< ܥܒܪ̈ܝܐ 5 >

ܟܠ ܪܒ ܟܘܡܪܐ ܓܝܪ ܕܡܢ ܒܢܝܢܫܐ ܗܘܐ ܚܠܦ ܒܢܝܢܫܐ ܩܐܡ ܥܠ ܐܝܠܝܢ ܕܕܐܠܗܐ ܐܢܝܢ ܕܢܩܪܒ ܩܘܪܒܢܐ ܘܕܒܚܐ ܚܠܦ ܚܛܗܐ 1
Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe aponamaka kati na bato mpe, lokola mosali ya Nzambe, atiamaka mpo na bolamu ya bato kati na makambo oyo etali boyokani na bango elongo na Nzambe. Mosala na ye ezali: kobonzela Nzambe makabo mpe bambeka mpo na masumu ya bato.
ܐܝܢܐ ܕܡܫܟܚ ܕܢܡܟ ܢܦܫܗ ܘܢܚܫ ܥܡ ܐܝܠܝܢ ܕܠܐ ܝܕܥܝܢ ܘܛܥܝܢ ܡܛܠ ܕܐܦ ܗܘ ܟܪܝܗܘܬܐ ܠܒܝܫ 2
Azali na makoki ya kozala na boboto liboso ya bolembu ya bato oyo bazangi boyebi mpe basalaka masumu, pamba te ye moko mpe azali moto na bolembu.
ܘܡܛܠܬܗ ܚܝܒ ܗܘ ܕܐܝܟܢܐ ܕܚܠܦ ܥܡܐ ܗܟܢܐ ܐܦ ܚܠܦ ܢܦܫܗ ܢܩܪܒ ܥܠ ܚܛܗܘܗܝ 3
Yango wana, likolo ya bolembu yango, asengeli kaka te kobonzaka mbeka mpo na masumu ya bato, kasi asengeli mpe kobonzaka yango mpo na masumu na ye moko.
ܘܠܐ ܗܘܐ ܠܢܦܫܗ ܐܢܫ ܢܤܒ ܐܝܩܪܐ ܐܠܐ ܐܝܢܐ ܕܡܬܩܪܐ ܡܢ ܐܠܗܐ ܐܝܟܢܐ ܕܐܗܪܘܢ 4
Moto moko te akoki komikomisa mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde akomisaka moto mokonzi ya Banganga-Nzambe soki mpe kaka abengi ye, ndenge ezalaki mpo na Aron.
ܗܟܢܐ ܐܦ ܡܫܝܚܐ ܠܐ ܗܘܐ ܢܦܫܗ ܫܒܚ ܕܢܗܘܐ ܪܒ ܟܘܡܪܐ ܐܠܐ ܗܘ ܕܐܡܪ ܠܗ ܕܒܪܝ ܐܢܬ ܐܢܐ ܝܘܡܢܐ ܝܠܕܬܟ 5
Ndenge moko mpe mpo na Klisto: amikomisaki te Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde alobaki na Ye: « Ozali Mwana na Ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
ܐܝܟ ܕܐܦ ܒܕܘܟܬܐ ܐܚܪܬܐ ܐܡܪ ܕܐܢܬ ܗܘ ܟܘܡܪܐ ܠܥܠܡ ܒܕܡܘܬܗ ܕܡܠܟܝܙܕܩ (aiōn g165) 6
Mpe, na esika mosusu kati na Makomi, alobaki: « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki. » (aiōn g165)
ܐܦ ܟܕ ܒܤܪܐ ܠܒܝܫ ܗܘܐ ܒܥܘܬܐ ܘܬܟܫܦܬܐ ܒܓܥܬܐ ܚܝܠܬܢܝܬܐ ܘܒܕܡܥܐ ܩܪܒ ܗܘܐ ܠܡܢ ܕܡܫܟܚ ܗܘܐ ܡܢ ܡܘܬܐ ܕܢܚܝܘܗܝ ܘܐܫܬܡܥ 7
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.
ܘܟܕ ܛܒ ܒܪܐ ܐܝܬܘܗܝ ܡܢ ܕܚܠܬܐ ܘܚܫܐ ܕܤܒܠ ܝܠܦܗ ܠܡܫܬܡܥܢܘܬܐ 8
Atako azalaki Mwana na Nzambe, kasi ayekolaki botosi na nzela ya pasi nyonso oyo amonaki.
ܘܗܟܢܐ ܐܬܓܡܪ ܘܗܘܐ ܠܟܠܗܘܢ ܐܝܠܝܢ ܕܡܫܬܡܥܝܢ ܠܗ ܥܠܬܐ ܕܚܝܐ ܕܠܥܠܡ (aiōnios g166) 9
Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko; (aiōnios g166)
ܘܐܫܬܡܗ ܡܢ ܐܠܗܐ ܪܒ ܟܘܡܪܐ ܒܕܡܘܬܗ ܕܡܠܟܝܙܕܩ 10
pamba te Nzambe atia Ye Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kolanda molongo ya Melishisedeki.
ܥܠܘܗܝ ܕܝܢ ܥܠ ܗܢܐ ܡܠܟܝܙܕܩ ܤܓܝܐܐ ܗܝ ܠܢ ܡܠܬܐ ܠܡܐܡܪܗ ܘܥܤܩܐ ܠܡܦܫܩܘܬܗ ܡܛܠ ܕܗܘܝܬܘܢ ܠܟܘܢ ܟܪܝܗܐ ܒܡܫܡܥܬܟܘܢ 11
Tozali na makambo mingi ya koloba na tina na likambo oyo, kasi ezali pasi mpo na kolimbola yango mpo ete bososolaka lisusu noki te.
ܚܝܒܝܢ ܗܘܝܬܘܢ ܓܝܪ ܡܠܦܢܐ ܠܡܗܘܐ ܡܛܠ ܕܙܒܢܐ ܠܟܘܢ ܒܝܘܠܦܢܐ ܗܫܐ ܕܝܢ ܬܘܒ ܤܢܝܩܝܢ ܐܢܬܘܢ ܕܬܐܠܦܘܢ ܐܝܠܝܢ ܐܢܝܢ ܟܬܝܒܬܐ ܩܕܡܝܬܐ ܕܪܝܫ ܡܠܘܗܝ ܕܐܠܗܐ ܘܗܘܝܬܘܢ ܠܟܘܢ ܤܢܝܩܐ ܥܠ ܚܠܒܐ ܘܠܐ ܥܠ ܡܐܟܘܠܬܐ ܫܪܝܪܬܐ 12
Bosengelaki wuta kala kokoma balakisi; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te.
ܟܠܢܫ ܕܝܢ ܕܡܐܟܘܠܬܗ ܚܠܒܐ ܗܘ ܠܐ ܡܦܤ ܒܡܠܬܐ ܕܟܐܢܘܬܐ ܡܛܠ ܕܫܒܪܐ ܗܘ 13
Nzokande, moto nyonso oyo atikalaka kaka na miliki azali mwana moke mpe ayebi te liloba oyo eteyaka bosembo.
ܕܓܡܝܪܐ ܗܝ ܕܝܢ ܡܐܟܘܠܬܐ ܫܪܝܪܬܐ ܐܝܠܝܢ ܕܡܛܠ ܕܡܕܪܫܝܢ ܐܬܢܦܩܘ ܪܓܫܝܗܘܢ ܠܡܦܪܫ ܛܒܬܐ ܘܒܝܫܬܐ 14
Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.

< ܥܒܪ̈ܝܐ 5 >