< ܒ-ܩܘܪ̈ܝܢܬܝܐ 6 >

ܘܐܝܟ ܡܥܕܪܢܐ ܒܥܝܢܢ ܡܢܟܘܢ ܕܠܐ ܬܤܬܪܩ ܒܟܘܢ ܛܝܒܘܬܐ ܕܐܠܗܐ ܕܩܒܠܬܘܢ 1
Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te;
ܐܡܪ ܓܝܪ ܕܒܙܒܢܐ ܡܩܒܠܐ ܥܢܝܬܟ ܘܒܝܘܡܐ ܕܚܝܐ ܥܕܪܬܟ ܗܐ ܗܫܐ ܙܒܢܐ ܡܩܒܠܐ ܘܗܐ ܗܫܐ ܝܘܡܐ ܕܚܝܐ 2
pamba te Nzambe alobi: « Na tango ya malamu, nayanolaki yo; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
ܠܡܐ ܒܡܕܡ ܬܬܠܘܢ ܠܐܢܫ ܥܠܬܐ ܕܬܘܩܠܬܐ ܕܠܐ ܢܗܘܐ ܡܘܡܐ ܒܬܫܡܫܬܢ 3
Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.
ܐܠܐ ܒܟܠ ܡܕܡ ܢܚܘܐ ܢܦܫܢ ܕܡܫܡܫܢܐ ܚܢܢ ܕܐܠܗܐ ܒܡܤܝܒܪܢܘܬܐ ܤܓܝܐܬܐ ܒܐܘܠܨܢܐ ܒܐܢܢܩܤ ܒܚܒܘܫܝܐ 4
Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso: na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema;
ܒܢܓܕܐ ܒܐܤܘܪܐ ܒܫܓܘܫܝܐ ܒܠܐܘܬܐ ܒܫܗܪܐ ܒܨܘܡܐ 5
kati na kobetama, boloko mpe mobulu; kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei;
ܒܕܟܝܘܬܐ ܒܝܕܥܬܐ ܒܢܓܝܪܘܬ ܪܘܚܐ ܒܒܤܝܡܘܬܐ ܒܪܘܚܐ ܕܩܘܕܫܐ ܒܚܘܒܐ ܕܠܐ ܢܟܠܐ 6
kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto; kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo;
ܒܡܠܬܐ ܕܩܘܫܬܐ ܒܚܝܠܐ ܕܐܠܗܐ ܒܙܝܢܐ ܕܙܕܝܩܘܬܐ ܕܒܝܡܝܢܐ ܘܒܤܡܠܐ 7
kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe; kati na bibundeli ya bosembo mpo na kobundisa monguna mpe komibatela;
ܒܫܘܒܚܐ ܘܒܨܥܪܐ ܒܩܘܠܤܐ ܘܒܓܘܢܝܐ ܐܝܟ ܡܛܥܝܢܐ ܘܫܪܝܪܐ 8
kati na lokumu mpe soni, kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe. Mpe lisusu, kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta, nzokande tolobaka solo;
ܐܝܟ ܠܐ ܝܕܝܥܐ ܘܝܕܝܥܝܢܢ ܐܝܟ ܡܝܬܝܢܢ ܘܗܐ ܚܝܝܢ ܚܢܢ ܐܝܟ ܕܡܬܪܕܝܢܢ ܘܠܐ ܡܝܬܝܢܢ 9
koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te;
ܐܝܟ ܕܟܪܝܐ ܠܢ ܘܒܟܠܙܒܢ ܚܕܝܢܢ ܐܝܟ ܡܤܟܢܐ ܘܠܤܓܝܐܐ ܡܥܬܪܝܢܢ ܐܝܟ ܕܡܕܡ ܠܝܬ ܠܢ ܘܟܠ ܡܕܡ ܐܚܝܕܝܢܢ 10
koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.
ܦܘܡܢ ܦܬܝܚ ܗܘ ܠܘܬܟܘܢ ܩܘܪܢܬܝܐ ܘܠܒܢ ܪܘܝܚ 11
Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama.
ܠܐ ܐܠܝܨܝܬܘܢ ܒܢ ܐܠܝܨܝܬܘܢ ܕܝܢ ܒܪܚܡܝܟܘܢ 12
Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.
ܐܝܟ ܕܠܒܢܝܐ ܕܝܢ ܐܡܪ ܐܢܐ ܦܘܪܥܘܢܝ ܚܘܒܠܝ ܕܠܘܬܟܘܢ ܘܪܘܚܘ ܚܘܒܟܘܢ ܠܘܬܝ 13
Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo: Bosala lokola biso! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino!
ܘܠܐ ܬܗܘܘܢ ܒܢܝ ܙܘܓܐ ܠܐܝܠܝܢ ܕܠܐ ܡܗܝܡܢܝܢ ܐܝܕܐ ܓܝܪ ܫܘܬܦܘܬܐ ܐܝܬ ܠܙܕܝܩܘܬܐ ܥܡ ܥܘܠܐ ܐܘ ܐܝܢܐ ܚܘܠܛܢܐ ܐܝܬ ܠܢܗܝܪܐ ܥܡ ܚܫܘܟܐ 14
Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili?
ܐܘ ܐܝܕܐ ܫܠܡܘܬܐ ܐܝܬ ܠܡܫܝܚܐ ܥܡ ܤܛܢܐ ܐܘ ܐܝܕܐ ܡܢܬܐ ܐܝܬ ܠܕܡܗܝܡܢ ܥܡ ܕܠܐ ܡܗܝܡܢ 15
Klisto akoki solo koyokana na Satana? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima?
ܐܝܕܐ ܕܝܢ ܐܘܝܘܬܐ ܐܝܬ ܠܗܝܟܠܗ ܕܐܠܗܐ ܥܡ ܕܫܐܕܐ ܐܢܬܘܢ ܕܝܢ ܗܝܟܠܗ ܐܢܬܘܢ ܕܐܠܗܐ ܚܝܐ ܐܝܟܢܐ ܕܐܡܝܪ ܕܐܥܡܪ ܒܗܘܢ ܘܐܗܠܟ ܒܗܘܢ ܘܐܗܘܐ ܐܠܗܗܘܢ ܘܗܢܘܢ ܢܗܘܘܢ ܠܝ ܥܡܐ 16
Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko: « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »
ܡܛܠ ܗܢܐ ܦܘܩܘ ܡܢ ܒܝܢܬܗܘܢ ܘܐܬܦܪܫܘ ܡܢܗܘܢ ܐܡܪ ܡܪܝܐ ܘܠܛܡܐܐ ܠܐ ܬܬܩܪܒܘܢ ܘܐܢܐ ܐܩܒܠܟܘܢ 17
Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »
ܘܐܗܘܐ ܠܟܘܢ ܠܐܒܐ ܘܐܢܬܘܢ ܬܗܘܘܢ ܠܝ ܠܒܢܝܐ ܘܠܒܢܬܐ ܐܡܪ ܡܪܝܐ ܕܟܠ ܐܚܝܕ 18
Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »

< ܒ-ܩܘܪ̈ܝܢܬܝܐ 6 >