< 歷代志上 24 >
1 [司祭班次]亞郎的子孫也有他們的班次。亞郎的兒子:納達布、阿彼胡、厄肋阿匝爾和依塔瑪爾。
Tala bituka ya bana mibali ya Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
2 納達布和阿彼胡在他們父親以前死了,又沒有兒子,所以厄肋阿匝爾和依塔瑪爾作了司祭。
Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya tata na bango mpe batikalaki kobota te. Eleazari mpe Itamari basalaki mosala na bango ya bonganga-Nzambe.
3 達味和厄肋阿匝爾的後裔匝多克,並依塔瑪爾的後裔阿希默肋客,將他們的同族兄弟分開班次,按班次服役。
Tala ndenge Davidi akabolaki bango kolanda misala oyo bapesaki bango: Tsadoki, na etuka ya Eleazari; Ayimeleki, na etuka ya Itamari.
4 以後發現厄肋阿匝爾的子孫中為首領的人,多於依塔瑪爾的子孫,遂將他們如此劃分:厄肋阿匝爾的後裔中族長十六人,依塔瑪爾的後裔中族長八人,
Bamonaki ete kati na bakitani ya Eleazari, bana mibali bazalaki ebele koleka bato oyo bazalaki kati na bakitani ya Itamari. Boye, bakabolaki bana mibali ya Eleazari lokola bakonzi ya mabota zomi na motoba mpe bana mibali ya Itamari lokola bakonzi ya mabota mwambe.
5 以抽籤方式將他們分開,彼此同列,因為在厄肋阿匝爾子孫中和依塔瑪爾子孫中,都有在聖所作首領和天主面前作首領的。
Babetaki zeke mpo na kokabola bango, pamba te kati na bakitani ya Eleazari mpe ya Itamari, ezalaki na bakambi ya Esika ya bule mpe bakambi ya mosala ya Nzambe.
6 肋未人乃塔乃耳的兒子舍瑪雅書記在君王、首領、司祭匝多克、厄彼雅塔爾的兒子阿希默肋客和眾司悸及肋未族長前登記:一籤為厄肋阿匝爾家族,一籤為依塔瑪爾家族。
Shemaya, mokomi mikanda, mwana mobali ya Netaneeli, na libota ya Levi, akomaki bakombo na bango na miso ya mokonzi, ya bakambi, ya Nganga-Nzambe Tsadoki, ya Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari; mpe ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe Balevi. Babetaki zeke mbala mibale mpo na etuka ya Eleazari, mpe mbala moko, mpo na etuka ya Itamari.
Tala ndenge bakambi ya mabota baponamaki na nzela ya zeke: zeke ya liboso ekweyaki epai ya Yeoyaribi; zeke ya mibale ekweyaki epai ya Yedaeya;
zeke ya misato ekweyaki epai ya Arimi; zeke ya minei ekweyaki epai ya Seorimi;
zeke ya mitano ekweyaki epai ya Malikiya; zeke ya motoba ekweyaki epai ya Miyamini;
zeke ya sambo ekweyaki epai ya Akotsi; zeke ya mwambe ekweyaki epai ya Abiya;
zeke ya libwa ekweyaki epai ya Jozue; zeke ya zomi ekweyaki epai ya Shekania;
zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Eliashibi; zeke ya zomi na mibale ekweyaki epai ya Yakimi;
zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Upa; zeke ya zomi na minei ekweyaki epai ya Yeshebeabi;
zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Biliga; zeke ya zomi na motoba ekweyaki epai ya Imeri;
zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Eziri; zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Apitsetsi;
zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Petaya; zeke ya tuku mibale ekweyaki epai ya Ezekieli;
zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Yakini; zeke ya tuku mibale na mibale ekweyaki epai ya Gamuli;
zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Delaya; zeke ya tuku mibale na minei ekweyaki epai ya Maazia.
19 這就是他們進入上主殿內,按照上主以色列的天主吩咐他們祖先亞郎所制定的規律,供職的班次。[肋未班次補遺]
Ezalaki ndenge wana nde bakabolaki bango mpe bazalaki kolandana kati na mosala mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe. Bazalaki kosala misala na bango kolanda mibeko oyo tata na bango, Aron, apesaki bango, mpe ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, atindaki ye.
20 肋未的其餘後裔中,有阿默蘭的子孫叔巴耳;叔巴耳的子孫中,有耶赫狄雅。
Tala bakitani mosusu ya Levi oyo bazalaki bakambi ya bituka: Shubaeli, mpo na etuka ya Amirami; Yedeya, mpo na etuka ya Shubaeli;
21 至於勒哈彼雅:勒哈彼雅子孫中,為首的是依史雅。
Yishiya, mpo na etuka ya Reabia;
22 依茲哈爾的子孫中,有舍羅摩特;舍羅摩特子孫中,有雅哈特。
Shelomoti, mpo na etuka ya Yitseari; Yaati, mpo na etuka ya Shelomiti.
23 赫貝龍的子孫中,為首的是耶黎雅,次為阿瑪黎雅,三為烏齊耳,四為耶卡默罕。
Bana mibali ya Ebron: mwana ya liboso, Yeriya; mwana ya mibale, Amaria; mwana ya misato, Yaazieli; mpe mwana ya minei, Yekameami;
24 烏齊耳的子孫中,有米加,米加的子孫中,有沙米爾。
Shamiri, mpo na etuka ya Mishe, mwana mobali ya Uzieli;
25 米加的弟兄:依史雅;依史雅的子孫中,有則加黎雅。
Zakari, mpo na etuka ya Yishiya, ndeko mobali ya Mishe.
Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Beno, mpo na etuka ya Yaaziya.
27 默辣黎的子孫中,有雅哈齊雅的兒子巴尼、芍罕、匝雇爾和依貝黎瑪。
Bakitani ya Merari: na nzela ya mwana na ye ya mobali Yaaziya: Beno, Shoami, Zakuri mpe Ibiri.
28 瑪赫里的兒子:厄肋阿匝爾和克士;厄肋阿匝爾沒有兒子。
Na nzela ya mwana na ye ya mobali Maali: Eleazari oyo atikalaki kobota te.
Mpo na Kishi: Yerameeli, mwana na ye ya mobali.
30 慕史的兒子:瑪赫里、厄德爾和耶黎摩特。這些人按照他們的家族,都是肋末的後裔。
Bana mibali ya Mushi: Maali, Ederi mpe Yerimoti. Bango wana nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango.
31 他們在達味君王與匝多克、阿希默肋客,並司祭及肋末人的族長面前,像他們的弟兄亞郎的子孫,族長與年幼的兄弟,都一樣抽了籤。
Bango mpe babetaki zeke lokola bandeko na bango ya mibali, bakitani ya Aron, na miso ya mokonzi Davidi, ya Tsadoki, ya Ayimeleki, ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi. Boye bazalaki komona mabota nyonso ndenge moko, ezala libota ya kulutu to ya leki.