< Titus 1 >

1 Bulus Ivre koh Irji u toh du Yesu Almasihu ni chuidi bi Irji ni toh njanjaji.
Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe ntoma ya Yesu-Klisto, mpo na kolendisa kondima ya baponami ya Nzambe mpe boyebi ya bosolo oyo ememaka na botosi kati na makambo ya Nzambe,
2 Biyi ni ye suron ni drie u kakle wa ice na hei ni mi Irjina wa a hlah ni sen. (aiōnios g166)
mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango, (aiōnios g166)
3 Ni ton kima a tsoro itere ma ni to du ma wa mba ne dume dub mi ti wayi ni tre Irji u kpata chuwo.
mpe atalisi sik’oyo polele na nzela ya Liloba na Ye, oyo napesamelaki mokumba ya kosakola, kolanda etinda ya Nzambe, Mobikisi na biso, na tango oyo Ye akata;
4 Hi ni Titus Ivren u njanji ni mi kpayemebu isi suron u ndedema u Irji iti Buachi bu Yesu.
epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye: Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso!
5 Ni tu kima me kawu do ni karita na kima u ka mla kpie ba ti ni ba wa bana Shuna chu be nikon ni gbu'a wawu'u na de me hla'u'a
Natikaki yo kati na Kreti mpo ete osilisa kobongisa makambo oyo etikalaki mpe opona bakambi ya Lingomba kati na engumba moko na moko, ndenge natindaki yo.
6 Na ki du nikon du na he idi u memeti na. Lilo du he ni iwa riri da he ni imri be wo tre.
Mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moboti ya malamu; mpe bana na ye basengeli kozala bandimi, bana ya mobulu te mpe ya kilikili te.
7 A naki nikon u tra Irji du hi u ya tra ni ko ito rime du na ti kpi meme na du na he idi u sohda hwa na, u kpa bubu timeme da soh tuma.
Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.
8 Na kima ka he idi u kpa be tsiri ni wo ha. ikpan ikpi dedema naki du he idi. dedema. u mla kpi ti ni klu sisiri Irji ni sonroma da he u vutuma.
Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,
9 Du he u hla tre wa ba towu do'a da na hla ice ni mina. Nakima a ni ya gron bari da tsro ba dedeme u mla ti.
moto oyo akangama makasi na Liloba ya solo, ndenge kaka bateyaki ye yango. Na bongo, akoki kolendisa bato mosusu na nzela ya malakisi ya peto mpe kosukisa tembe ya bato oyo bandimaka te.
10 Naki idi be sehtu ba hay gbugbu be wa ba tre kukklu da ni guru idi ni ce tutu be wa ba tre ade ba ye jia.
Bato mingi baboyi kotosa solo, bazali koteya makambo ezanga tina mpe ya lokuta, mingi-mingi kati na bato oyo bakatama ngenga.
11 Abi du ba zuba mba bah itere Irji kwansra da ni tsoro mba ikpi u shan wa a na bi du ba tsoro ba na.
Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.
12 Iri ni mi ba a hi u toh gyegyere a “tere “keme ni glu ingle bi cei, be memeti.
Moto moko ya Kreti, oyo bango moko bato ya Kreti bazwaka lokola mosakoli, alobaki: « Bato ya Kreti bazalaka bakosi, bazalaka banyama mabe, bato na lokoso mpe bagoyigoyi. »
13 Itere a njanji mlati ni bawu ni gbegble wa ba gburu ni mi njaji.
Litatoli oyo ezali penza ya solo. Yango wana, pamela bango makasi mpo ete bazala na kondima ya peto
14 Na ka sroun me wo holocholo u Yahudawa ni ibe mba wa mba kwab njaaji Sarah.
mpe balanda te masapo ya Bayuda to mibeko ya bato oyo baboyi solo.
15 Ye ni bi wa ba he tsratsra ko nge ni mba a hi tsratsra. i be wa bana he tsratsra na mba na he tsratsra na da he ni njaji na.
Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.
16 Koge na he tsratsra na ni tu isroun mba ni i meren mba a hi hlotsu megi.
Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.

< Titus 1 >