< Плач Еремиев 5 >

1 Спомни си, Господи, какво ни стана; Погледни и виж как ни укоряват.
Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso! Tala mpe mona soni na biso!
2 Наследството ни мина на чужденци, Къщите ни на странни.
Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu.
3 Останахме сирачета без баща; Майките ни са като вдовици.
Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali!
4 Водата си пихме със сребро, Дървата ни идат с пари.
Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso!
5 Нашите гонители са на вратовете ни; Трудим се, и почивка нямаме.
Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia.
6 Простряхме ръка към египтяните И към асирийците, за да се наситим с хляб.
Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei.
7 Бащите ни съгрешиха, и няма ги; И ние носим техните беззакония.
Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango.
8 Слуги господаруват над нас, И няма кой да ни избави от ръката им.
Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.
9 Добиваме хляба си с опасност за живота си Поради меча, който ограбва в пустинята.
Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe.
10 Кожата ни почервеня като пещ Поради върлуването на глада.
Poso ya nzoto na biso ekomi moto lokola nde balekisi yango na mbabola, pamba te nzala ezali kotumba biso makasi.
11 Изнасилваха жените в Сион, Девиците в Юдовите градове.
Basambwisi basi kati na Siona, mpe bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te kati na bingumba ya Yuda.
12 Чрез техните ръце биваха обесени първенците, Старейшините не се почитаха.
Badiembiki bakalaka, na maboko na bango; mpe bapesi bakambi lokumu te.
13 Младежите носеха воденични камъни, И децата падаха под товара на дървата.
Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni.
14 Старейшините не седят вече на портите; Младежите изоставиха песните си.
Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule.
15 Престана радостта на сърцето ни; Хорото ни се обърна на жалеене.
Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga.
16 Венецът падна от главата ни; Горко ни! защото сме съгрешили.
Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu!
17 Затова чезне сърцето ни. Затова причерня на очите ни.
Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,
18 Поради запустяването на Сионския хълм Лисиците ходят по него.
ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.
19 Ти, Господи, седиш като Цар до века; Престолът Ти е из род в род.
Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.
20 Защо ни забравяш за винаги, И ни оставяш за толкоз дълго време?
Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso? Mpo na nini osundola biso tango molayi?
21 Възвърни ни, Господи, към Себе Си, и ще се възвърнем; Обнови дните ни както изпърво,
Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo; mpe tokozonga penza! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala!
22 Ако не си ни отхвърлил съвсем, И не си се разгневил твърде много против нас.
Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo?

< Плач Еремиев 5 >