< 3 Царе 17 >

1 А тесвиецът Илия, който бе от галаадските жители, рече на Ахава: В името на живия Господ, Израилевия Бог, Комуто служа, заявявам ти че през тия години няма да падне роса или дъжд освен чрез дума от мене.
Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi: — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
2 И Господното слово дойде към него и рече:
Bongo Yawe alobaki na Eliya:
3 Иди от тука, обърни се към изток, и скрий се при потока Херит, който е срещу Иордан.
— Longwa awa, kende na ngambo ya este mpe bombama na lubwaku ya Keriti, na ngambo ya este ya Yordani.
4 Ще пиеш от потока; а на враните заповядах да те хранят там.
Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
5 И той отиде та стори според Господното слово; защото отиде и седна при потока Херит, който е срещу Иордан.
Eliya asalaki ndenge Yawe alobaki na ye: akendeki na lubwaku ya Keriti na ngambo ya este ya Yordani mpe avandaki kuna.
6 И враните му донасяха хляб и месо заран, и хляб и месо вечер; а той пиеше от потока.
Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku.
7 А след известно време потокът пресъхна, понеже на валя дъжд по земята.
Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili.
8 Тогава Господното слово дойде към него и рече:
Yawe alobaki na Eliya:
9 Стани, иди в Сарепта сидонска и седи там; ето, заповядах на една вдовица там, да те храни.
« Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »
10 И тъй, той стана та отиде в Сарепта. И като дойде при градската порта, ето там една вдовица, която събираше дърва; и той извика към нея и рече: Донеси ми, моля, малко вода в съд да пия.
Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye: — Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela.
11 И като отиваше да донесе, той извика към нея и рече: Донеси ми, моля и залък хляб в ръката си.
Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu: — Nabondeli yo, memela ngai mpe lipa.
12 А тя рече: Заклевам се в живота на Господа твоя Бог, нямам ни една пита, но само една шепа брашно в делвата и малко дървено масло в стомната и, ето, събирам две дръвчета, за да ида и да го приготвя за мене и за сина ми да го изядем и да умрем.
Mwasi yango azongiselaki ye: — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.
13 А Илия й рече: Не бой се; иди, стори както каза; но омеси от него първо за мене една малка пита та ми донеси, а после приготви за себе си и за сина си;
Eliya alobaki na ye: — Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali.
14 защото така казва Господ Израилевият Бог: Делвата с брашното няма да се изпразни, нито стомната с маслото ще намалее, до деня, когато Господ даде дъжд на земята.
Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. »
15 И тя отиде та стори според каквото каза Илия; и тя и той и домът й ядоха много дни.
Mwasi yango akendeki mpe asalaki ndenge kaka Eliya alobaki. Boye, na tango molayi, bilei ezangaki te mpo na Eliya, mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpe mpo na ndako na ye.
16 Делвата с брашното не се изпразни, нито стомната с маслото намаля, според словото, което Господ говори на Илия.
Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.
17 А след това, синът на жената, домакинята, се разболя; и болестта му бе тъй тежка, щото не остана дишане в него.
Sima na mwa tango, mwana mobali ya mwasi oyo akufisa mobali, nkolo ndako, abelaki; mpe pasi na ye ekomaki makasi penza kino akataki motema.
18 Тогава тя рече на Илия: Какво има между мене и тебе, Божий човече? Дошъл ли си при мене, за да ми припомниш греховете и да умориш сина ми?
Mwasi yango alobaki na Eliya: — Moto na Nzambe, nasali yo nini? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali?
19 А той каза: Дай ми сина си. И като го взе от пазухата й та го изнесе на горната стая, гдето живееше, положи го на леглото си.
Eliya azongisaki: — Pesa ngai mwana na yo ya mobali. Eliya azwaki mwana yango na maboko ya mwasi oyo akufisa mobali, amemaki ye na shambre ya likolo epai wapi azalaka kovanda mpe alalisaki ye na mbeto na ye;
20 И извика към Господа и рече: Господи Боже мой! нанесъл ли си зло и на вдовицата, при която живея, като си уморил сина й?
abelelaki Yawe na maloba oyo: — Oh Yawe, Nzambe na ngai, mpo na nini koyeisa lisusu pasi na bomoi ya mwasi oyo akufisa mobali, na koboma mwana na ye ya mobali; nzokande ayambaki ngai epai na ye?
21 Тогава той се простря три пъти върху детето, и извика към Господа, казвайки: Господи Боже мой, моля Ти се, нека се върне душата на това дете в него.
Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo: — Oh Yawe, Nzambe na ngai, tika ete pema ya mwana mobali oyo ezonga kati na ye.
22 И Господ послуша Илиевия глас, та се върна душата на детето в него и то оживя.
Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi.
23 Тогава Илия взе детето та го занесе от горната стая в къщата и даде го на майка му; и Илия рече: Виж, синът ти е жив.
Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki: — Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi.
24 И жената каза на Илия: Сега познавам, че си Божий човек, и че Господното слово, което говориш, е истина.
Mwasi yango alobaki na Eliya: — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.

< 3 Царе 17 >