< Yohana 12 >

1 Ivi tanne hi ni vi u gan rugran'a (Idin ketere) Yesu ye ni Baitaya ni bubu wa Lazarus ahe'a, uwa Yesu a tawu shime rju ni be.
Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda.
2 U ba tie birli wu ni ki u Marta ahe ni ndasi nno ba birli, u Lazarus ahe ni ba nda kakru ni tebur u rli ni Yesu.
Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu.
3 U Maryamu ka ban turare nard, nda nyuu za Yesu niwu nda se za Yesu ni nfutu ma. U turare ka vra whi shu ni koh'a wawu.
Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.
4 Yahuda Iskariyoti, iri nimi almajere ma, wa ani kawu le, a tre,
Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki:
5 “Ahi ngyeri mba sa ba na le ni tulare dinari dari tra na ka ga bi na?”
— Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola?
6 A tre naki ana ndi ahe niwu mi sron ma na, a wa'a ndahi ndji u yibi. A wawuyi ni zi imbu nklen'a, nda ni son ybi ni mi.
Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.
7 Yesu tre, bika chowo ni ndu ka kpye wa ahe wu'a zi ni fi wa baka rju me'a.
Kasi Yesu alobaki: — Tika ye kimia! Abombi malasi yango mpo na mokolo oyo bakokunda Ngai.
8 Biya ba he ni yi ko ni tanyi u me mi na he niyi chachuwu na.
Bokozalaka na babola tango nyonso; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.
9 U gbugbu Yahudawa ba wo andi Yesu a he ni kii u ba ye, ana nitu Yesu ni nkrji megyen na, baye son to Lazarus ngame wa Yesu tawu shime ni khwu'a.
Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi.
10 U Firistoci bi ni kon, baka ka'nyu kabi nda wa nkon u wu'u Lazarus ngame.
Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe basalaki mabongisi mpo na koboma mpe Lazare;
11 Nitu ma yi wa Yahudawa gbugbuwu ba ka kpa nyeme ni Yesu.
pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu.
12 Ni vi rima indji gbugbuwu ba ye ni gan. Ni wa ba wo ndi Yesu ni ye ni Urushalima,
Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi.
13 u ba vu ihran dabino nda rju ni gbu nda hi kpawu nda ni yo gbangban me nda ni tre, “Hosanna! Lulu ahi wu Indji wa ani ye ni mi nde Bachi, Ichu Israila.
Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu; bazalaki koganga: « Ozana! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo, Mokonzi ya Isalaele! »
14 Yesu a ka fe ivren jaki (Aholaki), nda hon nitu ma, towa ba ngha'a,
Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama:
15 “Na ti sissri na, Ivrenwa Sihiyona, yayi, ngye Ichu ni ye, a son nitu vren jaki.”
« Siona, engumba kitoko, kobanga te! Tala, mokonzi na yo azali koya, avandi na likolo ya mwana ya ane! »
16 Almajere ma bana to tu mana ni mumla, ni kogon wa ba gbyre Yesu san, baka tika, andi ba nha nda ni he to kima, u ba ti ba ni wu na kima.
Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
17 Ij'bu ndji ba a hla ndi bana he niwu niwa a yo Lazarus rju ni mi be nda tawu shime ni khwu na.
Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki.
18 Nitu kima, gbugbu indji ba ye ni ndu ba same niwu nitu wa ati gban (alama) yi.
Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango.
19 Ni naki, se Farisawa bari bubu tre ni kpa mba andi, “Yayi, bi heni kpe u tina bi to, gbugbulu,'a ba hu wawu ye.
Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango: — Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye!
20 Indji bi Helinawa bari ni mi bi wa ba hi ni sujada u idin.
Kati na bato oyo bayaki na feti, na Yelusalemi, mpo na kogumbamela Nzambe, ezalaki na ndambo ya Bagreki.
21 Ba ki ba hi ni Filibu, igu u betsa ida wa ahe ni Galili, u ba tre niwu, “Mala, ki sun to Yesu.
Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo: — Tata, tolingi komona Yesu.
22 Filibu ahi na ka hla ni Andarawus, u Andarawus ba hi mba Filibu, u ba hla ni Yesu.
Filipo akendeki koyebisa Andre; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu.
23 Yesu hla bawu, “Inton tsra ye wa ba shu ngbarju ni Vren Ndji.
Yesu azongiselaki bango: — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye.
24 Njanji, njanji, mi si hla yiwu, iwolo alkama ni ta na joku ni meme na kwu na, ani he ni ngrjima, u ani ta kwu, ani ti wolo gbugbuwu.
Nazali koloba na bino penza ya solo: soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.
25 Indji wa ani son ivri ma, ani wa wu hama, u indji wa ana son ivri ma na ni ngbungblu yi ani kiyaye wu nitu ivri ma u tuntru. (aiōnios g166)
Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko. (aiōnios g166)
26 Indrjori nita ni shu ngbarju nimu, wa ka hume, ko ni ntsen wa mi he'a, ni mu igran ni sun. Indji wa a shu ngbarju nimu, Iti ni no ninkon.
Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.
27 Zizan isron mu he ni mi mmren, u mi tre ngye? Iti u kpa me chuwo ni ton yi? Ani to kima yi me ye ni ton yi.
Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami! Naloba nini? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo!
28 Iti, shu ngburju ni tume.” U lantre ri ni tre, “Me shu ngbarju niwu, mila shu ngbarju niwu ngari.
Tata, pesa Kombo na Yo nkembo! Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo: — Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo!
29 U indji biwa ba ki na kima bawo lantre, na tre ahi zan bari ba ri ba tre ahi “Maleka mba tre niwu.”
Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki: — Ezali kake! Bato mosusu balobaki: — Anjelu moko asololi na ye!
30 Yesu tre, “Andi lan tre yi na ye nitu mu na, a nitu mbi.”
Kasi Yesu alobaki na bango: — Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino.
31 Zizan ba tron ni gbungblu'a: zizan ba zu Indji wa ani nji gbunglu'a.
Kosambisama ya mokili elingi kosalema nde sik’oyo; mokonzi ya mokili oyo akobwakama sik’oyo na libanda.
32 U me, ba ta ba me lu ni gbunbglu'a, Mi gbron indji wawu ye ni kpamu.”
Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.
33 A hla wayi ni tu iri kwu wa ani kwu'a.
Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa.
34 Ijubu indji ba lu tre, “Ki wo ni mi tronandi Almasihu ni son hi ni tuntru. A nihe u tre, ba zun Vren Indji? Ahi nha mba hi Vren Ndji'a?” (aiōn g165)
Bato bazongiselaki Ye: — Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso: « Mwana na Moto asengeli kotombolama? » Nani nde Mwana na Moto? (aiōn g165)
35 Yesu hla bawu, “Zizan ni vi ton tsa me bi son ni ikpan. Bika zren ni kpan tu ka ari he ni yi ri, na ndu bu'u dun mren yi na. Indji wa ani zren ni mi bu'u'a ana to wurji u hi na.
Yesu alobaki na bango: — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.
36 Bi kpa nyeme ni kpan tu wa ri he ni yi ri ni ndu kati imri ikpan.” Yesu hla tre biyi ri na ri tuma ni bawu.
Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango.
37 Ko naki me Yesu ti gban bi babran ni shishi mba, ni naki me bana kpa nyeme niwu na.
Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te
38 Nitu itre Anabi Ishaya a a shu, wa a hla, “Bachi, ahi nha a kpa nyeme ni tre mbu? Ani nha iwo Bachi a hla tu ma?”
mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama: « Nkolo, nani andimaki mateya na biso? Mpe nguya na Yo emonisamaki epai ya nani? »
39 Nitu kima ba na kpa nyeme na, ni wa Ishaya ala tre andi,
Ezali lisusu Ezayi nde alobaki tina oyo bakokaki kondima te:
40 A ka ba tibi fyen, na lo sron gbangban me, ni ndu bana to ni shishi mba na. Naki nato toma ni mi sron mba, na k'ma ye ni me ni ndu mi den ba.
« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »
41 Ishaya hla kpi biyi ni wa a to ko shishi u shu ngbarju ni Yesu.
Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye.
42 Ni naki me, gbugbuwu bakpa nyeme ni Yesu ni mi bi ninkon'a. U nitu Farisawa, bana ya hla wu rju ni rira na, ni ndu ba na zu ba rju ni mi Majamiya na.
Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani,
43 Ba son gbre san u indji zan gbre san wa ani rji ni Rji.
pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.
44 Yesu tre gban gban me, na hla, indji wa a kpa nyeme ni me, ana me yi a kpa nyeme ni me kankle mu na, a kpa nyeme ni indji wa a ton me'a.
Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi: — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai;
45 Ngari indji wa asi to me, asi to Indji wa a ton me.
mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai.
46 Ime mi ye nitu ikpan ni gbungblu'a, ni indji wa a kpa nyeme ni me a na zren ni mi bu'u na.
Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.
47 Indji wa awo tre mu nda na kpa nyeme na, mina hukunta ni wu na. Mina ye nitu hukunta indji na; ni ndu me kpa gbungblu'a chuwo.
Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.
48 Indji wa a kama ni me, na kama kpa tre mu, indji ri he wa ni hukunta niwu ilan wa mi tre ni hukunta niwu ni chachu kekle.
Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye: ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka.
49 Mi na tutu mu na, a Ti'a wa a ton Me, wa a yo Me ni ndu mi hla ni tre.
Pamba te nalobaki na Kombo na Ngai moko te; kasi Ye moko Tata oyo atindaki Ngai apesaki Ngai, lokola mitindo, makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya.
50 Mi to yo me u ma ahi re (iviri) u son tuntur, ni ndu ikpi wa mi tre, na wa Iti'a a ton Me naki mi tre.” (aiōnios g166)
Nzokande, nayebi malamu ete mitindo na Ye epesaka bomoi ya seko; yango wana nazali koloba makambo oyo, ndenge kaka Tata ayebisaki Ngai yango. (aiōnios g166)

< Yohana 12 >