< ܓܠܛܝ̈ܐ 2 >

ܬܘܒ ܕܝܢ ܡܢ ܒܬܪ ܐܪܒܥܤܪܐ ܫܢܝܢ ܤܠܩܬ ܠܐܘܪܫܠܡ ܥܡ ܒܪܢܒܐ ܘܕܒܪܬ ܥܡܝ ܠܛܛܘܤ 1
Sima na mibu zomi na minei, nazongaki lisusu na Yelusalemi elongo na Barnabasi; namemaki mpe Tito.
ܤܠܩܬ ܕܝܢ ܒܓܠܝܢܐ ܘܓܠܝܬ ܠܗܘܢ ܤܒܪܬܐ ܕܡܟܪܙ ܐܢܐ ܒܥܡܡܐ ܘܚܘܝܬܗ ܠܐܝܠܝܢ ܕܡܤܬܒܪܝܢ ܗܘܘ ܕܡܕܡ ܐܝܬܝܗܘܢ ܒܝܢܝ ܘܠܗܘܢ ܕܡ ܤܪܝܩܐܝܬ ܪܗܛܬ ܐܘ ܪܗܛ ܐܢܐ 2
Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.
ܐܦ ܛܛܘܤ ܕܥܡܝ ܕܐܪܡܝܐ ܗܘܐ ܠܐ ܐܬܐܢܤ ܕܢܓܙܘܪ 3
Nzokande, ezala Tito oyo azalaki elongo na ngai, batindaki ye kutu te na makasi ete akatisa ngenga, atako azalaki Mogreki.
ܡܛܠ ܕܝܢ ܐܚܐ ܕܓܠܐ ܕܥܠܘ ܥܠܝܢ ܕܢܓܫܘܢ ܚܐܪܘܬܐ ܕܐܝܬ ܠܢ ܒܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܐܝܟܢܐ ܕܢܫܥܒܕܘܢܢܝ 4
Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu.
ܐܦܠܐ ܡܠܐ ܫܥܐ ܐܬܪܡܝܢ ܠܫܘܥܒܕܗܘܢ ܕܫܪܪܗ ܕܤܒܪܬܐ ܢܩܘܐ ܠܘܬܟܘܢ 5
Kasi totikelaki bango ata tango te mpo ete bosolo ya Sango Malamu etikala mpo na bino.
ܗܢܘܢ ܕܝܢ ܕܡܤܬܒܪܝܢ ܕܐܝܬܝܗܘܢ ܡܕܡ ܡܢ ܕܝܢ ܐܝܬܝܗܘܢ ܠܐ ܒܛܝܠ ܠܝ ܐܠܗܐ ܓܝܪ ܒܐܦܝ ܒܢܝܢܫܐ ܠܐ ܢܤܒ ܗܢܘܢ ܕܝܢ ܗܠܝܢ ܡܕܡ ܠܐ ܐܘܤܦܘ ܠܝ 6
Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
ܐܠܐ ܐܚܪܢܝܐܝܬ ܚܙܘ ܓܝܪ ܕܐܬܗܝܡܢܬ ܤܒܪܬܐ ܕܥܘܪܠܘܬܐ ܐܝܟ ܕܐܬܗܝܡܢ ܟܐܦܐ ܒܓܙܘܪܬܐ 7
Kutu, bamonaki penza ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya bato oyo bakatama ngenga te, ndenge apesaki na Petelo mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya Bayuda.
ܗܘ ܓܝܪ ܕܚܦܛ ܠܟܐܦܐ ܒܫܠܝܚܘܬܐ ܕܓܙܘܪܬܐ ܚܦܛ ܐܦ ܠܝ ܒܫܠܝܚܘܬܐ ܕܥܡܡܐ 8
Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano.
ܘܟܕ ܝܕܥܘ ܛܝܒܘܬܐ ܕܐܬܝܗܒܬ ܠܝ ܝܥܩܘܒ ܘܟܐܦܐ ܘܝܘܚܢܢ ܗܢܘܢ ܕܡܤܬܒܪܝܢ ܗܘܘ ܕܐܝܬܝܗܘܢ ܥܡܘܕܐ ܝܡܝܢܐ ܕܫܘܬܦܘܬܐ ܝܗܒܘ ܠܝ ܘܠܒܪܢܒܐ ܕܚܢܢ ܒܥܡܡܐ ܘܗܢܘܢ ܒܓܙܘܪܬܐ 9
Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.
ܒܠܚܘܕ ܕܠܡܤܟܢܐ ܗܘܝܢ ܥܗܕܝܢܢ ܘܐܬܒܛܠ ܠܝ ܕܗܝ ܗܕܐ ܐܥܒܕܝܗ 10
Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.
ܟܕ ܐܬܐ ܕܝܢ ܟܐܦܐ ܠܐܢܛܝܘܟܝ ܒܐܦܘܗܝ ܐܟܤܬܗ ܡܛܠ ܕܡܬܬܩܠܝܢ ܗܘܘ ܒܗ 11
Tango Petelo ayaki na Antioshe, natelemelaki ye makasi mpo ete azalaki kati na libunga.
ܕܥܕܠܐ ܢܐܬܘܢ ܐܢܫܐ ܡܢ ܠܘܬ ܝܥܩܘܒ ܥܡ ܥܡܡܐ ܐܟܠ ܗܘܐ ܟܕ ܐܬܘ ܕܝܢ ܢܓܕ ܗܘܐ ܢܦܫܗ ܘܦܪܫ ܡܛܠ ܕܕܚܠ ܗܘܐ ܡܢ ܗܢܘܢ ܕܡܢ ܓܙܘܪܬܐ 12
Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.
ܘܐܬܪܡܝܘ ܗܘܘ ܥܡܗ ܠܗܕܐ ܐܦ ܫܪܟܐ ܕܝܗܘܕܝܐ ܗܟܢܐ ܕܐܦ ܒܪܢܒܐ ܐܬܕܒܪ ܗܘܐ ܠܡܤܒ ܒܐܦܝܗܘܢ 13
Bayuda mosusu basanganaki na ye kati na lokuta na ye kino Barnabasi mpe akotaki na lokuta na bango.
ܘܟܕ ܚܙܝܬ ܕܠܐ ܐܙܠܝܢ ܬܪܝܨܐܝܬ ܒܫܪܪܗ ܕܐܘܢܓܠܝܘܢ ܐܡܪܬ ܠܟܐܦܐ ܠܥܝܢ ܟܠܗܘܢ ܐܢ ܐܢܬ ܕܝܗܘܕܝܐ ܐܢܬ ܐܪܡܐܝܬ ܚܝܐ ܐܢܬ ܘܠܐ ܝܗܘܕܐܝܬ ܐܝܟܢܐ ܐܠܨ ܐܢܬ ܠܥܡܡܐ ܕܝܗܘܕܐܝܬ ܢܚܘܢ 14
Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso: « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda?
ܚܢܢ ܓܝܪ ܕܡܢ ܟܝܢܢ ܝܗܘܕܝܐ ܚܢܢ ܘܠܐ ܗܘܝܢ ܡܢ ܥܡܡܐ ܚܛܝܐ 15
Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki.
ܡܛܠ ܕܝܕܥܝܢܢ ܕܠܐ ܡܙܕܕܩ ܒܪܢܫܐ ܡܢ ܥܒܕܐ ܕܢܡܘܤܐ ܐܠܐ ܒܗܝܡܢܘܬܐ ܕܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܐܦ ܚܢܢ ܒܗ ܒܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܗܝܡܢܢ ܕܡܢ ܗܝܡܢܘܬܗ ܕܡܫܝܚܐ ܢܙܕܕܩ ܘܠܐ ܡܢ ܥܒܕܐ ܕܢܡܘܤܐ ܡܛܠ ܕܡܢ ܥܒܕܐ ܕܢܡܘܤܐ ܠܐ ܡܙܕܕܩ ܟܠ ܒܤܪ 16
Toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa maloba ya Mobeko, kasi kaka na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto. Yango wana biso mpe tondimelaki Yesu-Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima kati na Klisto, kasi na nzela te ya kotosa maloba ya Mobeko, pamba te moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa maloba ya mibeko.
ܐܢ ܕܝܢ ܟܕ ܒܥܝܢܢ ܕܢܙܕܕܩ ܒܡܫܝܚܐ ܐܫܬܟܚܢ ܠܢ ܐܦ ܚܢܢ ܚܛܝܐ ܡܕܝܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܡܫܡܫܢܐ ܗܘ ܕܚܛܝܬܐ ܚܤ 17
Kasi soki, wana tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani lisusu ete biso moko Bayuda tozali mpe basumuki lokola Bapagano, boni, elingi koloba ete Klisto azali kotombola masumu? Ata moke te!
ܐܢ ܓܝܪ ܠܐܝܠܝܢ ܕܤܬܪܬ ܬܘܒ ܠܗܝܢ ܒܢܐ ܐܢܐ ܚܘܝܬ ܥܠ ܢܦܫܝ ܕܥܒܪ ܥܠ ܦܘܩܕܢܐ ܐܢܐ 18
Soki ngai natomboli lisusu biloko oyo nasilaki kobebisa, wana nazali penza mobuki mibeko.
ܐܢܐ ܓܝܪ ܒܢܡܘܤܐ ܠܢܡܘܤܐ ܡܝܬܬ ܕܠܐܠܗܐ ܐܚܐ 19
Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto;
ܘܥܡ ܡܫܝܚܐ ܙܩܝܦ ܐܢܐ ܘܡܟܝܠ ܠܐ ܗܘܐ ܐܢܐ ܚܝ ܐܢܐ ܐܠܐ ܚܝ ܒܝ ܡܫܝܚܐ ܘܗܢܐ ܕܗܫܐ ܚܝ ܐܢܐ ܒܒܤܪ ܒܗܝܡܢܘܬܐ ܗܘ ܕܒܪܗ ܕܐܠܗܐ ܚܝ ܐܢܐ ܗܘ ܕܐܚܒܢ ܘܝܗܒ ܢܦܫܗ ܚܠܦܝܢ 20
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
ܠܐ ܛܠܡ ܐܢܐ ܛܝܒܘܬܗ ܕܐܠܗܐ ܐܢ ܓܝܪ ܒܝܕ ܢܡܘܤܐ ܗܝ ܙܕܝܩܘܬܐ ܡܫܝܚܐ ܡܓܢ ܡܝܬ 21
Nazali kolongola te ngolu ya Nzambe, pamba te soki ezali na nzela ya kotosa Mobeko nde bato bakomaka sembo, wana Klisto akufaki mpo na pamba. »

< ܓܠܛܝ̈ܐ 2 >