< Захария 12 >

1 Господното слово наложено на мене за Израиля: - Така казва Господ, Който простря небето, И основа земята, И образува в човека духа му:
Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi:
2 Ето, Аз правя Ерусалим омайна чаша На всичките околни племена; И това ще бъде и за Юда В обсадата против Ерусалим.
« Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.
3 В оня ден ще направя Ерусалим Утегчителен камък на всичките племена; Всички, които се натоварят с него, ще се смажат; И против него ще се съберат всичките народи на света.
Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.
4 В оня ден, казва Господ, Ще поразя всеки кон с ужас, И ездача му с изумление; А като отворя очите Си над Юдовия дом, Ще поразя със слепота всеки кон на племената.
Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo.
5 И Юдовите началници ще рекат в сърцето си: Ерусалимските жители са моя подпорка Чрез Господа на Силите, техния Бог.
Boye, bakambi ya Yuda bakomilobela: ‹ Bato ya Yelusalemi bazali makasi mpo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe na bango. ›
6 В оня ден ще направя Юдовите началници Като жарник с огън между дърва, И като запален факел всред снопове; Те ще погълнат всичките околни племена Отдясно и отляво, И Ерусалим пак ще се насели на своето си място, В Ерусалим.
Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka: bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.
7 И Господ ще избави първо Юдовите шатри, За да не се възвеличи над Юда славата на Давидовия дом И славата на ерусалимските жители.
Yawe akobikisa liboso bandako ya kapo ya Yuda mpo ete lokumu ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi eleka te lokumu ya Yuda.
8 В оня ден Господ ще защити ерусалимските жители, Слабите между тях в оня ден ще бъдат като Давида, И Давидовият дом като Бога, Като ангел Господен пред тях.
Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango.
9 В оня ден Ще потърся да изтребя всичките народи, Които идат против Ерусалим;
Na mokolo wana, nakobima mpo na koboma bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi.
10 А на Давидовия дом И на ерусалимските жители Ще излея дух на благодат и на моление; И те ще погледнат на Мене, Когото прободоха; И ще плачат за Него Както плаче някой за едничкия си син, И ще скърбят горчиво за Него Както скърби някой за първородния си.
Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.
11 В оня ден ще има голямо жалеене в Ерусалим, Като жалеенето при Ададримон в полето Магедон.
Na mokolo wana, matanga kati na Yelusalemi ekozala monene lokola matanga ya Adadi-Rimoni na etando ya Megido.
12 Земята ще жалее, Всяко домочадие насаме: Домочадието на Давидовия дом насаме, И жените им насаме; Домочадието на Натановия дом насаме, И жените им насаме;
Mokili mobimba ekosala matanga, etuka na etuka na esika na yango elongo na basi na yango: etuka ya libota ya Davidi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Natan elongo na basi na yango,
13 Домочадието на Левиевия дом насаме, И жените им насаме; Домочадието на Семея насаме, И жените им насаме;
etuka ya libota ya Levi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Shimei elongo na basi na yango,
14 Всичките останали домочадия, Всяко домочадие насаме, И жените им насаме.
mpe bituka nyonso oyo etikali elongo na basi na yango.

< Захария 12 >