< 歷代志上 14 >

1 [建造王宮]提洛王希蘭派使臣來見達味,給他送來香柏木,派來石匠和木工,為他建宮室。
Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie; mpe batongelaki ye ndako.
2 那時達味知道上主已確定他為以色列王,並為了自己的百姓以色列,提高了他的王位。[達味的子女]
Davidi asosolaki ete Yawe nde akomisaki ye mokonzi ya Isalaele mpe ete azalaki kotombola bokonzi na ye makasi mpo na Isalaele, bato na Ye.
3 達味在耶路撒冷又娶了妻室,生了許多子女。
Davidi abalaki lisusu basi ebele kati na Yelusalemi mpe abotaki lisusu bana ebele ya mibali mpe ya basi.
4 達味在耶路撒冷所生兒子的名字如下:沙慕亞、芍巴布、納堂、撒羅滿、
Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi: Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo,
5 依貝哈爾、厄里叔亞、厄里培肋特、
Yibari, Elishuwa, Elipeleti,
6 諾加、乃費格、雅非亞、
Noga, Nefegi, Yafia,
7 厄里沙瑪、貝里雅達和厄里培肋特。[擊敗培肋舍特]
Elishama, Beliada mpe Elifeleti.
8 培肋舍特人聽說達味受傅,為全以色列王,遂都上來向達味尋釁。達味聽說,便出來迎擊。
Tango bato ya Filisitia bayokaki sango ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele mobimba, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, abimaki mpo na kokutana na bango.
9 培肋舍特人上來侵入了勒法因平原。
Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
10 那時,達味求問天主說:「我可以上去攻打培肋舍特人嗎﹖你將他們交在我手中嗎﹖」上主答應他說:「你上去,我必將他們交在你手中。」
Davidi atunaki Nzambe: — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia? Okokaba bango solo na maboko na ngai? Yawe azongiselaki ye: — Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.
11 達味於是上到巴耳培辣親,在那裏擊敗了他們。達味因此說:「天主假我的手使我的敵人崩潰,如水破堤。」因此後人稱這地方為巴耳培辣親。
Bato ya Filisitia bamataki na Bali-Peratsimi, mpe Davidi alongaki bango kuna. Bongo Davidi alobaki: « Na nzela ya loboko na ngai, Nzambe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.
12 培肋舍特人把自己的神像都遺棄在那裏,達味命人用火燒毀。
Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango, mpe Davidi apesaki mitindo ete batumba yango na moto.
13 培肋舍特人又侵入平原。
Sima na mwa tango, bato ya Filisitia bayaki mpe bapanzanaki lisusu kati na lubwaku.
14 達味又求問天主,天主對他說:「不要一直上去追擊他們,要繞到他們後方,曾桑林那邊抄他們的後路。
Bongo Davidi atunaki lisusu Nzambe, mpe Nzambe azongiselaki ye: « Tango okobundisa bango, kolanda bango na sima te; kasi tambola mopanzi, mosika na bango. Bongo tango okokoma epai bango bazali, bimela bango na liboso, liboso ya zamba ya banzete ya mirie.
15 你一聽見桑樹梢上有腳步聲,要即刻出戰,因為天主在你面前出擊培肋舍特人的軍隊。」
Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya mirie, na tango wana nde okobima mbala moko mpo na kobunda; pamba te ekolakisa ete Nzambe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
16 達味就照天主所命的行了,擊殺培肋舍特人的軍隊,由基貝紅直到革則爾。
Davidi asalaki ndenge Nzambe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Gabaoni kino na Gezeri.
17 因此,達味的聲名傳遍了各地,上主使各民族都害怕他。
Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.

< 歷代志上 14 >