< Yohana 18 >
1 Ni kogon tre biyi wa Yesu tre ba, a rju ni almajere ma hi ni gran ko rima, ni kpa ngblu, ni bubu wa irju he'a u ba zu ri hi baba almajere Ma.
Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.
2 Yahuda me wa ani kawu le'a a to bubu'a, nitu wa Yesu a zi hi ye ni almajere Ma.
Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye.
3 Yahuda me, ka nji soja rji ni Firistoci bi ninkon, ni Farisawa, ni bi majelisa, u ba ye ni bubu'a, ba nji ba llu fitila ni ba tochi, ni ba kpi u ta ku.
Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.
4 U Yesu to kpye wa asi zren'a nitu ma wawuu, ahi ko shishi na mye ba, “Bi wa nha?”
Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango: — Bozali koluka nani?
5 U ba tre, “Yesu u Nazaret.” Yesu ka hla ni bawu, “Ame yi.” Yahuda ngame wa a le niwu'a, a kri ni sojoji ba.
Bazongisaki: — Yesu ya Nazareti. Yesu alobaki na bango: — Ezali Ngai oyo. Mpe Yuda oyo atekaki Yesu epai na bango azalaki wana elongo na bango.
6 Ni wa a hla bawu, “Ame,” u ba kma hi ni gon, na ka rjoku meme.
Tango Yesu alobaki na bango: « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.
7 Ala mye ba ngari, “Bi wa nha?” u ba hla ngari ndi, “Yesu u Nazaret.”
Yesu atunaki bango lisusu: — Bozali koluka nani? Bazongisaki: — Yesu ya Nazareti.
8 Yesu hla bawu, e, Mi hla ni yiwu ndi, ahi me. Anita Ime yi bi si wa, bi ka ka biyi don ndu ba hi kpa-mba.
Yesu alobaki na bango: — Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.
9 Kima ni ndu itre wa a hla ndu tsra, “Ni mi bi wa U Ne ba, ko riri me na kado na.
Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki: « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
10 Siman Bitrus me, nitu wu ahe ni inji gbeni, na k'ri fya chu ka tsen vren ko kikle Prist, na chu nvunvu ton ma kori, inde vren ko ma'a hi Malkus.
Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.
11 Yesu hla ni Bitrus, ka nji ngban yo ni hra ma ni bubun, Mi na so kokon wa Iti ane na?
Kasi Yesu alobaki na Petelo: — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai?
12 U soja ba ni bi ninkon mba, ni majalisa Yahudawa, ba ka vu Yesu, na lo'wu.
Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga;
13 Ni mumla ba nji hi ni Annas, nitu wa a hi iyi kayafas, wa ahi wawuyi kikle Prist ni se kima.
bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana.
14 Kayafas mba ana no ba Yahudawa mre, andi ani fi bi dun indji riri ndu kwu ni tu ba indji.
Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo: « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. »
15 Siman Bitrus a hu kogon Yesu, na kime almajiri ri la ti ngame. I zizan almajiri ki me a shishi to ni kikle Prist'a, na ri hi ni kikle hra u kikle Prist me mba Yesu;
Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
16 U Bitrus a k'ri ni nyu gon tre ni nkohtra, naki me almajiri rima ti, u almajiri wa ahi shishi to ni kikle Prist a rju, na tre ni wa - wa ani gben ni gontra, na lu ri hi ni Bitrus.
Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo.
17 U vren wa wa ani gben ni gontra aminye Bitrus, “Iwu me una he ni mi almajire gu yi na?” wa tre, “Mi na he ni mi na.”
Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo: — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana? Petelo azongisaki: — Nazali moyekoli na ye te.
18 U bi ti ndu ni doka rji u hekali'a ba kri ni ki, u ba mu lu ni kla-mbrji, na son kosan ma si wo gba-ji, ni nton ki bubu ni si. Bitrus k'ri ni ba na si wo gbaji'a.
Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola.
19 Kikle Prist a minye Yesu nitu almajere ma ni tsro ma me.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye.
20 Yesu ka sa niwu, e, Mi hla ni gbungblu'a ni hla tuma. Mi hla bawu nitu nitu ni majamiyan, ni hekeli ni bubu wa Yahudawa me ba ye gyen klan ki'a. Mi na hla kpyeri ni ri mbi na.
Yesu azongiselaki ye: — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka; nalobaki eloko moko te na nkuku.
21 U ngye ri mba sa u minye me? Minye biwa ba sren ton na wo ikpe wa mi tre'a, E, ba to ikpe Mi tre.
Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.
22 Ni wa Yeswu hla biyi, u ri ni mi biya ba wa kukri niki'a a wru Yesu nda tre ndi, “U sa ni kikle Prist tre naki?”
Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba: — Boni! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe?
23 Yesu tre niwu, Mi ta hla meme kpe to, u ka hu gon ma naki'a ta njanji Mi hla, to, u ngyeri ni sa u ka wru me?”
Yesu alobaki na ye: — Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai?
24 U Annas a ton ba ndu ba nji Yesu hi lowu ni Kayafas, kikle Prist.
Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
25 U Siman Bitrus a kri si wo gbaji lu. U ndji ba ba tre niwu, “Ana iwu me u na he ni mi almajere ma na?” Wa kpa tron na tre, “A'a, mi na he mina.”
Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye: — Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye? Petelo awanganaki yango na koloba: — Te, nazali moyekoli na ye te.
26 U ri nimi gran kikle Prist, vayi iwa Bitrus a fu nvunvu ton'a, ahla, O'oo, mina to niwu ni rju na?
Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki: — Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga?
27 Bitrus la kpa-tron, hihari me igba lu t'bu.
Kasi Petelo awanganaki yango lisusu; mpe mbala moko, soso elelaki.
28 Nikima Kayafas ba nji Yesu hi ni kogon'a, ni buu buu mble me, baba ni titu mba me bana ni kogon'a na, andi ndu baba n ata tre na kunyre bubu ri jibi u za gran na.
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.
29 U Bilatus me a rju ye ni ba, na tre, “Anitu ngyeri bi nha gu yi?
Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango: — Bofundi moto oyo mpo na likambo nini?
30 U ba sa niwu, “Igu yi ani na ti meme kpe na, angyeri me ni sa ki ka nji wu ye tro niwu.”
Bazongiselaki ye: — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.
31 Bilatus hla bawu, “Mji wu hi ni tutu mbi ni hi Furewu ni bi tron mbi!” U Yahudawa ba hla niwu,” E, kina he ni gbengblen u yo tron u wu ndji ni tu mbu na.”
Pilato alobaki na bango: — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye: — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
32 Ba hla kima ni ndu itre Yesu tsra, ni biwa a tsra bibi kwu wa ani kwu'a.
Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.
33 U Bilatus la ri ni mi tra gon gona, na yo Yesu na minye, “Iwuyi U Chu Yahudawa ba?
Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda?
34 Yesu sa niwu, “Ahi wu u hla, ka ba ndrjori mu ba yo Me naki niwu?
Yesu azongisaki: — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai?
35 Bilatus sa niwu, “Ime mina indji u Yahuda na, ka ani he?” E, ahi ndji Me ni Pristoci bi kikle ba ba nji wu ye le ni mu. “U tie ngye?”
Pilato atunaki Yesu: — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini?
36 Yesu sa, “Mulki Mu ana u gbungblu yi na, Mulki ana u gbungblu yi u mri ko Mu bana tiku ni ndu bana ka Me le ni Yahudawa na, Mulki Mu ana he ni wayi na.”
Yesu azongisaki: — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
37 U Bilatus minye, “Ashe, anaki, U Chu?” Yesu sa niwu, “Anaki u hla ndi Mi Chu. Nitu ki ba ngrji Me, nitu ki mi ye ni gbungblu yi, ni ndu mi no gban ni tu njanji. Ko nha wa ani son njanji'a ani sren ton na wo lan tre Mu.”
Pilato atunaki: — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi? Yesu azongisaki: — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
38 Bilatus sa niwu, “Ahi ngye njanji?” Ni kogon wa a hla naki, ala rju ni Yahudawa, na hla, “Ime de mina to guyi ni latre na.
Pilato atunaki Ye: — Solo ezali nini? Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango: — Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa.
39 Bi to bi he ni igan ri, u idin za gran a tsra, ni chu indji ri no yi bi son mi no yi Ichu Yahudawa?”
Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi?
40 U ba kpa-gro, kpan, kpan me na tre, “A'a, a wawu yi na, se Barabas.” Barabas'a me ahi indji yibi.
Bango nyonso bazongisaki na koganga: — Te! Ye te! Bimisa nde Barabasi! Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.