< Mark 10 >
1 a luye ni migbu yahuda u kle kle ni gran gbu urdu indi gbugbuu bla ye niwu wa soma bla tre rji ni bawu nawa a ni ti chachia
Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye.
2 Farisawa baluye niwu na miyen a hi hlatre ndu lilon zuwama basun wokpie wa anitre
Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye: — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala?
3 wa miye ba ani musa a hla ni yiwu nige?
Yesu azongiselaki bango: — Moyize apesaki bino mobeko nini?
4 u ba tre ani musa kparyemen nduba nhan takada u ga gram na kachuwo
Balobaki na Yesu: — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.
5 yes bawa ani kawo tre biyi atre ndu ba nhan
Bongo Yesu alobaki na bango: — Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga.
6 rji mummla irji tie lilon ba iwa
Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. »
7 ni tukima lilon ni ka itie ma ba yima don da shi sun hamba
Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye,
8 ha mbaa ba zama inaman kpa riri anaki bana harina ni koshishi ama inaman riri
mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.
9 ipie wa irji tie di diori naga tie hari na
Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.
10 ni mikoma almagerema ba hla miyen itre kima
Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango.
11 wa hla nibawu du indi wa a zu wama na kpari a si yi zina
Yesu alobaki na bango: — Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso.
12 naki ni iwa wa a kama ni lonma na gran irir wawume a si yi zina
Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
13 baka ji miri bi zizah ma ye niwu ni ndu bre wo niba almajere ba zuba
Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
14 yesu toh naki isuron lude nivu wa hla bawu diba bre mirizizah di ye mime na zuba na na iriba mulki rji ahae
Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli: — Botika bana mike baya epai na Ngai; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
15 njaji tre mi hla yiwu indi wa ana kpa mulki rji na vieveren tsitsana ana rimulki na
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
16 a vuba na brewoba ba na tie lulu yo bawu
Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
17 da alude hi ni tukon iguri a lutsuts ye ni shishima na kuquegbarju na miyen mala u ndi ndi mi tiege nife mulkime? (aiōnios )
Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki: — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios )
18 yesu miyen age sa u yome mala u ndi ndi? irji kagrjima ani tie ndi ndi
Yesu azongisaki: — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
19 u toh dokoki u na hla di na u na yi zina na u na mimre diona na kpa tieme ba yime tsiri na
Oyebi mibeko oyo: « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
20 wa hla niwu mala nima tie bi bana tun mi hie ni verenze
Moto yango alobaki lisusu: — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai!
21 yesu kahya na gir ni suronma ni kpie wa atiea wa hla niwu ikpie riri a ridonhi ko ni vugbime wawu lea ni kah nkle ga bi tie ya
Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye: — Ozangi eloko moko kaka: kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22 ama isurinma joku nitu tre ki wa hi nifu ni suron ma nitu wa a hi ndi u wo
Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
23 yesu kahya kagon ni almajere ma da tre adi a he niyah ndu indi u wo du ri ni tarji
Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango: — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe!
24 Almajere ma ba hanyue ni wotre ki i yesu lar tre burbru adi a hei niyah do ndi u wo du ri tar rji
Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu: — Solo, bana na Ngai, ezali pasimpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe!
25 lakurimi niri ni ndo noron gbalame niwa indi u wo ni ri nitarji
Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
26 u ba hahyue da miyen a nhan ni nawo ke na?
Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana: — Bongo nani penza akoki kobikisama?
27 yesu kahyaba da tre ni ndi kpic na yina ammma ni rji koge ni yiu
Yesu atalaki bango mpe alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, ekosalema penza; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.
28 Bitrus luwulde nitre ndi ga ki kah koge don ndi ni hu
Petelo alobaki na Yesu: — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo!
29 yesu tre adi njaji tre ba indi wa ani kah iko don ko imimre vayi ma imimre lon ko mimremba ko iyi ko itie ko irjun ko imimrema don ni tumun ba itre mu
Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu,
30 wa a na kpa dima wulon okpu wulon na ni zami yina (aiōn , aiōnios )
akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko. (aiōn , aiōnios )
31 gbugbuu wa ba hei ni koshi ba kama ye kogon u bi kogon ba kama ye koshishi
Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
32 ba lu hon sihi ni urushelima u yesu guchi ni bawu ni koshishi u ba hannyiu bi wa ba si huba ni kogon kura ba tie sisir wa ala vu iseri a na sibla ni wu iri kpie wa ba toh a ni ye
Wana bazalaki na nzela mpo na komata na Yelusalemi, Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bayekoli bazalaki na mawa, mpe bato mosusu oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga. Yesu abendaki lisusu na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe ayebisaki bango makambo oyo esengeli kokomela Ye:
33 a latre ige ki sihiyi ni urishelima ba kah vren ndi no firist ni ba nha ba ndu ba wuu na tieu ya nshishi meme ndi
— Tozali solo kokende na Yelusalemi; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano,
34 ba weyen niwu na juten sur na tsi ni gbugban na wuu ni vi utra a lude ni rei
bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.
35 Yakubu ba yohona mri zabadi ba chibye niwu na tre a ndi ndu tie koge ni tawu wa ki preu
Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo.
36 wa tre bi son me tiege yiwu?
Yesu atunaki bango: — Bolingi ete nasalela bino nini?
37 iba hla niwu ba son iri mba disun ni wo kori u ri ni wo kotah ni mi darajame
Bazongisaki: — Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo: moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
38 yesu hla bawu bina toh kpie wa bisi pre ana bi iya so koko wa ime mi soa? ko ndu ba tie batisma ni batisma yiwu na wa ba yi ni mura?
Yesu alobaki na bango: — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela to kozwa libatisi oyo Ngai nakozwa?
39 u ba kpayeme di ba iya u yes tre koko wa wawu ni soa ndu ba so nibatisma wa ba yi nimua niki ndu ba yi niyiwu
Bazongisaki: — Iyo, tokoki! Yesu alobaki na bango: — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa;
40 ama son niwo kori ko wo kotah na u muna niwa minoyi a hi u biwa ba chii ba
kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
41 i wa iwulo ba bawo isuron ba a lude tie meme u ba tie fu ni tu ba Yakubu ba Yohana
Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane.
42 yesu yo ba na hla bawu bi kah toh ndi be wa kah indi bi gbugbulun no ba ni woba ba nji ba u zizan
Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango: — Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
43 ama a hei naki ni mi bina se de wawuu indi u wa ani zama nigon wa wuyi ni zama gran
Esengeli te kozala bongo kati na bino; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino;
44 iwa ni zama mumlan ni mibi ni zama gran
mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso!
45 ni u njaji vren ndi na ye nduba tie yah nitu ma na ama wawu ni tie ya nitu bari da kpa que nitu bari gbugbuu bi latre ndu ba nawo
Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
46 u ba ye ni jeriko wa ye rju ni mi jeriko ba ba almajere ma ni gbugbu ndi u indi ufyen ba yo niBartimawus vren Timawus a son ni yiu gon
Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga.
47 da a toh adi a yesu ba nazaratna kpa gro ni yon yesu vren doda ya me ni shishi losuron ni zo me
Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga: — Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
48 indi gbugbu ba yarhan ni wu adi ndu son nigbagbi wa kama na ni yo yesu vren doda yame ni shishi losoron nizome
Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi: — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
49 yesu kukre da nduba yo uba indi uyen na hla ni wu ndu gir na tie kinkle soron ni lude
Yesu atelemaki mpe alobaki: — Bobenga ye! Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye: — Yika mpiko! Telema! Azali kobenga yo!
50 wa wume a kah nklon ma taga na dolude hi ni yesu
Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu.
51 yesu kpa nyimeniwu na myen u son mi tiege niwu?
Yesu alobaki na ye: — Olingi nasala nini mpo na yo? Mokufi miso azongisaki: — Moteyi, nalingi komona.
52 yesu hla wu lude hi kpa me bangaiskiya a den u wa tsi toh kpan na hu ni tugon
Yesu alobaki na ye: — Kende, kondima na yo ebikisi yo. Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.