< 歷代志上 27 >

1 [軍隊組織]以色列子民、族長、千夫長、百夫長,以及所有的官員,都按照數目分定班次,每年按月輪流值班,事奉君王;每班二萬四千人。
Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi: ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki: kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
2 正月第一軍的軍長是匝貝狄爾的兒子依市巴耳,他這一軍有二萬四千人,
Mpo na sanza ya liboso: lisanga ya Yashobeami, mwana mobali ya Zabidieli; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
3 他是培勒茲的後代,是正月各軍官的軍長。
Yashobeami azalaki mokitani ya Peretsi mpe azalaki mokonzi ya bakonzi nyonso ya mampinga mpo na sanza ya liboso.
4 二月第二軍的軍長是阿曷亞人多待的兒子厄肋阿匝爾,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya mibale: lisanga ya Dodayi, moto ya libota ya Aoyi. Mikiloti azalaki mokambi ya lisanga ya Dodayi. Lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
5 三月第三軍的軍長是大司祭約雅達的兒子貝納雅,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya misato: lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
6 貝納雅是三十勇士之一,且為三十勇士之長;他的兒子阿米匝巴特指揮他的部隊。
Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.
7 四月第四軍的軍長是約阿布的兄弟阿撒耳,他以後是他的兒子則巴狄雅,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya minei: lisanga ya Asaeli, ndeko mobali ya Joabi. Zebadia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
8 五月第五軍的軍長是依次辣黑人沙默胡特,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya mitano: lisanga ya mokambi Shamewuti, moto ya libota ya Yizirayi; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
9 六月第六軍的軍長是特科亞人依刻士的兒子依辣,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya motoba: lisanga ya Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya libota ya Tekoa; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
10 七月第七軍的軍長是厄弗辣因的後裔帕耳提人赫肋茲人,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya sambo: lisanga ya Eletsi, moto ya libota ya Peloni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
11 八月第八軍的軍長是則辣黑族胡沙人息貝開,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya mwambe: lisanga ya Sibekayi, moto ya libota ya Usha, moko kati na bakitani ya Zera; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
12 九月第九軍的軍長是本雅明足阿納托特人阿彼厄則爾,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya libwa: lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
13 十月第十軍的軍長是則辣黑族乃托法人瑪哈賴,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya zomi: lisanga ya Maarayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Zera; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
14 十一月第十一軍的軍長是厄弗辣因的後裔丕辣通人貝納雅,他這一軍有二萬四千人。
Mpo na sanza ya zomi na moko: lisanga ya Benaya, moto ya libota ya Piratoni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
15 十二月第十二軍的軍長是敖特尼耳族乃托法人赫耳特,他這一軍有二萬四千人。[各支派首領]
Mpo na sanza ya zomi na mibale: lisanga ya Elidayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Otinieli; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
16 以色列各支派的首領:勒烏本子孫的首領是齊革黎的兒子厄里厄則爾;西默盎子孫的首領是瑪加的兒子舍法提雅;
Tala bakonzi ya mabota ya Isalaele: Mpo na libota ya Ribeni: Eliezeri, mwana mobali ya Zikiri; mpo na libota ya Simeoni: Shefatia, mwana mobali ya Maaka;
17 肋未子孫的首領是刻慕耳的兒子哈沙彼雅;亞郎子孫的首領是匝多克;
mpo na libota ya Levi: Ashabia, mwana mobali ya Kemweli; mpo na libota ya Aron: Tsadoki;
18 猶大子孫的首領是達味的一個兄弟厄里雅布;依撒加爾子孫的首領是米加耳的兒子敖默黎;
mpo na libota ya Yuda: Eliwu, ndeko mobali ya Davidi; mpo na libota ya Isakari: Omiri, mwana mobali ya Mikaeli;
19 則步隆子孫的首領是敖巴狄雅的兒子依市瑪雅;納斐塔里子孫的首領是阿黎耳的兒子耶黎摩特;
mpo na libota ya Zabuloni: Yishimaeya, mwana mobali ya Abidiasi; mpo na libota ya Nefitali: Yerimoti, mwana mobali ya Azirieli;
20 厄弗辣因子孫的首領是阿匝齊雅的兒子曷舍亞;默納協半支派子孫的首領是培達雅的兒子約厄耳;
mpo na libota ya Efrayimi: Oze, mwana mobali ya Azazia; mpo na ndambo ya libota ya Manase: Joeli, mwana mobali ya Pedaya;
21 基肋阿得地方默納協另半支派子孫的首領是則加黎雅的兒子依多;本雅明子孫的首領是阿貝乃爾的兒子雅息耳;
mpo na ndambo ya libota ya Manase kati na Galadi: Yido, mwana mobali ya Zakari; mpo na libota ya Benjame: Yaasieli, mwana mobali ya Abineri;
22 丹子孫的首領是耶洛罕的兒子阿匝勒耳:以上是以色列各支派的首領。
mpo na libota ya Dani: Azareeli, mwana mobali ya Yeroami. Bango wana nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Isalaele.
23 二十歲以下的,達味皆未予以統計,因為上主曾應許過使以色列的人數多如天上的星辰。
Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo.
24 責魯雅的兒子約阿布開始統計過,但是沒有完成,因為上主曾向以色列大發忿怒,故此人口數字也沒有載在達味王實錄上。[財政的主管]
Joabi, mwana mobali ya Tseruya, abandaki kotanga bango kasi asilisaki te. Pamba te likolo ya botangi wana, Yawe akitiselaki Isalaele kanda na Ye. Boye, motango ya bato yango ekomamaki te na buku ya masolo ya mokonzi Davidi.
25 掌管軍王府庫的是阿狄耳的兒子阿次瑪委特;掌管郊邑、村堡、貨倉的是烏齊雅的兒子約納堂;
Azimaveti, mwana mobali ya Adieli, azalaki kobatela bibombelo ya bozwi ya mokonzi. Jonatan, mwana mobali ya Oziasi, azalaki mobateli ya bibombelo na bazamba, na bingumba, na bamboka mike mpe na bandako milayi.
26 掌管耕田種地農人的是革路布的兒子厄次黎;
Eziri, mwana mobali ya Kelubi, azalaki mokambi ya basali bilanga;
27 掌管葡萄園的是辣瑪人史米;掌管葡萄園內酒倉的是史斐米人匝貝狄;
Shimei, moto ya engumba Rama, azalaki mobateli bilanga ya vino; Zabidi, moto ya engumba Shefami, azalaki mobateli masanga ya vino mpe bilanga ya vino.
28 掌管平原的橄欖園和無花果園的是革德爾人巴耳哈南;掌管油庫的是約阿士;
Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste; Yoashi azalaki mobateli mafuta ya olive;
29 掌管仔沙龍平原所牧放的牛群的是沙龍人史特賴;掌管在山谷中所牧放的牛群的是阿德來的兒子沙法特;
Shitrayi, moto ya engumba Saroni, azalaki mobateli bangombe oyo ezalaki kolia na Saroni; Shafati, mwana mobali ya Adilayi, azalaki mobateli bangombe na mabwaku.
30 掌管駱駝的是依市瑪耳人敖彼耳;掌管驢群的是默洛諾特人耶赫狄雅;
Obili, moto ya libota ya Isimaeli, azalaki mobateli bashamo; Yedeya, moto ya libota ya Meronoti, azalaki mobateli ba-ane ya basi.
31 掌管楊群的是哈革爾人雅齊:以上是掌管達味君王財政的主管。[中樞要員]
Yazizi, moto ya libota ya Agari, azalaki mobateli bibwele. Bango nyonso bazalaki babateli bozwi ya mokonzi Davidi.
32 達味的叔父約納堂作參事,這人有智慧,又有學問,他與哈革摩尼的兒子耶希耳教導君王的兒子:
Jonatan, ndeko ya tata ya Davidi, azalaki mopesi toli, moto ya mayele mpe mokomi mikanda. Yeyeli, mwana mobali ya Akimoni, azalaki kolandela bana mibali ya mokonzi.
33 阿希托費耳為君王的顧問;阿爾基人胡瑟為君王的朋友;
Ayitofeli azalaki mopesi toli ya mokonzi; mpe Ushayi, moto ya Ariki, azalaki mobateli sekele ya mokonzi.
34 繼阿希托費耳之後的是貝納雅的兒子約雅達和厄耳雅塔;約阿布為君王軍隊的元帥。
Yeoyada, mwana mobali ya Benaya, elongo na Abiatari, bakitanaki na Ayitofeli. Joabi azalaki mokonzi ya mampinga ya mokonzi.

< 歷代志上 27 >