< 列王紀上 21 >

1 [葡萄園的風波]這事以後,依次勒耳人納波特在依次勒耳,靠近撒瑪黎雅王阿哈布的宮殿,有一個葡萄園。
Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.
2 阿哈布對納波特說:「請將你的葡萄園讓給我,我可以用作菜園,因為離我的宮殿很近;我願拿一個更好的葡萄園來與你交換;或者,如果你認為好,我也可以照葡萄園的價值給你錢。」
Mokolo moko, Akabi alobaki na Naboti: — Pesa ngai elanga na yo ya vino mpo ete nakomisa yango elanga na ngai ya ndunda, pamba te ezali pene ya ndako na ngai; mpe ngai nakopesa yo elanga mosusu ya vino oyo eleki kitoko na esika ya elanga na yo; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango.
3 納波特回答阿哈布說:「上主決不許我將我祖先的產業讓給你! 」
Kasi Naboti azongiselaki Akabi: — Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai.
4 阿哈布由於依次勒耳人納波特對他所說:「我決不將我祖先的產業讓給你」的話,便悶悶不樂地回到宮中,躺在床上,轉過臉去,不肯吃飯。
Akabi azongaki epai na ye na mawa mpe na kanda mpo na maloba oyo Naboti, moto ya Jizireyeli, ayebisaki ye: « Nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. » Alalaki na mbeto na ye, atalisaki elongi na ye na mir mpe aboyaki kolia.
5 他的妻子依則貝耳來見他,問他說:「你為什麼心裏這樣憂悶,連飯都不肯吃﹖」
Mwasi na ye, Jezabeli, ayaki epai na ye mpe atunaki ye: — Mpo na nini ozali na mawa mpe oboyi kolia?
6 阿哈布回答說:「因為我對依次勒耳人納波特說:請將你的葡萄園按現價賣給我,或者如果你願意,我可以拿另一個葡萄園來與你交換;他卻回答說:我決不將我的葡萄園讓給你。」
Akabi azongiselaki ye: — Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye: « Tekela ngai elanga na yo ya vino; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai: « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. »
7 他的妻室依則貝耳對他說:「你真會統治以色列! 只管起來吃飯,心情愉快,我必將依次勒耳人納波特的葡萄園交給你。」
Bongo mwasi na ye, Jezabeli, alobaki na ye: — Boni, ezali yo nde ozali mokonzi ya Isalaele to te? Lamuka! Lia mpe sepela! Nakopesa yo elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli.
8 依則貝耳便以阿哈布的名義寫了一封信,蓋上君王的印章,送給與納波特同住一城的長老和官紳,
Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti.
9 信上寫道:「請你們宣布禁食,叫納波特坐上民眾的首位,
Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango: « Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso.
10 然後再叫兩個流氓坐在他的對面,作證控告他說:納波特辱罵了天主和君王,你們應將他拉出城外,用石頭砸死。」
Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo: ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »
11 那些與納波特同住在一城的長老和官紳,便照依則貝耳吩咐他們的,照她在送給他們的信上所寫的去行:
Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda.
12 宣布禁食,叫納波特坐上民眾的首位,
Babongisaki mokolo ya kokila bilei mpe bavandisaki Naboti na esika ya liboso kati na bato.
13 兩個流氓前來坐在他的對面,當眾作證控告他說:「納波特辱罵了天主和君王。」眾人便將他拉出城外,用石頭砸死了。
Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo: « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.
14 然後派人告訴依則貝耳說:「納波特已用石頭砸死了。」
Bongo bampaka mpe bankumu batindaki maloba oyo epai ya Jezabeli: « Basili koboma Naboti na mabanga. »
15 依則貝耳聽說納波特已用石頭砸死了,就對阿哈布說:「你起來,去佔領依次勒耳人納波特,先前不肯照現價賣給你的葡萄園,因為納波特已經不在了,已經死了。」
Tango Jezabeli ayokaki ete babomi Naboti na mabanga, alobaki na Akabi: « Telema, kende kokamata elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli, elanga oyo aboyaki kotekela yo, pamba te Naboti azali lisusu na bomoi te, asili kokufa. »
16 阿哈布一聽說納波特死了,就起身下到依次勒耳人納波特的葡萄園,霸佔了那葡萄園。厄里亞預言天主的懲罰
Tango kaka Akabi ayokaki ete Naboti, moto ya Jizireyeli, asili kokufa, atelemaki mpe akendeki kokamata elanga ya vino ya Naboti.
17 那時,有上主的話傳於提市貝人厄里亞說:「
Bongo Yawe alobaki na Eliya, moto ya Tishibe, maloba oyo:
18 你起來,下去會晤住在撒瑪黎雅的以色列王阿哈布;看,他現在正在納波特的葡萄園內,他下到那裏去霸佔了那葡萄園。
« Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango.
19 你要對他說:上主這樣說:你殺了人,還要霸佔他的產業嗎﹖繼而對他說:上主這樣說:狗在什麼地方,舔了納波特的血,也要在什麼地方舔你的血。」
Okoyebisa ye makambo oyo: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te? › Okobakisa lisusu: ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi: Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »
20 阿哈布對厄里亞說:「我的對頭,你又找到了我的錯嗎﹖」厄里亞答說:「是,我找到了你的錯,因為你出賣了你自己,去行上主視為惡的事。
Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki: — Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka! Eliya azongisaki: — Solo, namoni yo; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe.
21 我必要在你身上降災,消滅你的宗族;以色列所有屬於阿哈布的男子無論是自由的或不自由的,一概滅絕。
Boye, tala makambo oyo Yawe alobi: « Nakotindela yo pasi ya makasi. Nakokombola bakitani na yo mpe nakolongola epai ya Akabi mwana mobali nyonso ya libota na yo: azala mowumbu to monsomi kati na Isalaele.
22 我要使你的家像乃巴特的兒子雅洛貝罕的家,又像阿希雅的兒子巴厄沙的家,因為你惹我發怒,使以色列陷於罪惡。
Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. »
23 至於依則貝耳,上主也預言說:狗要在依則貝耳的田間,吞食依則貝耳。
Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli: « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli.
24 凡屬阿哈布的人,死在城中的,要為狗吞食,死在田間的,要為空中的飛鳥啄食。」
Moto nyonso ya libota ya Akabi oyo akokufa kati na engumba, bambwa ekolia ye; mpe oyo nyonso akokufa na zamba, bandeke ya likolo ekotobola-tobola ye. »
25 實在,從來沒有人像阿哈布一樣,受他的妻子依則貝耳的引誘,這樣出賣自己,行上主視為惡的事。
Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.
26 他行了最可憎惡的事,歸依了邪神偶像,全像上主從以色列子民前,趕走了阿摩黎人所行的一樣。阿哈布懺悔免罰
Asalaki makambo ya nkele koleka na kosambela banzambe ya bikeko ndenge bato ya Amori oyo Yawe abenganaki liboso ya Isalaele bazalaki kosala.
27 阿哈布一聽這些話,就撕破自己的衣服,身穿麻衣,禁食,穿著麻衣睡覺,低頭緩步行走。
Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe.
28 於是有上主的話傳於提市貝人厄里亞說:「
Bongo Yawe alobaki lisusu na Eliya, moto ya Tishibe:
29 阿哈布在我面前這樣自卑自賤,你看見了沒有﹖他既然在我面前自卑自賤,在他有生之日,我不降此災禍;但是,到他兒子的日子,我要使這災禍臨於他家。」
« Omoni ndenge nini Akabi amikitisi liboso na Ngai? Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa pasi te wana ye akozala nanu na bomoi; kasi nakotinda pasi yango na tango mwana na ye ya mobali akozala na bokonzi. »

< 列王紀上 21 >