< Yohana 4 >
1 yesu toh ndi farisawa ba wo andi almasenanma ba ye ni barbran wa ni tie batsima nizan Yahaya
Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane.
2 lana yesu ni tie tuma nitie batisma na ahi almajeran mu ba sita tie batisma
(Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.)
3 a ka yahudiya don na kma hi ni galili
Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.
4 wa ahi gbigbi niwu ni ndu lu zu niko samariya
Lokola asengelaki kolekela na Samari,
5 aye ni mi gbu samariya wa ba yo ni sika fwe nhan ni bubu wa yakubu a no ivren ma yusufu
akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi.
6 juju ma u ykuba a he niki yesu zren nhla za na ye kuson ni yue juju a karfi wolon don hari u rji
Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
7 iwari u sa mariya aye funma se yesu hla niwu ne ma miso
Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye: — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
8 u almajeran ma ba lu ri hi ni migbu ni he leh biri
(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
9 iwa u samariya niyen a ni he iwu ba yahude u miyen ma ima uso ime wa mi vren wa u mariyg? nitu yahudawa bana kabi ni samariya wana
Kasi mwasi yango alobaki: — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
10 yesu sa niwu una tohno miyen u rji ni indi wa a si tre ne ma uso una bre ni ndu no uima u tviri
Yesu azongiselaki ye: — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
11 iwa hla niwu mallam ga u na he ni guga u juju a naman yue grji hi kogbo ani tsen u fe ima u viri?
Mwasi alobaki na Yesu: — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi?
12 u na zari itie mbu yakubu na ka wu zari wawu wa ano la juju a wa wawume a so ni mina ni mire ma ni lado ma?
Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye?
13 yesu hla niwu du indi iwa aso ni mi ma ki nhlan ma ni la yi u
Yesu azongiselaki ye: — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi;
14 indi wa ani so ima wa mi no nhlan ma na la tieu na ni siran kima lma wa mino a ani ka tie izin ma ni mi ma iwa ani ta gubon ta hi ni viri ma u kase se kase se (aiōn , aiōnios )
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te: mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko. (aiōn , aiōnios )
15 iwa hla niwu mallam ne ima mba wa nhlan ma na la tie me na u mi na la ye niwayi ndi tan ma na
Mwasi yango alobaki na Yesu: — Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
16 yesu hla niwu hi yo ilon me di biye biwa
Yesu alobaki na ye: — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
17 iwa hla niwu mi na he ni lilon na
Mwasi azongisaki: — Nazali na mobali te. Yesu alobaki na ye: — Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te,
18 nitu wa u gran lilon tie ton iwa uhe niwu zizan ana lon mena ikpe wawu tre a a njanji
pamba te ozalaki na mibali mitano; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
19 iwa tre ndi mallam mi toh u annabi
Mwasi yango alobaki na Yesu: — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.
20 ba tie mbu ba ta tre ni rji ni tugbulu yi u bi tre urushali ma yi a bubu wa indi ba tre ni rjiia
Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
21 yesu hla niwu iwa kpayenme ni me ni suron me ndi bi na la tre ni rji ko ni tu gbulu ko ni uri shalima na
Yesu azongiselaki ye: — Mwasi, ndima Ngai: tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.
22 bi si yi sujada ni ndi wa ki tohua kpa chuwo a he ni yahuda wayi
Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda.
23 mitoh iton niye natsara wandi bi hu rji ujanji ba tre ni tre mbu ni mi ruhu ni njanji ni tu indi bibi kima irji ni wa ba ni ndu ba tre niwu
Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.
24 irji a hi ruhu indi wa ani tre niwu a hi gbigbi ni ndu ba tre ni mi ruhu ni njanji
Nzambe azali Molimo; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
25 iwa hla niwu mi toh Almasihu ni ye ani taye ani hla koge ni tawu
Mwasi alobaki na Yesu: — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
26 yesu hla niwu imeyi mi wawu iwa ndi asi tre ni u
Yesu alobaki na ye: — Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
27 ni mi ton ki almajeran ma ba kbanye u ba kban ni tie sisir ikpe wa yo ani tre ni wa u iri mba a miyen u son geri? ka ahigeri yo u si tre niwu?
Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye: « Ozali koluka nini? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye? »
28 iwa kagbazima don na he ni mi gbu na hla ni indiba
Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato:
29 ye toh iguri iwa a hla koge wa mi tiea ana wa wuyi almasihu na ka ani nha
— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te?
30 ba lu bri ni gbu a da hi niwu
Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu.
31 ni ton kima almajerana ma luni bre wu andi mallam rhi
Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu: — Rabi, lia.
32 i wa hla ni bawu andi mi he biri iwa bina toh kpe ri ni tumana
Kasi Yesu azongiselaki bango: — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
33 almajeran ba tre ni kpa mba ko idioiri me nji niwuna ka idioiri nji ye?
Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango: — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei?
34 yesu hla bawa biri mu a hi ndi mi tie ikpe wandi wa la ton me ye ni du me kle ndu ma
Yesu alobaki na bango: — Bilei na Ngai ezali: kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.
35 nda bi tre dia don iwuya nzah ni du ba yi gri bi? mi hla niyiwu ni woloshi bi ya irjuba ba makan u chan
Bino bolobaka: « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino: bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.
36 indi wa asi chan ani kpa die na shu biri u rju kabi na nji hi viri utuntur ni naki indi u chu ni indi chan ba gir ha mba (aiōnios )
Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale. (aiōnios )
37 nitre yi iri ni chu batre di iri ni chan ajanji
Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka: « Moko alonaka, mosusu abukaka. »
38 i me ton u ndu u hi chan ikpe iwa wu na tie ndu ma na a bari mu ba tieye u luri ni mi ndu mba
Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.
39 igra samariyawa ba he ni gbu a ba kpayemen niwu niyu kpe wa iwa a tre ni tuma a a hla kle pyen pyenme ikpei waatatia
Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa: « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. »
40 u samariyawa ba ye niwu na bre ni ndu ye son niba waye son niba tic vi hari
Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale.
41 gbugbumba ba kanhan hi biwa ba kpanyme nitu lantre ma
Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba.
42 ba tre ni iwa ndi kpanyme mbu ana nitu kpewa wu hla na a nitu wa kita kikimbu ki wowu nito ndi janji iwayi yi u kpa gbungbl chuwo
Bongo balobaki na mwasi wana: — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
43 niwa vi ha baki baka hi a rhu don bubuki nda ku nko Galilee
Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile.
44 yesu kima ana bla ndi bana ya anabi ni nfutu ni gbumeme ma na
Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye.
45 niwa aka ri nimi Galilee bi Galilee bu ba kpaa ni woha bana to wawu kpi wa ana ti ni igan u urushelima nitu baba me bana hi ni igan a
Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.
46 zizan ala ye ni cana bubu wa a kma ma ti ihia kikle nikon ri u bi tu chu wandi ivren ma ana kru lo kpa
Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.
47 ni wo ndi yesu ye wruwru ni judiya rhini Galilee a hini yesu nda ka myeu du huu grji hi nda hi chulilo rhu ni vren ma wa ana ti weweire u kwu
Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
48 mle yesu a kri tre niwu ndi hama bi to kpe u chu tsro nda nu sisri bina kpanyme na
Yesu alobaki na ye: — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa?
49 ninkon gua a hla wu ndi mi niu ninkon me grjiye ri du vren mu kwu
Mokonzi wana ya basoda alobaki: — Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
50 yesu a lhawu ndi hi vren me he ni sisren tgua a kpanyme ni lantre wa yesu a tre niwu nda hi kpama
Yesu alobaki na ye: — Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi. Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
51 niwa a sia grji hia mriko nduma ba zontu niwu nda ni hla ndi vren ma he ni sisren ma
Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye: — Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
52 niki a mye ba nton wa ikpa a lu si sia ba sa wu lanren ni nton u tangban lilo kpa a akawu chuwo
Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki. Bazongisaki: — Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
53 nikima itia a tika ndi ana ni nton kimayi yesu a tre ni wu ndi vrenme he ni sisren niki wawu nikima mba wawu bikoma ba kpanyme
Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye: « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
54 iwayi ana kpe itsro u ha wa yesu a ti niwa aye ni Judiya rhini Galilee
Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.