< ܡܬܝ 19 >

ܘܗܘܐ ܕܟܕ ܫܠܡ ܝܫܘܥ ܡܠܐ ܗܠܝܢ ܫܩܠ ܡܢ ܓܠܝܠܐ ܘܐܬܐ ܠܬܚܘܡܐ ܕܝܗܘܕ ܠܥܒܪܐ ܕܝܘܪܕܢܢ 1
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani.
ܘܐܬܘ ܒܬܪܗ ܟܢܫܐ ܤܓܝܐܐ ܘܐܤܝ ܐܢܘܢ ܬܡܢ 2
Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna.
ܘܩܪܒܘ ܠܘܬܗ ܦܪܝܫܐ ܘܡܢܤܝܢ ܗܘܘ ܠܗ ܘܐܡܪܝܢ ܐܢ ܫܠܝܛ ܠܐܢܫ ܕܢܫܪܐ ܐܢܬܬܗ ܒܟܠ ܥܠܐ 3
Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye; bapesaki Ye motuna: — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo?
ܗܘ ܕܝܢ ܥܢܐ ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܠܐ ܩܪܝܬܘܢ ܕܗܘ ܕܥܒܕ ܡܢ ܒܪܫܝܬ ܕܟܪܐ ܘܢܩܒܬܐ ܥܒܕ ܐܢܘܢ 4
Yesu azongisaki: — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »
ܘܐܡܪ ܡܛܠ ܗܢܐ ܢܫܒܘܩ ܓܒܪܐ ܠܐܒܘܗܝ ܘܠܐܡܗ ܘܢܩܦ ܠܐܢܬܬܗ ܘܢܗܘܘܢ ܬܪܝܗܘܢ ܚܕ ܒܤܪ 5
mpe ete alobaki: « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko?
ܡܕܝܢ ܠܐ ܗܘܘ ܬܪܝܢ ܐܠܐ ܚܕ ܦܓܪ ܡܕܡ ܗܟܝܠ ܕܐܠܗܐ ܙܘܓ ܒܪܢܫܐ ܠܐ ܢܦܪܫ 6
Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi! »
ܐܡܪܝܢ ܠܗ ܠܡܢܐ ܗܟܝܠ ܡܘܫܐ ܦܩܕ ܕܢܬܠ ܟܬܒܐ ܕܫܘܒܩܢܐ ܘܢܫܪܝܗ 7
Kasi Bafarizeo balobaki na Ye: — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala?
ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܡܘܫܐ ܠܘܩܒܠ ܩܫܝܘܬ ܠܒܟܘܢ ܐܦܤ ܠܟܘܢ ܕܬܫܪܘܢ ܢܫܝܟܘܢ ܡܢ ܒܪܫܝܬ ܕܝܢ ܠܐ ܗܘܐ ܗܟܢܐ 8
Yesu azongiselaki bango: — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga; na ebandeli, ezalaki bongo te.
ܐܡܪ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܕܝܢ ܕܡܢ ܕܫܒܩ ܐܢܬܬܗ ܕܠܐ ܓܘܪܐ ܘܢܤܒ ܐܚܪܬܐ ܓܐܪ ܘܡܢ ܕܢܤܒ ܫܒܝܩܬܐ ܓܐܪ 9
Nazali koloba na bino: Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
ܐܡܪܝܢ ܠܗ ܬܠܡܝܕܘܗܝ ܐܢ ܗܟܢܐ ܐܝܬ ܥܕܠܝܐ ܒܝܢܝ ܓܒܪܐ ܠܐܢܬܬܐ ܠܐ ܦܩܚ ܠܡܤܒ ܐܢܬܬܐ 10
Bayekoli balobaki na Ye: — Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te!
ܗܘ ܕܝܢ ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܠܐ ܟܠܢܫ ܤܦܩ ܠܗ ܠܡܠܬܐ ܗܕܐ ܐܠܐ ܡܢ ܕܝܗܝܒ ܠܗ 11
Yesu azongiselaki bango: — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.
ܐܝܬ ܓܝܪ ܡܗܝܡܢܐ ܕܡܢ ܟܪܤܐ ܕܐܡܗܘܢ ܐܬܝܠܕܘ ܗܟܢܐ ܘܐܝܬ ܡܗܝܡܢܐ ܕܡܢ ܒܢܝܢܫܐ ܗܘܘ ܡܗܝܡܢܐ ܘܐܝܬ ܡܗܝܡܢܐ ܕܗܢܘܢ ܥܒܕܘ ܢܦܫܗܘܢ ܡܗܝܡܢܐ ܡܛܠ ܡܠܟܘܬܐ ܕܫܡܝܐ ܡܢ ܕܡܫܟܚ ܕܢܤܦܩ ܢܤܦܩ 12
Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te: ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango!
ܗܝܕܝܢ ܩܪܒܘ ܠܗ ܛܠܝܐ ܕܢܤܝܡ ܐܝܕܗ ܥܠܝܗܘܢ ܘܢܨܠܐ ܘܟܐܘ ܒܗܘܢ ܬܠܡܝܕܘܗܝ 13
Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango.
ܗܘ ܕܝܢ ܝܫܘܥ ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܫܒܘܩܘ ܛܠܝܐ ܐܬܝܢ ܠܘܬܝ ܘܠܐ ܬܟܠܘܢ ܐܢܘܢ ܕܕܐܝܠܝܢ ܓܝܪ ܕܐܝܟ ܗܠܝܢ ܐܢܘܢ ܐܝܬܝܗ ܡܠܟܘܬܐ ܕܫܡܝܐ 14
Yesu alobaki: — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
ܘܤܡ ܐܝܕܗ ܥܠܝܗܘܢ ܘܐܙܠ ܡܢ ܬܡܢ 15
Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
ܘܐܬܐ ܚܕ ܩܪܒ ܘܐܡܪ ܠܗ ܡܠܦܢܐ ܛܒܐ ܡܢܐ ܕܛܒ ܐܥܒܕ ܕܢܗܘܘܢ ܠܝ ܚܝܐ ܕܠܥܠܡ (aiōnios g166) 16
Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki: — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios g166)
ܗܘ ܕܝܢ ܐܡܪ ܠܗ ܡܢܐ ܩܪܐ ܐܢܬ ܠܝ ܛܒܐ ܠܝܬ ܛܒܐ ܐܠܐ ܐܢ ܚܕ ܐܠܗܐ ܐܢ ܕܝܢ ܨܒܐ ܐܢܬ ܕܬܥܘܠ ܠܚܝܐ ܛܪ ܦܘܩܕܢܐ 17
Yesu azongisaki: — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
ܐܡܪ ܠܗ ܐܝܠܝܢ ܗܘ ܕܝܢ ܝܫܘܥ ܐܡܪ ܠܗ ܕܠܐ ܬܩܛܘܠ ܘܠܐ ܬܓܘܪ ܘܠܐ ܬܓܢܘܒ ܘܠܐ ܬܤܗܕ ܤܗܕܘܬ ܫܘܩܪܐ 18
Elenge mobali yango atunaki lisusu: — Mibeko nini? Yesu azongisaki: — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,
ܘܝܩܪ ܠܐܒܘܟ ܘܠܐܡܟ ܘܬܚܒ ܠܩܪܝܒܟ ܐܝܟ ܢܦܫܟ 19
okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
ܐܡܪ ܠܗ ܗܘ ܥܠܝܡܐ ܗܠܝܢ ܟܠܗܝܢ ܢܛܪܬ ܐܢܝܢ ܡܢ ܛܠܝܘܬܝ ܡܢܐ ܚܤܝܪ ܐܢܐ 20
Elenge mobali alobaki: — Natosaka mibeko wana nyonso; nasala lisusu nini?
ܐܡܪ ܠܗ ܝܫܘܥ ܐܢ ܨܒܐ ܐܢܬ ܓܡܝܪܐ ܠܡܗܘܐ ܙܠ ܙܒܢ ܩܢܝܢܟ ܘܗܒ ܠܡܤܟܢܐ ܘܬܗܘܐ ܠܟ ܤܝܡܬܐ ܒܫܡܝܐ ܘܬܐ ܒܬܪܝ 21
Yesu azongisaki: — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
ܫܡܥ ܕܝܢ ܗܘ ܥܠܝܡܐ ܡܠܬܐ ܗܕܐ ܘܐܙܠ ܟܕ ܟܪܝܐ ܠܗ ܐܝܬ ܗܘܐ ܠܗ ܓܝܪ ܩܢܝܢܐ ܤܓܝܐܐ 22
Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
ܝܫܘܥ ܕܝܢ ܐܡܪ ܠܬܠܡܝܕܘܗܝ ܐܡܝܢ ܐܡܪ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܕܥܛܠܐ ܗܝ ܠܥܬܝܪܐ ܕܢܥܘܠ ܠܡܠܟܘܬ ܫܡܝܐ 23
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Nazali koloba na bino penza ya solo: ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo!
ܬܘܒ ܕܝܢ ܐܡܪܢܐ ܠܟܘܢ ܕܕܠܝܠ ܗܘ ܠܓܡܠܐ ܠܡܥܠ ܒܚܪܘܪܐ ܕܡܚܛܐ ܐܘ ܥܬܝܪܐ ܕܢܥܘܠ ܠܡܠܟܘܬܐ ܕܐܠܗܐ 24
Nazali koloba na bino lisusu: ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
ܬܠܡܝܕܐ ܕܝܢ ܟܕ ܫܡܥܘ ܬܗܝܪܝܢ ܗܘܘ ܛܒ ܘܐܡܪܝܢ ܡܢܘ ܟܝ ܡܫܟܚ ܕܢܚܐ 25
Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana: — Bongo nani penza akoki kobikisama?
ܚܪ ܒܗܘܢ ܝܫܘܥ ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܠܘܬ ܒܢܝܢܫܐ ܗܕܐ ܠܐ ܡܫܟܚܐ ܠܘܬ ܐܠܗܐ ܕܝܢ ܟܠܡܕܡ ܡܫܟܚܐ 26
Wana Yesu atalaki bango, alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema!
ܗܝܕܝܢ ܥܢܐ ܟܐܦܐ ܘܐܡܪ ܠܗ ܗܐ ܐܢܚܢܢ ܫܒܩܢ ܟܠܡܕܡ ܘܐܬܝܢ ܒܬܪܟ ܡܢܐ ܟܝ ܢܗܘܐ ܠܢ 27
Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu: — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo! Ekozala boni mpo na biso?
ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܝܫܘܥ ܐܡܝܢ ܐܡܪ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܕܐܢܬܘܢ ܕܐܬܝܬܘܢ ܒܬܪܝ ܒܥܠܡܐ ܚܕܬܐ ܡܐ ܕܝܬܒ ܒܪܗ ܕܐܢܫܐ ܥܠ ܬܪܢܘܤ ܕܫܘܒܚܗ ܬܬܒܘܢ ܐܦ ܐܢܬܘܢ ܥܠ ܬܪܥܤܪ ܟܘܪܤܘܢ ܘܬܕܘܢܘܢ ܬܪܥܤܪ ܫܒܛܐ ܕܐܝܤܪܐܝܠ 28
Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
ܘܟܠܢܫ ܕܫܒܩ ܒܬܐ ܐܘ ܐܚܐ ܐܘ ܐܚܘܬܐ ܐܘ ܐܒܐ ܐܘ ܐܡܐ ܐܘ ܐܢܬܬܐ ܐܘ ܒܢܝܐ ܐܘ ܩܘܪܝܐ ܡܛܠ ܫܡܝ ܚܕ ܒܡܐܐ ܢܩܒܠ ܘܚܝܐ ܕܠܥܠܡ ܢܐܪܬ (aiōnios g166) 29
Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko. (aiōnios g166)
ܤܓܝܐܐ ܕܝܢ ܩܕܡܝܐ ܕܢܗܘܘܢ ܐܚܪܝܐ ܘܐܚܪܝܐ ܩܕܡܝܐ 30
Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.

< ܡܬܝ 19 >