< Yohana 2 >
1 nivi u tra wa a wuce igran iri a heni cana u Galili u yi yesu a hei niki
Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango.
2 ba hla ni yesu di almajeranma ndu ba hi ni igan ugran
Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
3 u lman inabin a kle u yi yesu hla ni wu iba na he ni iman inabin na
Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye: — Bazali lisusu na vino te!
4 yesu hla niwu iwa ahi ge ka krji u ye nime? iton mu na tsra rina
Kasi Yesu azongiselaki ye: — Mwasi, biso na yo likambo nini? Tango na Ngai ekoki nanu te.
5 iyima a hla ni miri bi nduma ko a hla ni nduyi tie gen bika tie u ndu bari ba he niki ni tita tan ne
Mama na Ye alobaki na basali: — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
6 iwa yahudawa ba tie ndu niwa ni igan ba u tsarka ke ko rime ni mi mba ni ban durom iri
Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.
7 iwa hla ni bawu suru man shu ni indun ba uba suruman shu mba pleleme
Bongo Yesu alobaki na basali: — Botondisa bambeki oyo na mayi. Batondisaki yango meke.
8 iwa hla ni bi ndu ba tie ni mima hi no nikon ugan u ba tie nakima
Alobaki lisusu: — Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti. Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.
9 nikon u igan a vu ma hla toh wa a katie ima ina bin wana toh iwurji wa a rji a na iwa to
Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki
10 na hla niwu ko nha niga ma inabin ndi ndi ni mumla nduba so kle rikiko ba nji iwa a lolomey ye ni kokon iwu u ma ndindi zi sei zizan
mpe alobaki na ye: « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo! »
11 iwayi a hi gban u mumlan wa yesu tie ni cana galili na tsoro dauka ka ma amajeran ma ba kpayenme ni tiea
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki: esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
12 ni kle ki yesu ni yinman ni miri vayima ni almajeran ma ba hi kafarnahum na ka sori niki tie vi bari
Sima na yango, Yesu akendeki elongo na mama na Ye, bandeko na Ye mpe bayekoli na Ye, na Kapernawumi epai wapi basalaki kaka mwa mikolo.
13 igan u zagran idina tie whire u yesu a hon hi ni uri shaliman
Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi.
14 a ka toh bi le ni lando ni ik rju ni tantabaru ni bi siran iklen ba son niki
Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango.
15 iwa tie gbugban ni rjirji na zuba rju wawu ni mitara u rji ni nitman ni lando na vu glengbe in klen vara hlega ni bi saran klen na kpa tabru a zie lega
Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele.
16 a hla nibi le ni tan tabara vu kpie bi yi rju niwa yi bi kako itiemu tie chuchuu lea ni kpie
Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga: « Bolongola biloko oyo awa! Ezali Ndako ya Tata na Ngai! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando? »
17 u alma jeran ma ba tika andi ba nha nhan zindi to iko me ni irime kle
Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama: « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto! »
18 binikon ni yahudawa ba batre niwu a a hi gban geri u ya tsoro ta ni tu ikpe wa u si tie mba
Bayuda balobaki na Yesu: — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso?
19 yesu sa nibawu zie tra rji yi mi merie ni mi ivi tra
Yesu azongisaki: — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.
20 ubi mikon yahudawa ba tre ba tie ise arabayin don tannen riko na nme trarsi a kle u ri ban ivi tra yin ni nme koa?
Bayuda balobaki lisusu: — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato?
21 ama asita tra itra u kpa ma mu
Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.
22 nikogon wa a ta shimen ni beh almajeran ma ba lu tika ndi ana hla naki uba kpayemen ni nasi ni lantre wa yesu a hla
Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.
23 ngari aheni urushelima ni idi gbugbuu ba kpayemen ni iden ma ni wa ba igban wa a tie
Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala.
24 yesu na kpayeme ni bana atoh bawauu
Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso.
25 ana son ndu dio shaida ma ni tu indi na nitu wa a toh kpe wa a he mi ndi
Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.