< ܓܠܛܝ̈ܐ 6 >

ܐܚܝ ܐܢ ܐܢܫ ܡܢܟܘܢ ܢܬܩܕܡ ܒܤܟܠܘܬܐ ܐܢܬܘܢ ܐܝܠܝܢ ܕܒܪܘܚ ܐܢܬܘܢ ܐܬܩܢܘܗܝ ܒܪܘܚܐ ܡܟܝܟܬܐ ܘܗܘܝܬܘܢ ܙܗܝܪܝܢ ܕܕܠܡܐ ܐܦ ܐܢܬܘܢ ܬܬܢܤܘܢ 1
Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.
ܘܛܥܢܘ ܝܘܩܪܐ ܕܚܕܕܐ ܕܗܟܢܐ ܡܡܠܝܬܘܢ ܢܡܘܤܗ ܕܡܫܝܚܐ 2
Bomemisana mikumba bino na bino; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.
ܐܢ ܓܝܪ ܐܢܫ ܤܒܪ ܕܐܝܬܘܗܝ ܡܕܡ ܟܕ ܠܐ ܐܝܬܘܗܝ ܢܦܫܗ ܡܛܥܐ 3
Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.
ܐܠܐ ܐܢܫ ܥܒܕܗ ܢܗܘܐ ܒܩܐ ܘܗܝܕܝܢ ܒܝܢܘܗܝ ܠܢܦܫܗ ܢܗܘܐ ܫܘܒܗܪܗ ܘܠܐ ܒܐܚܪܢܐ 4
Tika ete moko na moko atala malamu misala na ye! Soki akoki komikumisa mpo na yango, akomikumisa mpo na ye moko kaka, kasi mpo na bato mosusu te;
ܟܠܢܫ ܓܝܪ ܡܘܒܠܐ ܕܢܦܫܗ ܢܫܩܘܠ 5
pamba te moto na moto akosamba mpo na misala na ye moko.
ܢܫܬܘܬܦ ܕܝܢ ܗܘ ܕܫܡܥ ܡܠܬܐ ܠܗܘ ܡܢ ܕܡܫܡܥ ܠܗ ܒܟܠܗܝܢ ܛܒܬܐ 6
Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.
ܠܐ ܬܛܥܘܢ ܐܠܗܐ ܠܐ ܡܬܒܙܚ ܡܕܡ ܕܙܪܥ ܓܝܪ ܒܪ ܐܢܫܐ ܗܘ ܗܘ ܚܨܕ 7
Bomikosa te: Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka.
ܡܢ ܕܒܒܤܪ ܙܪܥ ܡܢ ܒܤܪܐ ܚܒܠܐ ܗܘ ܚܨܕ ܘܡܢ ܕܒܪܘܚ ܙܪܥ ܡܢ ܪܘܚܐ ܚܝܐ ܕܠܥܠܡ ܢܚܨܘܕ (aiōnios g166) 8
Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko. (aiōnios g166)
ܘܟܕ ܥܒܕܝܢܢ ܕܛܒ ܠܐ ܗܘܬ ܡܐܢܐ ܠܢ ܢܗܘܐ ܓܝܪ ܙܒܢܐ ܕܢܚܨܘܕ ܘܠܐ ܬܡܐܢ ܠܢ 9
Tosalaka bolamu; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
ܗܫܐ ܗܟܝܠ ܥܕ ܙܒܢܐ ܐܝܬ ܠܢ ܢܦܠܘܚ ܛܒܬܐ ܠܘܬ ܟܠܢܫ ܝܬܝܪܐܝܬ ܠܘܬ ܒܢܝ ܒܝܬܐ ܕܗܝܡܢܘܬܐ 10
Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.
ܚܙܘ ܐܝܠܝܢ ܟܬܝܒܢ ܟܬܒܬ ܠܟܘܢ ܒܐܝܕܝ 11
Botala ndenge nakomeli bino na makomi ya minene! Nasaleli loboko na ngai moko mpo na kokoma yango.
ܐܝܠܝܢ ܕܨܒܝܢ ܕܢܫܬܒܗܪܘܢ ܒܒܤܪܐ ܗܢܘܢ ܐܠܨܝܢ ܠܟܘܢ ܕܬܬܓܙܪܘܢ ܕܒܠܚܘܕ ܒܙܩܝܦܗ ܕܡܫܝܚܐ ܠܐ ܢܬܪܕܦܘܢ 12
Bato oyo balingaka koyebana na miso ya bato batindaka bino na makasi kokatisa ngenga, mpo ete banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto.
ܐܦܠܐ ܓܝܪ ܗܢܘܢ ܗܠܝܢ ܕܓܙܪܝܢ ܢܛܪܝܢ ܢܡܘܤܐ ܐܠܐ ܨܒܝܢ ܕܬܬܓܙܪܘܢ ܕܒܒܤܪܟܘܢ ܕܝܠܟܘܢ ܢܫܬܒܗܪܘܢ 13
Pamba te bango moko bato oyo bakatisaka ngenga batosaka Mobeko te, kasi balingi kaka ete bokatisa ngenga mpo ete bamikumisa na tina na bomoto na bino.
ܠܝ ܕܝܢ ܠܐ ܢܗܘܐ ܠܝ ܕܐܫܬܒܗܪ ܐܠܐ ܒܙܩܝܦܗ ܕܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܕܒܗ ܥܠܡܐ ܙܩܝܦ ܠܝ ܘܐܢܐ ܙܩܝܦ ܐܢܐ ܠܥܠܡܐ 14
Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.
ܠܐ ܓܝܪ ܓܙܘܪܬܐ ܐܝܬܝܗ ܡܕܡ ܘܠܐ ܥܘܪܠܘܬܐ ܐܠܐ ܒܪܝܬܐ ܚܕܬܐ 15
Ezali te kokatama ngenga to kokatama ngenga te nde ezali na tina; likambo ya tina ezali: kokoma ekelamu ya sika.
ܘܐܝܠܝܢ ܕܠܗܢܐ ܫܒܝܠܐ ܫܠܡܝܢ ܫܠܡܐ ܢܗܘܐ ܥܠܝܗܘܢ ܘܪܚܡܐ ܘܥܠ ܐܝܤܪܝܠ ܕܐܠܗܐ 16
Tika ete kimia mpe mawa ya Nzambe epesamela bato nyonso oyo bakobanda kotambola kolanda mobeko oyo, mpe epesamela Isalaele ya Nzambe!
ܡܟܝܠ ܠܝ ܐܢܫ ܥܡܠܐ ܠܐ ܢܪܡܐ ܐܢܐ ܓܝܪ ܟܘܬܡܬܗ ܕܡܪܢ ܝܫܘܥ ܒܦܓܪܝ ܫܩܝܠ ܐܢܐ 17
Kobanda lelo, tika ete moto moko te apesa ngai lisusu pasi na motema, pamba te nazali komema bilembo ya bapota ya Yesu kati na nzoto na ngai.
ܛܝܒܘܬܗ ܕܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܥܡ ܪܘܚܟܘܢ ܐܚܝ ܐܡܝܢ 18
Bandeko na ngai, tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na bino! Amen!

< ܓܠܛܝ̈ܐ 6 >