< Неемия 10 >

1 А ония, които подпечатаха, бяха: управителят Неемия, Ахалиевият син и Седекия,
Tala bakombo ya bato oyo batiaki mikoloto na bango na mokanda yango: Moyangeli Neyemi, mwana mobali ya Akalia; Sedesiasi,
2 Сераия, Азария, Еремия,
Seraya, Azaria, Jeremi,
3 Пасхор, Амария, Мелхия,
Pashuri, Amaria, Malikiya,
4 Хатус, Севания, Малух,
Atushi, Shebania, Maluki,
5 Харим, Меримот, Авдия,
Arimi, Meremoti, Abidiasi,
6 Даниил, Ганатон, Варух,
Daniele, Ginetoni, Baruki,
7 Месулам, Авия, Миамин,
Meshulami, Abiya, Miyamini,
8 Маазия, Велгай и Семаия; те бяха свещеници.
Maazia, Biligayi mpe Shemaya. Ezali bango nde bazalaki Banganga-Nzambe.
9 Левити: Исус, Азаниевият син, Вануй от Инададовите потомци и Кадмиил;
Mpo na Balevi: Jozue, mwana mobali ya Azania; Binuwi, moko ya bakitani ya Enadadi; Kadimieli
10 и братята им Севания, Одия, Келита, Фелаия, Анан,
elongo na bandeko na bango: Shebania, Odia, Kelita, Pelaya, Anani,
11 Михей, Реов, Асавия,
Mishe, Reobi, Ashabia,
12 Закхур, Серевия, Севания,
Zakuri, Sherebia, Shebania,
13 Одия, Ваний и Венину.
Odia, Bani mpe Beninu.
14 Началниците на людете: Фарос, Фаат-моав, Елам, Зату, Ваний,
Mpo na bakambi ya bato: Pareoshi, Paati-Moabi, Elami, Zatu, Bani,
15 Вуний, Азгад, Вивай,
Buni, Azigadi, Bebayi,
16 Адония, Вагуй, Адин,
Adoniya, Bigivayi, Adini,
17 Атир, Езекия, Азур,
Ateri, Ezekiasi, Azuri,
18 Одия, Асум, Висай,
Odia, Ashumi, Betsayi,
19 Ариф, Анатот, Невай,
Arifi, Anatoti, Nebayi,
20 Матфиас, Месулам, Изир,
Magipiashi, Meshulami, Eziri,
21 Месизавеил, Садок, Ядуа,
Meshezabeyeli, Tsadoki, Yaduwa,
22 Фелатия, Анан, Анаия,
Pelatia, Anani, Anaya,
23 Осия, Анания, Асув,
Oze, Anania, Ashubi,
24 Алоис, Филея, Совив,
Aloeshi, Pila, Shobeki,
25 Реум, Асавна, Маасия,
Rewumi, Ashabina, Maaseya,
26 Ахия, Анан, Ганан,
Ayiya, Anani, Anane,
27 Малух, Харим и Ваана.
Maluki, Arimi, Baana.
28 А останалите от людете, свещениците, левитите, вратарите, певците, нетинимите, и всички, които бяха се отделили от племената на земите и се прилепили към Божия закон, жените им, синовете им и дъщерите им, всеки, който знаеше и разбираше,
Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango: kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola.
29 присъединиха се към братята си, големците си, и постъпиха в заклинание и клетва да ходят по Божия закон, който бе даден чрез Божия слуга Моисея, и да пазят и вършат всичките заповеди на Иеова нашия Господ, съдбите Му и повеленията Му;
Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe!
30 и да не даваме дъщерите си на племената на земята, и да не вземаме техните дъщери за синовете си;
Balobaki: « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.
31 и ако племената на земята донесат стоки или каква да било храна за продан в съботен ден, да не купуваме от тях в събота или в свет ден; и да се отказваме от обработването на земята всяка седма година и от изискването на всеки дълг.
Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso.
32 Наредихме Си още да се задължим да даваме всяка година по една трета от сикъла за службата на дома на нашия Бог,
Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso,
33 за присъствените хлябове, за постоянния хлебен принос, за постоянното всеизгаряне, в съботите и на новолунията и на празниците, и за светите неща, за приносите за грях в умилостивение за Израиля, и за всичката работа на дома на нашия Бог.
mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »
34 И ние - свещениците, левитите и людете - хвърлихме жребие помежду си за приноса на дървата, за да ги докарват в дома на нашия Бог, според бащините ни домове, в определените времена всяка година, за да горят върху олтара на Господа нашия Бог според предписаното в закона;
Biso, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato, tobetaki zeke mpo na kokata tango oyo libota na libota kati na biso ekomema likabo ya bakoni na Ndako ya Nzambe na biso, na mibu nyonso mpo na kopelisa moto na etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko.
35 и всяка година да донасяме в Господния дом първите плодове от земята си и първите плодове от рожбата на всяко дърво;
Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe.
36 и да довеждаме в дома на нашия Бог, на свещениците, които служат в дома на нашия Бог, първородните от синовете си и от добитъка си, според предписаното в закона, и първородните от говедата си и от стадата си;
Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko.
37 и да донасяме на свещениците, в стаите на дома на нашия Бог първите плодове от нашето тесто, и приносите си, и плодовете от всякакво дърво, тоже и виното и дървеното масло; и да внасяме на левитите десетъците от земята си, и левитите да вземат десетъците по всичките градове, гдето обработваме земята.
Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala.
38 И някой свещеник, Ааронов потомец да бъде с левитите, когато вземат десетъците; и левитете да донасят десетъка от десетъците в дома на нашия Бог, в стаите на съкровищницата.
Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso.
39 Защото израилтяните и левийците трябва да донасят приносите от житото, от виното и от дървеното масло в стаите, гдето са съдовете на светилището, и служащите свещеници, вратарите и първенците. И няма да оставим дома на нашия Бог.
Bana ya Isalaele elongo na Balevi basengeli komema makabo na bango ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, na bibombelo epai wapi babombaka bisalelo ya Esika ya bule, mpe epai wapi Banganga-Nzambe basalaka mosala na bango mpe bakengeli bikuke elongo na bayembi batelemaka. Boye, tokotika Ndako ya Nzambe na biso te.

< Неемия 10 >