< Yohana 17 >
1 Ni kogon wa Yesu tre yi, a nzu shishi hi ni shulu na tre, “Iti, inton yeye, no Vren Me ninkonni ndu Vren Me ndu no'u ninkon -
Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki: Tata, tango ekoki; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo;
2 ni wa u no gbengblen nitu bi nama kpa wawu ni ndu no re (ivri) u son hi ni tuntur ko indji ri me wa wu no'a. (aiōnios )
pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye. (aiōnios )
3 Iwa ahi re (ivri) u tuntur, wa ba to, ba to wuyi nkrji Me Wu Irji, niwa u ton Yesu Kristi. (aiōnios )
Nzokande, bomoi ya seko ezali: koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki. (aiōnios )
4 Mi no ninkon me ni meme, Mi kle indu wa u ne ndi Mi tiwu'a.
Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai.
5 Zizan, “Bachi ne ninkon wa me he niwu rji niwu ri ni ndu ba me gbungblu'a.
Sik’oyo Tata, pesa Ngai lisusu nkembo oyo nazalaki na yango kuna epai Yo ozali liboso ete okela mokili.
6 Mi ye yar inde rju ni ndi biwa u ne ba ni gbungblu'a. Bana bi Me u wu ne ba, u ba nji tre me.
Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango; mpe batosi Liloba na Yo.
7 Zizan, ba to ndi ikpe wa u ne wawu ba rji ni wu yi,
Bayebi malamu sik’oyo ete nyonso oyo opesaki Ngai ewutaki solo epai na Yo;
8 Mi no ba wawu lan tre Me wa wu ne. Ba kpa ba na to nda a njanji Mi rji ni Wu, na kpa nyeme ndi a wu u ton me.
pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai.
9 Mi tre niwu bawu (addu'a), Mi tre niwu ni bi gbungblu'a na, se ni bi wa u ne ni ba, biki babi Me.
Nazali kobondela nde mpo na bango; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo.
10 Ikpe wawu wa ahi u Mu'a, a hi u Me. U Me ahi u Mu. Mi kpa ninkon ni ba.
Bato na Yo nyonso bazali bato na Ngai, mpe bato na Ngai nyonso bazali bato na Yo; mpe nkembo na Ngai ezali komonisama kati na bango.
11 Mi na la u gbungblu'a ngana, u ba ndji biyi ba he ni gbungblu'a, u Mi si yi niwu. Tsatsra Ti, zi ba ni mi nde Me wa u ne ni ndu ba riri, nawa kita me ki riri.
Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.
12 Niwa mina he ni ba, Mi ziba pyan me ni mi nde Me, ni wa u ne, Mi ka ba, u riri ni mi mbu ana yra tu na, se mri bi zyi bubu'a, ni ndu lantre'a shu.
Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.
13 Zizan Mi si ye niwu, Mi si tre kpi biyi ni gbungblu'a ni ndu ingyiri Mu ndu shu ni ba.
Sik’oyo, nazali koya epai na Yo; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango.
14 Mi no ba lan tre Me'a, u gbungblu'a kama ni ba nitu wa ba u lantre na, na wa Mi na u gbungblu'a na.
Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
15 Mi tre ni ndu vu ba rju ni gbungblu'a na ni ndu zi ba zizyime ni mi bi meme ba.
Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.
16 Ba na bi gbungblu'a na, na wa mina u gbungblu'a na.
Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
17 Zi ba nkan nitu Me u njanji lantre Me a njanji.
Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.
18 Na niwa u ton Me ni gbungblu'a, naki Mi ton ba hi ni gbungblu'a.
Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango.
19 Mi mla tu Mu zi niwu nitu mba, ni ndu ba mla tu-mba zi me niwu ni mi njanji.
Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.
20 Mina tre niwu nitu iwa kankrji ma na, ani biwa ba kpa nyeme ni Me nitu tre mba'a
Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango,
21 ni ndu ba wawu mba hi ririi, nawu, Bachi, Wu he nimi Mu, u Ime nimi Me. Mi bre ni ndu ba he nimi Mbu, ni ndu gbungblu'a kpa nyeme ndi u ton Me.
mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.
22 Ninkon wa U ne'a, Ime me Mi ka no ba, ni ndu ba hi ririi, nawa kita me ki riri'a:
Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko:
23 Ime nimi mba, u Wu nimi Mu - ndi dun ba nji tu-mba ye katu bi, ni ndi dun gbungblu'a ni to ndi u ton Me, andi U son ba na wa U son Me.
Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.
24 Iti, Mi son biwa U kaba ne ndu ba he ni Me ni wurji wa Mi he yi, na to ninkon Mu, ninkon wa U Ne u nitu U son Me ri kuko ndi zi nchi gbungblu'a.
Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.
25 Tsatsra Ti, gbungblu'a na to Wu na, Ime Mi to'u, u ba ton nda ahi Wu yi U ton Me.
Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai.
26 Mi hla bawu inde Me, Mi la hla ni bawu nitu son Me wa U ndu he ni Me ni mi mba.
Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.