< 歷代志上 19 >
1 [達味戰勝聯軍]此後,阿孟子民的君王納哈士死了,他的兒子繼位為王。
Sima na mwa tango, Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, akufaki, mpe mwana na ye ya mobali akitanaki na ye na bokonzi.
2 達味心想:我要善待納哈士的兒子哈農,因為他父親曾善待了我。於是達味派遣使者去慰問他,哀悼他的父親。但當達味的臣僕來到阿孟子民的境內哈農那裏慰問他時,
Davidi amilobelaki: « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, pamba te tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato epai ya Anuni mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki epai ya Anuni, na mokili ya bato ya Amoni, mpo na kobondisa ye,
3 阿孟子民的公卿對哈農說:「達味派人來慰問你,你以為他是尊敬你的父親嗎﹖他的臣僕到你這裏來,安知不是為調查、探聽、破壞這地方﹖」
bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni: « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo? Bato wana bayei epai na yo mpo na kotala mpe kononga mokili mpo ete babebisa yango. »
4 哈農遂拿住達味的臣僕,將他們的鬍鬚剃去,將他們下半截至臀部的衣服也都割去,然後放他們走了。
Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango mandefu, akataki bango bilamba kino na likolo ya mipende mpe abenganaki bango.
5 他們走了以後,有人將這些人所遭遇的事告訴了達味,達味遂即派人前去迎接他們;因為這些人很覺羞恥,王便吩咐說:「你們暫且留在耶里哥,等鬍鬚長起後再回來。」
Tango bayebisaki Davidi makambo oyo ekweyelaki bato wana, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bango, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo: « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota, sima nde bokozonga. »
6 阿孟子民見自己同達味結下了仇恨,哈農和阿孟子民便派人用一千「塔冷通」銀子,向二河之間的阿蘭,瑪阿加的阿蘭及祚巴去僱戰車和騎兵。
Tango bato ya Amoni bamonaki ete bamilukeli makambo epai ya Davidi, Anuni mpe bato ya Amoni batindaki bakilo ya palata nkoto tuku misato epai ya bato ya Siri ya Mezopotami, ya Maaka mpe ya Tsoba, mpo na kodefa bashar mpe basoda oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda.
7 他們僱得了戰車三萬二千輛,又僱得了瑪阿加王和他的軍隊。他們來到,就在默德巴前紮營;阿孟子民也從自己的城內出來,集合備戰。
Badefaki bashar, basoda nkoto tuku misato na mibale oyo babundaka likolo ya bampunda, mpe mokonzi ya Maaka elongo na mampinga na ye. Bongo, bayaki kotonga molako na bango pembeni ya Medeba. Kaka na tango yango, bato ya Amoni basanganaki na engumba na bango mpe babimaki mpo na kobunda.
Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko.
9 阿孟子民出來,在城門前擺了陣,來助戰的王子們另在田間擺了陣。
Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba na bango; kasi bakonzi oyo bayaki bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.
10 約阿布見前後受敵,便由以色列勁旅中,挑選一隊精兵擺陣進攻阿蘭人;
Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele, oyo baleki na mpiko mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.
11 將期餘的軍隊,交由自己的兄弟阿彼瑟指揮,叫他列陣進攻阿孟子民,
Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.
12 對他說:「若我打不下阿蘭人,你就來援助我;若你打不下阿孟子民,我就來援助你。
Joabi alobaki: « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakosunga yo.
13 你當勇敢! 為了我們的民族,為了我們天主的城,我們應當奮鬥。願上主成就他認為美好的事! 」
Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
14 然後,約阿布帶著軍隊往前進攻阿蘭人,阿蘭人便在他面前逃走了。
Boye, Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
15 阿孟子民見阿蘭人逃走,他們也在約阿布的兄弟阿彼瑟面前逃走,退入城中;以後,約阿布回了耶路撒冷。
Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mpe bazongaki na engumba. Bongo, Joabi azongaki na Yelusalemi.
16 阿蘭人見自己為以色列打敗,遂派使者將大河那邊的阿蘭人調來,由哈達德則爾的元帥芍法客率領。
Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, batindaki bantoma kobenga bato mosusu ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale Efrate. Tsofaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
17 達味一得了情報,就調集所有的以色列人,渡過約但河,來到赫藍,擺陣向他們進攻。當達味擺陣攻擊阿蘭人時,阿蘭人就來迎戰。
Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe akatisaki Yordani; apusanaki mpe asalaki molongo ya bitumba liboso na bango ya bato ya Siri, mpe bato ya Siri babundisaki ye.
18 但阿蘭人在以色列面前潰退,達味乘勝擊殺了阿蘭七千騎兵,四萬步兵,也殺了他們的元帥芍法客。
Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki basoda na bango, nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na makolo. Davidi abomaki lisusu Tsofaki, mokonzi na bango ya mampinga.
19 哈達德則爾的臣僕見他們敗於以色列,便與達味講和,表示臣服。從此阿蘭人再不敢協助阿孟子民了。
Tango bawumbu ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na Davidi mpe bakomaki na se ya bokonzi na ye. Boye bato ya Siri balingaki lisusu te kosunga bato ya Amoni.