< 1 Yohana 2 >
1 Mri, mi si han kpi biyi ni yu'u du yina lahtre na. Uri ni ta lahtre ki hei ni di u kpa wo mbu ni wo timbu, wato yesu christy wa wu di riri wa ana latre na.
Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata: Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.
2 Wa wu yi ni wur latre mbu laga ana'u mbu ni klembu na u gbugbu wawu.
Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.
3 Kitoh di ki ye toh idan ki u tre ma.
Tala ndenge nini tososolaka ete toyebi Nzambe: ezali mpo ete totosaka mibeko na Ye.
4 Indi wa atre di wawu toh Irji da na hu tre ma na a hi di wu che u jaji na hei ni suron ma na.
Moto nyonso oyo alobaka: « Nayebi Nzambe, » kasi atosaka te mibeko ya Nzambe azali mokosi mpe solo ezali kati na ye te.
5 Indi wa a grji trema jaji hei wu ni Irji. Na yi ki toh di ki hei tare ni wu.
Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye.
6 Indi wa a tre di wa wu hei ni. Irji ka zre na wawu a zre a.
Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki.
7 Mir ya, mina si han tre sisa ma ni yu'u na ahi cihe tre wa bi woh rimumal chiche tre a hi tre wa bi wo'a.
Balingami na ngai, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala kaka, mobeko oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki.
8 Misi han tre sa ma ni yu'u wa a jaji ni mi kristi ni mi mbi me, don ibwu a zren ka si hi kpama. u kpan u jaji a si kpan
Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.
9 Indi wa a tre di wawu hei ni mi kpan, da ni kran vayi ma ahei ni mi bwu, da si zre ni mi bwu har ni zizah.
Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na pole kasi ayinaka ndeko na ye, azali nanu kati na molili.
10 Indi wa a ni yiem vayi ma ahei ni mi kpan, ama kub zah na.
Moto nyonso oyo alingaka ndeko na ye azali kati na pole; mpe ezali na eloko moko te kati na ye, oyo ekoki kobetisa ye libaku.
11 Naki, i wa a nikra vayi ma ahei ni mi bwu da si zre ni mi bwu a na ton bubu wa a si hi na; don ibwu a ka shishi ma.
Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso.
12 Mi si han ni yu'u mri, ba wur lahtre mbi hie ni yu'u ni tu de ma.
Bana, nazali kokomela bino, pamba te masumu na bino elimbisamaki mpo na Kombo na Yesu-Klisto.
13 Mi si han ni yu'u bati dan bi yi bi toh wa ahei rji ni mumla, Mi si han ni yu'u mri ze don bi zan gbe ngbenlen ibrji, mi han ni yu'u mri don bi toh ti'a.
Batata, nazali kokomela bino, pamba te boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nazali kokomela bino, pamba te bolongaki Satana.
14 Mi riga nan ni yuwu ba ti don bi toh ndia rji ni mumla, Mi riga han ni yu'u mrize don bi hei ni gbengbenlen, u tre Irji a hei ni yi, na ki bi zan gbengbenlen bi me me dri.
Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.
15 Na kpayiem ni kpi gbugbulu na, ni kpi bi wa ba hei ni mi gbugbulu 'a indi wa a ni son gbugbulu, i son 'u Irji na ni 'u na.
Bolingaka mokili te; bolingaka mpe te nyonso oyo ezali kati na mokili. Moto oyo alingaka mokili azalaka na bolingo ya Tata te kati na ye,
16 Du ikpi bi wa ba hei ni mi gbugbulu, ba bi nma kpa ba vo shishi, ni bi kpa di tsri, nu zu tu ba na rji ni ti na ba rji ni gbugbulu.
pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.
17 Gbugbulun ni kpi bi wa a ni son ba si kle, indi wa a si ti du ni tre rji a ni son seisei nisei. (aiōn )
Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso. (aiōn )
18 Imir itoh a ye 'u kle, na wa bi woh bi kran kristi ba si ye zizan gbugbu'u ba ye. Na ki bi ka toh di itoh ye kle.
Bana, tokomi na tango ya suka; ndenge kaka boyokaki ete monguna ya Klisto azali koya, nzokande banguna ya Klisto basili koya sik’oyo ebele, ndenge wana mpe tosengeli koyeba ete tokomi na tango ya suka.
19 Ba ryu ni mi mbu iki tsro di ba na hei ni ta na. Bana hei ni ta ba na san ni ta, da ba ni kpaba a tsro di bana hei ni ta na.
Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.
20 Bi hei ni anointing u rji ni tsa tsra ka bi toh wa wu bi.
Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso.
21 Mi na han ni yuu di bina toh jaji na naki bi toh'o, iche na hei ni mi jaji na.
Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo; kasi ezali te mpo boyebi yango te.
22 A hi gha hi ndi u'iche, a hi ndi wa ana kpayiem ni yesu da kristi na ndi ki ma hi wa ba kran yesu, wa ana toh ti'a mba ver a na.
Boye nani mokosi? Mokosi azali moto oyo awangani ete Yesu azali Klisto. Mpe moto ya ndenge wana azali monguna ya Klisto: awanganaka Tata mpe Mwana.
23 Indi wa ana yeini ni vre'a na a nato ti'a na. Indi wa a buh yun ma da kpa vre'a hei ni ti'a game.
Moto nyonso oyo awangani Yesu azali mpe na Tata te. Moto oyo atatoli Yesu azali mpe na Tata.
24 Naki iwu du kpi wa'u woh rji ni mumla krie ni'u inde kpi wa u woh rji ni mumla ahei ni wu, in u' wu hei ni vre ba tima game.
Kasi bino, bosimba makasi makambo oyo boyokaki wuta na ebandeli. Soki ezali penza kowumela kati na bino, bokowumela mpe kati na Mwana mpe kati na Tata.
25 Wa yi hi ikpie wa a chu yun ni ta wu ire u tutru. (aiōnios )
Mpe tala elaka oyo apesaki biso: bomoi ya seko. (aiōnios )
26 Me han kpi bi yi yiwu du bari gru ye yi you ni nkon meme ma na.
Nazali kokomela bino makambo oyo na tina na bato oyo bazali komeka kopengwisa bino.
27 Naki u' ikpie wa'u kpa ni wu ahei ni wu, wuna si wa indio du ye tsro u na du Ruhu ma wa wu kpa tsro kpe ba wawu wa ba jaji bana che na, ni yada a tsro u son ni'u na ki me.
Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.
28 Zizan mri son naki chachu wa aye ki hei ni gbengbenlen, ana shan ni tita niye ma na.
Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.
29 Inde wu toh da a hei ni kiklan suron, u ka toh di indi wa ani ti kpe wa a zizi ba grji di ki ma ni'u.
Boyebi malamu ete Klisto azali sembo; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.