< 1 Коринтяни 7 >

1 А относно това, що ми писахте: Добре е човек да се не докосва до жена.
Sik’oyo, nazali kopesa biyano na tina na makambo oyo bokomelaki ngai. Eleki malamu mpo na mobali ete abala mwasi te.
2 Но, за да се избягват блудодеянията, нека всеки мъж има своя си жена, и всяка жена да има свой мъж.
Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.
3 Мъжът нека има с жената дължимото към нея сношение; подобно и жената с мъжа.
Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye.
4 Жената не владее своето тяло, а мъжът; така и мъжът не владее своето тяло, а жената.
Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.
5 Не лишавайте един друг от съпружеско сношение, освен ако бъде по съгласие за малко време, за да се предавате на молитва, и пак бъдете заедно, да не би сатана да ви изкушава чрез вашата невъзможност да се въздържате.
Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.
6 Но, това казвам, като позволение, а не като заповед.
Awa nazali koloba bongo, nazali na ngai kaka kopesa likanisi, kasi mobeko te.
7 Обаче, бих желал всичките човеци да бъдат какъвто съм аз. Но всеки има своя особен дар от Бога, един така, а друг инак.
Nakokaki kosepela ete mibali nyonso bazala lokola ngai; nzokande, moto na moto azali na likabo na ye ya ngolu, oyo azwi kowuta na Nzambe: moko azali na likabo oyo, mosusu azali na likabo wana.
8 А на неженените и вдовците казвам: Добро е за тях, ако си останат такива, какъвто съм и аз.
Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai.
9 Но, ако не могат да се въздържат, нека се женят, защото по-добре е да се женят, отколкото да се разжегват.
Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.
10 А на жените заръчвам, и то не аз, но Господ: Жена да не оставя мъжа си;
Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo: Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye;
11 (но ако го остави, нека остане неомъжена, или нека се помири с мъжа си; ) и мъж да не напуща жена си.
kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.
12 А на другите казвам аз, не Господ: Ако някой брат има невярваща жена, и тя е съгласна да живее с него, да не я напуща.
Epai ya bato mosusu, nazali koloba, Nkolo te kasi ngai: Soki ndeko mobali Moklisto abali mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango andimi kowumela elongo na ye, tika ete abengana mwasi yango te;
13 И жена, която има невярващ мъж, и той е съгласен да живее с нея, да не напуща мъжа си.
soki mpe mwasi azali na mobali oyo azali mondimi te, mpe mobali yango andimi kowumela elongo na ye na libala, tika ete mwasi akabwana te na mobali na ye.
14 Защото невярващият мъж се освещава чрез жената, и невярващата жена се освещава чрез брата, своя мъж; инак чедата ви щяха да бъдат нечисти, а сега са свети.
Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.
15 Но, ако невярващият напусне, нека напусне; в такива случаи братът или сестрата не са поробени на брачния закон. Бог, обаче, ни е призвал към мир.
Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, tika ete aboma na ye! Na likambo ya boye, ndeko mobali to ndeko mwasi azali ya kokangama te. Nzambe abenga bino mpo na kobika bomoi kati na kimia.
16 Защото отгде знаеш жено, дали не ще спасиш мъжа си? или отгде знаеш мъжо, дали не ще спасиш жена си?
Oyebi nini kati na likambo yango? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo!
17 Само нека всеки постъпва така, както Господ му е отделил сили, и всеки, както Бог го е призовал; и така заръчвам по всичките църкви.
Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso.
18 Обрязан ли е бил призован някой във вярата, да не крие обрязването. Необрязан ли е бил някой призован, да се не обрязва.
Boni, moto moko azalaki akatama ngenga tango Nzambe abengaki ye? Tika ete atikala akatama ngenga! Boni, moto moko azalaki akatama ngenga te tango Nzambe abengaki ye? Tika ete atikala akatama ngenga te!
19 Обрязването е нищо, и необрязването е нищо, но важното е пазенето на Божиите заповеди.
Kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na tina te; likambo ya tina ezali nde kobatela mibeko ya Nzambe.
20 Всеки нека си остава в това звание, в което е бил призван във вярата.
Tika ete moko na moko atikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye!
21 В положение на роб ли си бил призован? да те не е грижа, (но ако можеш и свободен да станеш, по-добре използувай случая);
Boni, ozalaki mowumbu tango Nzambe abengaki yo? Komitungisa na yango te! Ezala soki okoki kokoma nsomi, salela nde malamu lolenge na yo.
22 защото, който е бил призован в Господа като роб, е свободен човек на Господа; така и който е бил призован като свободен човек, е роб на Христа.
Pamba te moto oyo azalaki mowumbu tango abengamaki mpo na kosalela Nkolo azali mokangolami ya Nkolo; ndenge moko mpe, moto oyo azalaki nsomi tango Nzambe abengaki ye azali mowumbu ya Klisto.
23 С цена сте били купени; не ставайте роби на човеци.
Bosikolamaki na motuya makasi! Boye, bokoma te bawumbu ya bato.
24 Братя, всеки в каквото е бил призован във вярата, в него нека си остане с Бога.
Bandeko, tika ete moko na moko awumela, na miso ya Nzambe ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye!
25 Относно девиците нямам заповед от Господа; но давам мнение като един, който е получил милост от Господа да бъде верен.
Mpo na oyo etali baseka, nazali na mobeko te kowuta na Nkolo; kasi na mawa ya Nkolo, lokola moto oyo bakoki kotiela motema, nazali kopesa likanisi na ngai.
26 И тъй, поради настоящата неволя, ето какво мисля за доброто, че е добре за човека така да остане както си е.
Nakanisi ete, mpo na pasi ya tango oyo, ezali malamu mpo na moto kotikala ndenge azali.
27 Вързан ли си в жена? не търси развързване. Отвързан ли си от жена? не търси жена.
Ozali na mwasi? Koluka kokabwana na ye te. Ozali na mwasi te? Koluka mpe mwasi te.
28 Но, ако се и ожениш, не съгрешаваш; и девица, ако се омъжи, не съгрешава; но такива ще имат житейски скърби, а пък аз ви жаля.
Kasi soki mpe obali, osali lisumu te; soki moseka abali, asali lisumu te. Nzokande, bato oyo babala bakokutana na pasi mingi kati na bomoi na bango; mpe ngai, nalingi nde kosunga bino mpo bokutana na pasi yango te.
29 Това само казвам, братя, че останалото време е кратко; затова и тия, които имат жени, нека бъдат, като че нямат;
Bandeko na ngai, nazali koloba boye: tango ekomi moke; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te;
30 и които плачат, като че не плачат; които се радват; като че не се радват; които купуват, като че нищо не притежават;
tika ete bato oyo bazali kolela bazala lokola nde bazali kolela te; tika ete ba-oyo bazali kosepela bazala lokola nde bazali kosepela te; tika ete ba-oyo bazali kosomba bazala lokola nde bazali na eloko te;
31 и които си служат със света, като че не са преданни на него: защото сегашното състояние(Гръцки: Образът ) на тоя свят преминава.
tika ete ba-oyo bazali kosalela biloko ya mokili bazala lokola nde bazali kosalela yango te; pamba te mokili oyo, na lolenge na yango ya sik’oyo, ezali koleka!
32 А аз желая вие да бъдете безгрижни. Нежененият се грижи за това, което е Господно, как да угажда на Господа;
Nalingi ete bomitungisaka te. Mobali oyo azali ya kobala te atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo, alukaka ndenge nini kosepelisa Nkolo.
33 а жененият се грижи за това, което е световно, как да угажда на жена си.
Mobali oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mwasi na ye,
34 Тъй също има разлика между жена и девица. Неомъжената се грижи за това, което е Господно, за да бъде света и в тяло и в дух; а омъжената се грижи за това, което е световно, как да угажда на мъжа си.
mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azangi mobali, lokola moseka, atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo mpo ete azala bule kati na nzoto mpe kati na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mobali na ye.
35 И това казвам за вашата собствена полза, не да ви държа с оглавник, но заради благоприличието, и за да служите на Господа без отвличане на ума.
Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino; ezali te mpo na kotiela bino motambo, kasi ezali nde mpo ete bosala oyo ezali malamu koleka mpe bomipesa mobimba na Nkolo.
36 Пак, ако някой мисли, че постъпва неприлично към дъщеря си девица, ако й е минала цветущата възраст, и ако трябва така да стане, нека прави каквото ще; не съгрешава, нека се женят.
Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mwasi mobandami na ye na libala, soki akanisi kosangisa na ye nzoto mpe ete asengeli kaka kosala bongo, wana bazali kotambola kati na likanisi ya kobalana, tika ete asala kolanda posa na ye, azali kosala lisumu te. Tika ete babalana!
37 Но който стои твърдо в сърцето си, и не бива принуден, но има власт да изпълни волята си, и е решил в сърцето си да държи дъщеря си девицата неомъжена, ще направи добре.
Kasi mobali oyo azwi mokano kati na motema na ye, na kotindikama te mpe na bososoli nyonso, ya kosangisa nzoto te na mwasi mobandami na ye na libala, asali malamu.
38 Така щото, който омъжи дъщеря си девицата добре прави; а който я не омъжи, ще направи по-добре
Boye, mobali oyo abali mwasi mobandami na ye na libala asali malamu, kasi oyo abali ye te asali malamu koleka.
39 Жената е вързана до когато е жив мъжът й; но ако мъжът умре, свободна е да се омъжи за когото ще, само в Господа.
Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye na tango nyonso oyo mobali yango azali na bomoi. Soki mobali na ye akufi, mwasi akomi nsomi mpo na kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi mobali yango asengeli kozala Moklisto.
40 Но, по моето мнение, по-щастлива е, ако си остане така; а мисля, че и аз имам Божия Дух.
Nzokande, na makanisi na ngai, akozala mwasi ya esengo koleka soki atikali ndenge azali; mpe nakanisi ete, ngai mpe, nazali na Molimo ya Nzambe.

< 1 Коринтяни 7 >