至地下拜。
Saulo atunaki ye: — Azali ndenge nini? Mwasi azongisaki: — Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka. Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele.
15 撒慕爾對撒烏耳說:「為什麼你擾亂我,叫我上來﹖」撒烏耳答說:「我很是苦痛。培肋舍特人攻擊我,上主已遠離我,又不藉先知,也不藉夢境答覆我,所以我招你上來,指教我該作什麼」。
Samuele alobaki na Saulo: — Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai? Saulo alobaki: — Nazali na pasi makasi: bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala.
16 撒慕爾說:「上主既已離開了你,你為什麼還來問我﹖
Samuele alobaki: — Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yawe asili kopesa yo mokongo mpe akomi monguna na yo?
17 上主對你實踐了衪藉我所說的話:上主已由你手中奪去王權,賜給了你的近人達味;
Yawe akokisi kaka makambo oyo asakolaki na nzela na ngai: Yawe abotoli bokonzi na maboko na yo mpe apesi yango na moninga na yo, Davidi,
18 因為你沒有聽從上主的話,沒有執行衪對阿瑪肋克所懷的盛怒,為此,上主今天這樣對待了你。
pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo.
19 上主還要把以色列和你一起交在培肋舍特人手中;明日你和你的兒子要同我在一起;並且上主也要把以色列軍隊交在培肋舍特人手中」。
Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.
20 撒烏耳一聽撒慕爾的話,非常恐懼,忽然跌倒在地;又因他一日一夜沒有吃喝,一點力氣也沒有了。
Mbala moko, Saulo abombamaki na mabele mpe ayokaki maloba ya Samuele somo mingi. Nzoto na ye elembaki mpo ete aliaki eloko moko te mokolo mobimba mpe butu mobimba.
21 那女人就走到撒烏耳跟前,看見他很是驚慌,就對他說:「看,你的婢女聽了你的話,不顧性命,聽從了你給我說的話。
Tango mwasi apusanaki pembeni ya Saulo mpe amonaki ete azali lisusu na kimia te, alobaki na ye: — Tala, mwasi mosali na yo atosaki yo. Nandimaki kokufa mpo na kaka kosala makambo oyo otindaki ngai.
22 現今你也該聽從你婢女的話:我給你拿點食物來,你吃了,好有力氣走路」。
Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo: yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo.
23 他卻拒絕說:「我不吃」。但是他的臣僕和那女人都勉強他,他才聽從了他們的話,從地上起來,坐在床上。
Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki: — Nakolia te. Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto.
24 那女人在家裏有頭肥牛,急忙宰了,又把麵調好,烤成無酵餅,
Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire.
25 擺在撒烏耳和他臣僕面前;他們吃了以後,當夜就起身走了。
Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki.