< 歷代志上 9 >

1 全以色列都統計了,且記載在以色列列王實錄上。[充軍後耶路撒冷的居民]猶大人因犯罪作惡被擄往巴比倫去。
Batangaki bana nyonso ya Isalaele mpe bakomaki bakombo na bango na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. Bato ya Yuda bakendeki na bowumbu na Babiloni mpo na kozanga boyengebene.
2 最初回來住在自己城內復業的,是以色列人、司祭、肋未人和獻身者。
Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango, ezalaki: ndambo ya bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe.
3 遷回耶路撒冷的,有猶大、本雅明、厄弗辣因和默納協的子孫。
Nzokande, ndambo ya bana mibali ya Yuda, ya Benjame, ya Efrayimi mpe ya Manase bazalaki kovanda na Yelusalemi:
4 猶大的子孫中有:阿米胡得的兒子烏泰;阿米胡得是敖默黎的兒子,敖默黎是依默黎的兒子,依默黎是巴尼的兒子,巴尼是猶大的兒子培勒茲的兒子。
Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda.
5 舍拉人中,有長子阿撒雅和他的兒子們;
Kati na bato ya Shiloni: Asaya, mwana ya liboso, mpe bana na ye ya mibali.
6 則辣黑的子孫中,有耶烏耳。他們同族兄弟共計六百九十人。
Kati na bakitani ya Zera: Yeuweli. Mpe bandeko na bango bazalaki nkama motoba na tuku libwa.
7 本雅明的子孫中,有默叔藍的兒子撒路;默叔藍是曷狄雅的兒子,曷狄雅是哈斯奴阿的兒子。
Kati na bakitani ya Benjame: Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Odavia, mwana mobali ya Asenuwa;
8 此外,尚有耶路罕的兒子依貝乃雅,烏齊的兒子厄拉;烏齊是米革黎的兒子;又有舍法提雅的兒子默叔藍,舍法提雅是勒烏耳的兒子,勒烏耳是依貝尼雅的兒子。
Yibinea, mwana mobali ya Yeroami; Ela, mwana mobali ya Uzi mpe koko ya Mikiri; mpe Meshulami, mwana mobali ya Shefatia mpe koko ya Reweli, mwana mobali ya Yibiniya.
9 按家系他們同族兄弟,共計九百五十六人:這些人都是各家族的族長。
Motango ya bato ya Benjame kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango, ezalaki nkama libwa na tuku mitano na motoba. Bato oyo nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango.
10 司祭中,有耶達雅、約雅黎布、雅津,
Kati na Banganga-Nzambe: Yedaeya, Yeoyaribi, Yakini;
11 和希耳克雅的兒子阿匝黎雅;希耳克雅是默叔藍的兒子,默叔藍是匝多克的兒子、匝多克是默辣約特的兒子,默辣約特是阿希突布的兒子,阿希突布是天主聖殿之長。
Azaria, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi oyo azalaki mokambi ya Ndako ya Nzambe.
12 此外,有耶洛罕的兒子阿達雅;耶洛罕是帕市胡爾的兒子,帕市胡爾是瑪耳基雅的兒子;還有阿狄耳的兒子瑪賽;阿狄耳是雅赫則辣的兒子,雅赫則辣是默叔藍的兒子,默叔藍是默史肋米特的兒子,默史肋米特是依默爾的兒子;
Ezalaki mpe na Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya; mpe Maesayi, mwana mobali ya Adieli, mwana mobali ya Yazera, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Meshilemiti, mwana mobali ya Imeri.
13 連他們同族的兄弟,家族的族長,共計一千七百六十人,為天主聖殿服務,都是有本領的人。
Banganga-Nzambe oyo bazalaki bakambi ya bituka, bazalaki nkoto moko na nkama sambo na tuku motoba; bazalaki na molende makasi mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe.
14 肋未人中,有哈叔布的兒子舍瑪雅;哈叔布是阿次黎岡的兒子,阿次黎岡是哈沙彼雅的兒子:以上默辣黎的子孫。
Kati na Balevi: Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mokitani ya Merari;
15 還有巴刻巴卡、赫勒士、加拉耳和米加的兒子瑪塔尼雅;米加是齊革黎的兒子,齊革黎是阿撒夫的兒子;
mpe Bakibakari, Ereshi, Galali mpe Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zikiri, mwana mobali ya Azafi;
16 還有舍瑪雅的兒子敖巴狄雅;舍瑪雅是加拉耳的兒子,加拉耳是耶杜通的兒子;還有阿撒的兒子貝勒基雅;阿撒是厄耳卡納的兒子;厄耳卡納居住在乃托法人的村莊內。
Abidiasi, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Galali, mwana mobali ya Yedutuni; Berekia, mwana mobali ya Asa, mwana mobali ya Elikana oyo azalaki kovanda na mboka Netofa.
17 守門者中,有沙隆、阿谷布、塔耳孟和阿希曼;他們的兄弟沙隆為首,
Ezalaki mpe na bakengeli bikuke: Shalumi, Akubi, Talimoni, Ayimani mpe bandeko na bango ya mibali. Shalumi nde azalaki mokonzi na bango.
18 直到現今他們看守東面的王門;他們曾作過肋未營內的守門者。
Kino lelo, bakitani ya Shalumi bakengelaka ekuke ya ngambo ya este ya Ndako ya Nzambe, ekuke oyo babengaka ekuke ya Mokonzi. Bango wana nde bakengeli bikuke kati na Balevi.
19 沙隆是科勒的兒子,科勒是阿彼雅撒夫的兒子,阿彼雅撒夫是科辣黑的兒子;他家族內的兄弟科辣黑人擔任敬禮的工作,看守會幕的門檻;他們的祖先曾在上主的軍營中防守營門。
Shalumi, mwana mobali ya Kore, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore elongo na bandeko na bango mosusu ya libota ya Kore, bazalaki na mokumba ya kokengela ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani ndenge bakoko na bango bazalaki kokengela ekuke ya molako ya Yawe.
20 厄肋阿匝爾的兒子丕乃哈斯曾作過他們的首領。─願天主與他們同在!
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, azalaki kala mokonzi na bango, bongo Yawe azalaki elongo na ye.
21 默舍肋米雅的兒子則加黎雅曾看守會幕的大門。
Zakari, mwana mobali ya Meshelemia, azalaki mpe mokengeli ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
22 被選看守門檻的,共計二百一十二人。他們曾在本村莊內登過記,達味和先見者撒慕爾給他們派定了這職務。
Bango nyonso oyo baponamaki mpo ete bazala bakengeli bikuke bazalaki nkama mibale na zomi na mibale. Bakomaki bakombo na bango na buku ya mabota kolanda bamboka na bango. Ezali Davidi mpe Samuele oyo azalaki momoni makambo nde batiaki bango na misala na bango.
23 他們和自己的子孫在天主的聖殿,即會幕門口任守衛之職,
Boye, bango elongo na bana na bango bazalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe; elingi koloba bikuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
24 守衛東西南北四方的大門。
Bakengeli bikuke bazalaki na bangambo minei: este, weste, nor mpe sude.
25 在村莊住的同族兄弟,每七天應依時來同他們換班,
Bandeko na bango ya mibali oyo bazalaki na bamboka na bango, basengelaki koyaka tango na tango kosunga bango mikolo sambo.
26 因為四位守門之長是肋未人,應常值班看守天主聖殿的廂房和庫房。
Kasi bakonzi minei ya bakengeli bikuke bazalaki Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kokengela bashambre mpe bomengo ya Ndako ya Nzambe.
27 所以應在天主聖殿的四周過夜,因為他們有守護和每晨開門的職責。
Bazalaki kolekisa butu na zingazinga ya Ndako ya Nzambe mpo ete basengelaki kokengela yango mpe kofungola yango tongo nyonso.
28 他們中有些人照著行禮的器皿,依數取出,原數送回;
Bamoko kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bisalelo ya losambo mpe kotanga yango tango nyonso bazalaki kokotisa to kobimisa yango.
29 有些人照管用具,即聖所內的一切用具,以及麵粉、酒、油、乳香和香料;
Bamosusu kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bambeki mpe bisalelo nyonso ya Esika ya bule: farine, vino, mafuta, ansa mpe malasi.
30 但用香料配製香液是司祭子孫的職務。
Kasi bana mibali ya Banganga-Nzambe bazalaki kosala malasi.
31 肋未人瑪提提雅,科辣黑族人沙隆的長子,負責照管烤餅的事。
Moto moko kati na Balevi, Matitia, mwana mobali ya liboso ya Shalumi, moto ya Kore, azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu.
32 他們的兄弟刻哈特的子孫,每安息日照料備製供餅的事。
Bamosusu kati na bango, bato ya Keati, bazalaki na mokumba ya kobongisa mapa na milongo mpo na basaba nyonso.
33 這些是歌詠員......肋未家族的族長,住在廂房內,不做別的事,只日夜執行自己的職務。
Bayembi oyo bazalaki bakambi ya libota ya Levi, bazalaki tango nyonso kovanda na bashambre ya Ndako ya Nzambe. Bazalaki kosala mosala mosusu te kaka kosala kati na Ndako ya Nzambe butu mpe moyi.
34 以上是肋未家族按家系,在耶路撒冷的族長。[撒烏耳的祖先和後裔]
Bango nyonso wana bazalaki bakambi ya libota ya Levi kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango; mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.
35 住在基貝紅的,有基貝紅的父親耶依耳,他的妻子名叫瑪阿加。
Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka, mwasi na ye.
36 他的長子阿貝冬、其次是族爾,克士、巴耳、乃爾、納達布、
Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso; mpe sima, abotaki lisusu Tsuri, Kishi, Bala, Neri, Nadabi,
37 革多爾、阿希約、則加黎雅和米刻羅特。
Gedori, Ayiyo, Zakari mpe Mikiloti.
38 米刻羅特生史曼;他們兄弟彼此為鄰,住在耶路撒冷。
Mikiloti abotaki Shimeami. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na bandeko na bango ya mibali.
39 乃爾生克士,克士生撒烏耳,撒烏耳生約納堂、瑪耳基叔亞、阿彼納達布和依市巴耳。
Neri abotaki Kishi; Kishi abotaki Saulo; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
40 約納堂的兒子:默黎巴耳;默黎巴耳生米加、
Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala. Meriba-Bala abotaki Mishe.
41 米加的兒子:丕東、默肋客、塔勒亞和阿哈茲。
Bana mibali ya Mishe: Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
42 阿哈茲生約阿達,約阿達生阿肋默特、阿次瑪委特和齊默黎;齊默黎生摩匝,
Akazi abotaki Yayera; Yayera abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri; Zimiri abotaki Motsa;
43 摩匝生彼納;彼納的兒子勒法雅,勒法雅的兒子厄拉撒,厄拉撒的兒子阿責耳;
Motsa abotaki Bineya; Bineya abotaki Refaya; Refaya abotaki Eleasa; Eleasa abotaki Atseli.
44 阿責耳有六個兒子,他們的名字是:阿次黎岡、波革魯、依市瑪耳、沙黎雅、敖巴狄雅和哈南:以上是阿責耳的兒子。
Atseli abotaki bana mibali motoba: Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nde bazalaki bana mibali ya Atseli.

< 歷代志上 9 >