< ܡܪܩܘܣ 6 >

ܘܢܦܩ ܡܢ ܬܡܢ ܘܐܬܐ ܠܡܕܝܢܬܗ ܘܕܒܝܩܝܢ ܗܘܘ ܠܗ ܬܠܡܝܕܘܗܝ 1
Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama.
ܘܟܕ ܗܘܬ ܫܒܬܐ ܫܪܝ ܠܡܠܦܘ ܒܟܢܘܫܬܐ ܘܤܓܝܐܐ ܕܫܡܥܘ ܐܬܕܡܪܘ ܘܐܡܪܝܢ ܗܘܘ ܐܝܡܟܐ ܠܗ ܗܠܝܢ ܠܗܢܐ ܘܐܝܕܐ ܗܝ ܚܟܡܬܐ ܕܐܬܝܗܒܬ ܠܗ ܕܚܝܠܐ ܕܐܝܟ ܗܠܝܢ ܒܐܝܕܘܗܝ ܢܗܘܘܢ 2
Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki: « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi? Nani apesi ye bwanya ya boye? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso?
ܠܐ ܗܘܐ ܗܢܐ ܢܓܪܐ ܒܪܗ ܕܡܪܝܡ ܘܐܚܘܗܝ ܕܝܥܩܘܒ ܘܕܝܘܤܐ ܘܕܝܗܘܕܐ ܘܕܫܡܥܘܢ ܘܠܐ ܗܐ ܐܚܘܬܗ ܬܢܢ ܠܘܬܢ ܘܡܬܟܫܠܝܢ ܗܘܘ ܒܗ 3
Ezali ye te mosali mabaya? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.
ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܝܫܘܥ ܠܝܬ ܢܒܝܐ ܕܨܥܝܪ ܐܠܐ ܐܢ ܒܡܕܝܢܬܗ ܘܒܝܬ ܐܚܝܢܘܗܝ ܘܒܒܝܬܗ 4
Yesu alobaki na bango: « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »
ܘܠܐ ܡܫܟܚ ܗܘܐ ܕܢܥܒܕ ܬܡܢ ܐܦ ܠܐ ܚܕ ܚܝܠܐ ܐܠܐ ܐܢ ܕܥܠ ܟܪܝܗܐ ܩܠܝܠ ܤܡ ܐܝܕܗ ܘܐܤܝ 5
Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko.
ܘܡܬܕܡܪ ܗܘܐ ܒܚܤܝܪܘܬ ܗܝܡܢܘܬܗܘܢ ܘܡܬܟܪܟ ܗܘܐ ܒܩܘܪܝܐ ܟܕ ܡܠܦ 6
Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango. Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya.
ܘܩܪܐ ܠܬܪܥܤܪܬܗ ܘܫܪܝ ܕܢܫܕܪ ܐܢܘܢ ܬܪܝܢ ܬܪܝܢ ܘܝܗܒ ܠܗܘܢ ܫܘܠܛܢܐ ܥܠ ܪܘܚܐ ܛܢܦܬܐ ܕܢܦܩܘܢ 7
Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
ܘܦܩܕ ܐܢܘܢ ܕܠܐ ܢܫܩܠܘܢ ܡܕܡ ܠܐܘܪܚܐ ܐܠܐ ܐܢ ܫܒܛܐ ܒܠܚܘܕ ܠܐ ܬܪܡܠܐ ܘܠܐ ܠܚܡܐ ܘܠܐ ܢܚܫܐ ܒܟܝܤܝܗܘܢ 8
Alobaki na bango: « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. » Alobaki na bango: « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino.
ܐܠܐ ܢܤܐܢܘܢ ܛܠܪܐ ܘܠܐ ܢܠܒܫܘܢ ܬܪܬܝܢ ܟܘܬܝܢܝܢ 9
Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te.
ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܕܠܐܝܢܐ ܒܝܬܐ ܕܥܐܠܝܢ ܐܢܬܘܢ ܬܡܢ ܗܘܘ ܥܕܡܐ ܕܢܦܩܝܢ ܐܢܬܘܢ ܡܢ ܬܡܢ 10
Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.
ܘܟܠ ܡܢ ܕܠܐ ܢܩܒܠܘܢܟܘܢ ܘܠܐ ܢܫܡܥܘܢܟܘܢ ܡܐ ܕܢܦܩܝܢ ܐܢܬܘܢ ܡܢ ܬܡܢ ܦܨܘ ܚܠܐ ܕܒܬܚܬܝܐ ܕܪܓܠܝܟܘܢ ܠܤܗܕܘܬܗܘܢ ܘܐܡܝܢ ܐܡܪ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܕܢܗܘܐ ܢܝܚ ܠܤܕܘܡ ܘܠܥܡܘܪܐ ܒܝܘܡܐ ܕܕܝܢܐ ܐܘ ܠܡܕܝܢܬܐ ܗܝ 11
Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. »
ܘܢܦܩܘ ܗܘܘ ܘܐܟܪܙܘ ܕܢܬܘܒܘܢ 12
Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema.
ܘܫܐܕܐ ܤܓܝܐܐ ܡܦܩܝܢ ܗܘܘ ܘܡܫܚܝܢ ܗܘܘ ܒܡܫܚܐ ܟܪܝܗܐ ܤܓܝܐܐ ܘܡܐܤܝܢ ܗܘܘ 13
Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.
ܘܫܡܥ ܗܪܘܕܤ ܡܠܟܐ ܥܠ ܝܫܘܥ ܐܬܝܕܥ ܗܘܐ ܠܗ ܓܝܪ ܫܡܗ ܘܐܡܪ ܗܘܐ ܝܘܚܢܢ ܡܥܡܕܢܐ ܩܡ ܡܢ ܒܝܬ ܡܝܬܐ ܡܛܠ ܗܢܐ ܚܝܠܐ ܡܤܬܥܪܝܢ ܒܗ 14
Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu: « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa! »
ܐܚܪܢܐ ܐܡܪܝܢ ܗܘܘ ܕܐܠܝܐ ܗܘ ܘܐܚܪܢܐ ܕܢܒܝܐ ܗܘ ܐܝܟ ܚܕ ܡܢ ܢܒܝܐ 15
Bato mosusu bazalaki koloba: « Ezali Eliya! » Bamosusu: « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala! »
ܟܕ ܫܡܥ ܕܝܢ ܗܪܘܕܤ ܐܡܪ ܝܘܚܢܢ ܗܘ ܕܐܢܐ ܦܤܩܬ ܪܫܗ ܗܘ ܩܡ ܡܢ ܒܝܬ ܡܝܬܐ 16
Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela: « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi! »
ܗܘ ܓܝܪ ܗܪܘܕܤ ܫܕܪ ܗܘܐ ܐܚܕܗ ܠܝܘܚܢܢ ܘܐܤܪܗ ܒܝܬ ܐܤܝܪܐ ܡܛܠ ܗܪܘܕܝܐ ܐܢܬܬ ܦܝܠܝܦܘܤ ܐܚܘܗܝ ܗܝ ܕܢܤܒ 17
Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.
ܐܡܪ ܗܘܐ ܓܝܪ ܝܘܚܢܢ ܠܗܪܘܕܤ ܕܠܐ ܫܠܝܛ ܠܟ ܕܬܤܒ ܐܢܬܬ ܐܚܘܟ 18
Yoane azalaki koloba na Erode: « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »
ܗܝ ܕܝܢ ܗܪܘܕܝܐ ܠܚܝܡܐ ܗܘܬ ܠܗ ܘܨܒܝܢ ܗܘܬ ܠܡܩܛܠܗ ܘܠܐ ܡܫܟܚܐ ܗܘܬ 19
Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te,
ܗܪܘܕܤ ܓܝܪ ܕܚܠ ܗܘܐ ܡܢ ܝܘܚܢܢ ܥܠ ܕܝܕܥ ܗܘܐ ܕܓܒܪܐ ܗܘ ܙܕܝܩܐ ܘܩܕܝܫܐ ܘܡܢܛܪ ܗܘܐ ܠܗ ܘܤܓܝܐܬܐ ܫܡܥ ܗܘܐ ܠܗ ܘܥܒܕ ܘܒܤܝܡܐܝܬ ܫܡܥ ܗܘܐ ܠܗ 20
pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.
ܘܗܘܐ ܝܘܡܐ ܝܕܝܥܐ ܟܕ ܗܪܘܕܤ ܒܒܝܬ ܝܠܕܗ ܚܫܡܝܬܐ ܥܒܕ ܗܘܐ ܠܪܘܪܒܢܘܗܝ ܘܠܟܝܠܝܪܟܐ ܘܠܪܫܐ ܕܓܠܝܠܐ 21
Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile.
ܘܥܠܬ ܒܪܬܗ ܕܗܪܘܕܝܐ ܪܩܕܬ ܘܫܦܪܬ ܠܗ ܠܗܪܘܕܤ ܘܠܐܝܠܝܢ ܕܤܡܝܟܝܢ ܥܡܗ ܘܐܡܪ ܡܠܟܐ ܠܛܠܝܬܐ ܫܐܠܝ ܡܢܝ ܡܕܡ ܕܨܒܝܐ ܐܢܬܝ ܘܐܬܠ ܠܟܝ 22
Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi: — Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango!
ܘܝܡܐ ܠܗ ܕܡܕܡ ܕܬܫܐܠܝܢ ܐܬܠ ܠܟܝ ܥܕܡܐ ܠܦܠܓܗ ܕܡܠܟܘܬܝ 23
Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye: — Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai.
ܗܝ ܕܝܢ ܢܦܩܬ ܘܐܡܪܐ ܠܐܡܗ ܡܢܐ ܐܫܐܠܝܘܗܝ ܐܡܪܐ ܠܗ ܪܫܗ ܕܝܘܚܢܢ ܡܥܡܕܢܐ 24
Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye: — Mama, nasenga nini? Mama na ye azongisaki: — Senga moto ya Yoane Mobatisi.
ܘܡܚܕܐ ܥܠܬ ܒܒܛܝܠܘܬܐ ܠܘܬ ܡܠܟܐ ܘܐܡܪܐ ܠܗ ܨܒܝܐ ܐܢܐ ܒܗܕܐ ܫܥܬܐ ܕܬܬܠ ܠܝ ܥܠ ܦܝܢܟܐ ܪܫܗ ܕܝܘܚܢܢ ܡܥܡܕܢܐ 25
Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.
ܘܟܪܝܬ ܠܗ ܤܓܝ ܠܡܠܟܐ ܡܛܠ ܕܝܢ ܡܘܡܬܐ ܘܡܛܠ ܤܡܝܟܐ ܠܐ ܨܒܐ ܕܢܓܠܙܝܗ 26
Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango.
ܐܠܐ ܡܚܕܐ ܫܕܪ ܡܠܟܐ ܐܤܦܘܩܠܛܪܐ ܘܦܩܕ ܕܢܝܬܐ ܪܫܗ ܕܝܘܚܢܢ ܘܐܙܠ ܦܤܩܗ ܪܫܗ ܕܝܘܚܢܢ ܒܝܬ ܐܤܝܪܐ 27
Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane,
ܘܐܝܬܝ ܒܦܝܢܟܐ ܘܝܗܒ ܠܛܠܝܬܐ ܘܗܝ ܛܠܝܬܐ ܝܗܒܬ ܠܐܡܗ 28
amemaki yango, na sani; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye.
ܘܫܡܥܘ ܬܠܡܝܕܘܗܝ ܘܐܬܘ ܫܩܠܘ ܫܠܕܗ ܘܤܡܘ ܒܒܝܬ ܩܒܘܪܐ 29
Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
ܘܐܬܟܢܫܘ ܫܠܝܚܐ ܠܘܬ ܝܫܘܥ ܘܐܡܪܘ ܠܗ ܟܠ ܡܐ ܕܥܒܕܘ ܘܟܠ ܡܐ ܕܐܠܦܘ 30
Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.
ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܬܘ ܠܟܘܢ ܢܐܙܠ ܠܕܒܪܐ ܒܠܚܘܕܝܢ ܘܐܬܬܢܝܚܘ ܩܠܝܠ ܐܝܬ ܗܘܘ ܓܝܪ ܤܓܝܐܐ ܕܐܙܠܝܢ ܘܐܬܝܢ ܘܠܝܬ ܗܘܐ ܠܗܘܢ ܐܬܪܐ ܐܦ ܠܐ ܠܡܐܟܠ 31
Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango: « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »
ܘܐܙܠܘ ܠܐܬܪܐ ܚܘܪܒܐ ܒܤܦܝܢܬܐ ܒܠܚܘܕܝܗܘܢ 32
Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.
ܘܚܙܘ ܐܢܘܢ ܤܓܝܐܐ ܟܕ ܐܙܠܝܢ ܘܐܫܬܘܕܥܘ ܐܢܘܢ ܘܒܝܒܫܐ ܪܗܛܘ ܡܢ ܟܠܗܝܢ ܡܕܝܢܬܐ ܩܕܡܘܗܝ ܠܬܡܢ 33
Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende.
ܘܢܦܩ ܝܫܘܥ ܚܙܐ ܟܢܫܐ ܤܓܝܐܐ ܘܐܬܪܚܡ ܥܠܝܗܘܢ ܕܕܡܝܢ ܗܘܘ ܠܥܪܒܐ ܕܠܝܬ ܠܗܘܢ ܪܥܝܐ ܘܫܪܝ ܗܘܐ ܠܡܠܦܘ ܐܢܘܢ ܤܓܝܐܬܐ 34
Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.
ܘܟܕ ܗܘܐ ܥܕܢܐ ܤܓܝܐܐ ܩܪܒܘ ܠܘܬܗ ܬܠܡܝܕܘܗܝ ܘܐܡܪܝܢ ܠܗ ܕܗܢܐ ܐܬܪܐ ܚܘܪܒܐ ܗܘ ܘܥܕܢܐ ܤܓܝ 35
Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye: — Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe!
ܫܪܝ ܐܢܘܢ ܕܢܐܙܠܘܢ ܠܐܓܘܪܤܐ ܕܚܕܪܝܢ ܘܠܩܘܪܝܐ ܘܢܙܒܢܘܢ ܠܗܘܢ ܠܚܡܐ ܠܝܬ ܠܗܘܢ ܓܝܪ ܡܕܡ ܠܡܐܟܠ 36
Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga.
ܗܘ ܕܝܢ ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܗܒܘ ܠܗܘܢ ܐܢܬܘܢ ܠܡܠܥܤ ܐܡܪܝܢ ܠܗ ܢܐܙܠ ܢܙܒܢ ܕܡܐܬܝܢ ܕܝܢܪܝܢ ܠܚܡܐ ܘܢܬܠ ܠܗܘܢ ܠܥܤܝܢ 37
Kasi Yesu azongisaki: — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na Ye: — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale?
ܗܘ ܕܝܢ ܐܡܪ ܠܗܘܢ ܙܠܘ ܚܙܘ ܟܡܐ ܠܚܡܝܢ ܐܝܬ ܠܟܘܢ ܗܪܟܐ ܘܟܕ ܚܙܘ ܐܡܪܝܢ ܠܗ ܚܡܫܐ ܠܚܡܝܢ ܘܬܪܝܢ ܢܘܢܝܢ 38
Yesu atunaki bango: — Mapa boni bozali na yango? Bokende nanu kotala. Bakendeki kotala mpe balobaki: — Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale.
ܘܦܩܕ ܠܗܘܢ ܕܢܤܡܟܘܢ ܠܟܠܢܫ ܤܡܟܝܢ ܤܡܟܝܢ ܥܠ ܥܤܒܐ 39
Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu.
ܘܐܤܬܡܟܘ ܤܡܟܝܢ ܤܡܟܝܢ ܕܡܐܐ ܡܐܐ ܘܕܚܡܫܝܢ ܚܡܫܝܢ 40
Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano.
ܘܢܤܒ ܗܢܘܢ ܚܡܫܐ ܠܚܡܝܢ ܘܬܪܝܢ ܢܘܢܝܢ ܘܚܪ ܒܫܡܝܐ ܘܒܪܟ ܘܩܨܐ ܠܚܡܐ ܘܝܗܒ ܠܬܠܡܝܕܘܗܝ ܕܢܤܝܡܘܢ ܠܗܘܢ ܘܗܢܘܢ ܬܪܝܢ ܢܘܢܝܢ ܦܠܓܘ ܠܟܠܗܘܢ 41
Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.
ܘܐܟܠܘ ܟܠܗܘܢ ܘܤܒܥܘ 42
Bato nyonso baliaki mpe batondaki.
ܘܫܩܠܘ ܩܨܝܐ ܬܪܥܤܪ ܩܘܦܝܢܝܢ ܟܕ ܡܠܝܢ ܘܡܢ ܢܘܢܐ 43
Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
ܐܝܬܝܗܘܢ ܗܘܘ ܕܝܢ ܕܐܟܠܘ ܠܚܡܐ ܚܡܫܐ ܐܠܦܝܢ ܓܒܪܝܢ 44
Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.
ܘܡܚܕܐ ܐܠܨ ܠܬܠܡܝܕܘܗܝ ܕܢܤܩܘܢ ܠܤܦܝܢܬܐ ܘܢܐܙܠܘܢ ܩܕܡܘܗܝ ܠܥܒܪܐ ܠܒܝܬ ܨܝܕܐ ܥܕ ܫܪܐ ܗܘ ܠܟܢܫܐ 45
Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.
ܘܟܕ ܫܪܐ ܐܢܘܢ ܐܙܠ ܠܛܘܪܐ ܠܡܨܠܝܘ 46
Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.
ܟܕ ܗܘܐ ܕܝܢ ܪܡܫܐ ܤܦܝܢܬܐ ܐܝܬܝܗ ܗܘܬ ܡܨܥܬ ܝܡܐ ܘܗܘ ܒܠܚܘܕܘܗܝ ܥܠ ܐܪܥܐ 47
Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili,
ܘܚܙܐ ܐܢܘܢ ܕܡܫܬܢܩܝܢ ܟܕ ܪܕܝܢ ܪܘܚܐ ܓܝܪ ܠܘܩܒܠܗܘܢ ܗܘܬ ܘܒܡܛܪܬܐ ܪܒܝܥܝܬܐ ܕܠܠܝܐ ܐܬܐ ܠܘܬܗܘܢ ܝܫܘܥ ܟܕ ܡܗܠܟ ܥܠ ܡܝܐ ܘܨܒܐ ܗܘܐ ܕܢܥܒܪ ܐܢܘܢ 48
amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
ܗܢܘܢ ܕܝܢ ܚܙܐܘܗܝ ܕܡܗܠܟ ܥܠ ܡܝܐ ܘܤܒܪܘ ܠܗܘܢ ܕܚܙܘܐ ܗܘ ܕܓܠܐ ܘܩܥܘ 49
Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga.
ܟܠܗܘܢ ܓܝܪ ܚܙܐܘܗܝ ܘܕܚܠܘ ܘܒܪ ܫܥܬܗ ܡܠܠ ܥܡܗܘܢ ܘܐܡܪ ܠܗܘܢ ܐܬܠܒܒܘ ܐܢܐ ܐܢܐ ܠܐ ܬܕܚܠܘܢ 50
Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. Mbala moko, Yesu alobaki na bango: « Kimia! Kimia! Bobanga te! Ezali Ngai! »
ܘܤܠܩ ܠܘܬܗܘܢ ܠܤܦܝܢܬܐ ܘܫܠܝܬ ܪܘܚܐ ܘܛܒ ܡܬܕܡܪܝܢ ܗܘܘ ܘܬܗܝܪܝܢ ܒܢܦܫܗܘܢ 51
Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,
ܠܐ ܓܝܪ ܐܤܬܟܠܘ ܗܘܘ ܡܢ ܠܚܡܐ ܗܘ ܡܛܠ ܕܠܒܗܘܢ ܡܥܒܝ ܗܘܐ 52
pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.
ܘܟܕ ܥܒܪܘ ܥܒܪܐ ܐܬܘ ܠܐܪܥܐ ܕܓܢܤܪ 53
Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo.
ܘܟܕ ܢܦܩܘ ܡܢ ܤܦܝܢܬܐ ܒܪ ܫܥܬܗ ܐܤܬܟܠܘܗܝ ܐܢܫܝ ܐܬܪܐ 54
Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu.
ܘܪܗܛܘ ܒܟܠܗ ܐܪܥܐ ܗܝ ܘܫܪܝܘ ܠܡܝܬܝܘ ܠܐܝܠܝܢ ܕܒܝܫܐܝܬ ܥܒܝܕܝܢ ܟܕ ܫܩܝܠܝܢ ܠܗܘܢ ܒܥܪܤܬܐ ܠܐܝܟܐ ܕܫܡܥܝܢ ܗܘܘ ܕܐܝܬܘܗܝ 55
Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna.
ܘܐܝܟܐ ܕܥܐܠ ܗܘܐ ܠܩܘܪܝܐ ܘܠܡܕܝܢܬܐ ܒܫܘܩܐ ܤܝܡܝܢ ܗܘܘ ܟܪܝܗܐ ܘܒܥܝܢ ܗܘܘ ܡܢܗ ܕܐܦܢ ܠܟܢܦܐ ܕܠܒܘܫܗ ܢܩܪܒܘܢ ܘܟܠܗܘܢ ܐܝܠܝܢ ܕܩܪܒܝܢ ܗܘܘ ܠܗ ܡܬܐܤܝܢ ܗܘܘ 56
Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango.

< ܡܪܩܘܣ 6 >