< Hebrews 1 >
1 nisehn irji atre niba titimbu nikohn kanka ninyu anabawa
Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.
2 nintohn uklekleyi atrenita nibubuh urema iwandi ayou ndusoninyu kongye iwandi nituma ati gbunglua (aiōn )
Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili. (aiōn )
3 wawuii hikpawandi ahe imbarji jiji arzy zatima anji kongye ninmyi ngbenglen ilatrema niwandi ayemla latrembutia nakaba kakuson niwokrli utimbu iwandi aheni kongyea ni shulu
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
4 nitukima aheni gbengle nitu mataikuba yanda kpewandi indema iwandi asoninyu aheni gbenglen gbugbamu niumba
mpe azwi esika ya lokumu penza koleka ba-anjelu mpo ete azwi Kombo oyo eleki bakombo ya ba-anjelu.
5 nitoki ahinyga nimyi malaikurji iwandi atabatrendi uhi vremu iuwa mba mihi tini wuu? ngarli mia hitiniuu wawumeni he vuvrenime?
Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba: « Ozali mwana na ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo? » To mpe: « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai? »
6 ngarli niwa ndi irji anji iwandi ansoninyua yenin gbunglua alatrendi mailakurji ba mpembau dubaku kyumbarju niu
Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba: « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo? »
7 nitu malaiku ba trendiani iyakababatibrzi bitretrema bahi ilebelu
Nzokande, tala makambo oyo Nzambe aloba na tina na ba-anjelu: « Akomisaka ba-anjelu na Ye mipepe, mpe basali na Ye, ndemo ya moto. »
8 nitu vrea a tre kpauchima iwu irji iwandi anaheni we ukena kpala uchume ahi kpala urju tsratrame unjanji (aiōn )
Mpe tala makambo oyo aloba na tina na Mwana: « Oh Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko, lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo. (aiōn )
9 nyemebdu ndu wandi ahindidima a kamendu iwandi usoah nituki ahirji wato irji me gbanye ukinklasro niwu za iwandi uyandi ahidindima umeah
Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo! »
10 nzi tuntur mu ahi bachi iwuyi uti gbunglua ishulu meahindu uwomeyi
Kaka na tina na mwana, alobaki lisusu: « Na ebandeli, oh Nkolo, Yo nde otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo nde esalaki Likolo.
11 bawatumba hama amawu unaheni klena baye che na kpi usrukpa
Nyonso wana ekobeba, ekonzuluka lokola elamba; kasi Yo, okotikala seko na seko.
12 uchibiba na nganjakon ukasi kla ama iwu uhe una kasrana kase kase iseme bana klena
Okolinga yango lokola kazaka, mpe bakolongola yango lokola elamba mpo na kotia elamba mosusu. Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te! »
13 ama ahinyga ni myi malaiku rjiba atatrendi kuson niwo korh mu uni myi indzi ukrjzume aheninzame?
Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba: « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo? »
14 ashe ana malaikuba duka ba birjina biandi irji nitobandu douba tini bandi kunbra ni sonsi?
Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.