< ܐ-ܬܣܠ̈ܘܢܝܩܝܐ 4 >

ܡܟܝܠ ܐܚܝ ܒܥܝܢܢ ܡܢܟܘܢ ܘܡܬܟܫܦܝܢܢ ܠܟܘܢ ܒܡܪܢ ܝܫܘܥ ܕܐܝܟ ܕܩܒܠܬܘܢ ܡܢܢ ܐܝܟܢ ܘܠܐ ܠܟܘܢ ܕܬܗܠܟܘܢ ܘܬܫܦܪܘܢ ܠܐܠܗܐ ܕܝܬܝܪܐܝܬ ܬܘܤܦܘܢ 1
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.
ܝܕܥܝܢ ܐܢܬܘܢ ܓܝܪ ܐܝܠܝܢ ܦܘܩܕܢܐ ܝܗܒܢ ܠܟܘܢ ܒܡܪܢ ܝܫܘܥ 2
Pamba te boyebi mitindo oyo topesaki bino na Kombo ya Nkolo Yesu.
ܗܢܘ ܓܝܪ ܨܒܝܢܗ ܕܐܠܗܐ ܩܕܝܫܘܬܟܘܢ ܘܕܬܗܘܘܢ ܦܪܝܩܝܢ ܡܢ ܟܠ ܙܢܝܘܬܐ 3
Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite;
ܘܢܗܘܐ ܝܕܥ ܐܢܫ ܐܢܫ ܡܢܟܘܢ ܠܡܩܢܐ ܡܐܢܗ ܒܩܕܝܫܘܬܐ ܘܒܐܝܩܪܐ 4
moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu,
ܘܠܐ ܒܚܫܐ ܕܪܓܬܐ ܐܝܟ ܫܪܟܐ ܕܥܡܡܐ ܗܢܘܢ ܕܠܐ ܝܕܥܝܢ ܠܐܠܗܐ 5
asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,
ܘܠܐ ܬܗܘܘܢ ܡܫܝܚܝܢ ܠܡܥܒܪ ܘܠܡܥܠܒ ܐܢܫ ܠܐܚܘܗܝ ܒܗܕܐ ܨܒܘܬܐ ܡܛܠ ܕܡܪܢ ܗܘ ܬܒܘܥܐ ܥܠ ܗܠܝܢ ܟܠܗܝܢ ܐܝܟܢܐ ܕܐܦ ܡܢ ܩܕܡ ܙܒܢܐ ܐܡܪܢ ܠܟܘܢ ܘܤܗܕܢ 6
asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.
ܠܐ ܓܝܪ ܩܪܟܘܢ ܐܠܗܐ ܠܛܢܦܘܬܐ ܐܠܐ ܠܩܕܝܫܘܬܐ 7
Nzambe abengaki biso te mpo ete tozala bato ya mbindo, kasi mpo ete tobika bomoi na biso na lolenge ya bule.
ܡܟܝܠ ܡܢ ܕܛܠܡ ܠܐ ܗܘܐ ܠܒܪܢܫܐ ܛܠܡ ܐܠܐ ܠܐܠܗܐ ܗܘ ܕܝܗܒ ܒܟܘܢ ܪܘܚܗ ܩܕܝܫܬܐ 8
Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.
ܥܠ ܚܘܒܐ ܕܝܢ ܕܐܚܐ ܠܐ ܤܢܝܩܝܬܘܢ ܠܡܟܬܒ ܠܟܘܢ ܐܢܬܘܢ ܓܝܪ ܩܢܘܡܟܘܢ ܡܠܦܐ ܐܢܬܘܢ ܕܐܠܗܐ ܕܬܚܒܘܢ ܚܕ ܠܚܕ 9
Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino.
ܐܦ ܥܒܕܝܢ ܐܢܬܘܢ ܗܟܢܐ ܠܟܠܗܘܢ ܐܚܐ ܕܒܟܠܗ ܡܩܕܘܢܝܐ ܒܥܐ ܐܢܐ ܕܝܢ ܡܢܟܘܢ ܐܚܝ ܕܬܬܝܬܪܘܢ 10
Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,
ܘܬܬܚܦܛܘܢ ܕܬܗܘܘܢ ܫܠܝܢ ܘܥܢܝܢ ܒܤܘܥܪܢܝܟܘܢ ܘܗܘܝܬܘܢ ܦܠܚܝܢ ܒܐܝܕܝܟܘܢ ܐܝܟܢܐ ܕܦܩܕܢܟܘܢ 11
ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango,
ܕܬܗܘܘܢ ܡܗܠܟܝܢ ܒܐܤܟܡܐ ܠܘܬ ܒܪܝܐ ܘܥܠ ܐܢܫ ܠܐ ܬܤܬܢܩܘܢ 12
mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.
ܨܒܐ ܐܢܐ ܕܝܢ ܕܬܕܥܘܢ ܐܚܝ ܕܥܠ ܐܝܠܝܢ ܕܕܡܟܝܢ ܠܐ ܬܗܘܐ ܟܪܝܐ ܠܟܘܢ ܐܝܟ ܫܪܟܐ ܕܐܢܫܐ ܕܤܒܪܐ ܠܝܬ ܠܗܘܢ 13
Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.
ܐܢ ܓܝܪ ܡܗܝܡܢܝܢܢ ܕܝܫܘܥ ܡܝܬ ܘܩܡ ܗܟܢܐ ܐܦ ܐܠܗܐ ܠܐܝܠܝܢ ܕܕܡܟܘ ܒܝܫܘܥ ܡܝܬܐ ܥܡܗ 14
Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.
ܗܕܐ ܕܝܢ ܐܡܪܝܢܢ ܠܟܘܢ ܒܡܠܬܗ ܕܡܪܢ ܕܚܢܢ ܐܝܠܝܢ ܕܡܫܬܚܪܝܢܢ ܒܡܐܬܝܬܗ ܕܡܪܢ ܕܚܝܝܢܢ ܠܐ ܢܕܪܟ ܠܐܝܠܝܢ ܕܕܡܟܘ 15
Kolanda liloba na Nkolo, tala makambo oyo tozali koyebisa bino: biso ba-oyo tokotikala na bomoi kino na tango oyo Nkolo akoya, tokokende te liboso ya bato oyo bakufa;
ܡܛܠ ܕܗܘ ܡܪܢ ܒܦܘܩܕܢܐ ܘܒܩܠܐ ܕܪܝܫ ܡܠܐܟܐ ܘܒܩܪܢܐ ܕܐܠܗܐ ܢܚܬ ܡܢ ܫܡܝܐ ܘܡܝܬܐ ܕܒܡܫܝܚܐ ܢܩܘܡܘܢ ܠܘܩܕܡ 16
pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.
ܘܗܝܕܝܢ ܚܢܢ ܐܝܠܝܢ ܕܡܫܬܚܪܝܢܢ ܕܚܝܝܢܢ ܢܬܚܛܦ ܥܡܗܘܢ ܐܟܚܕܐ ܒܥܢܢܐ ܠܐܘܪܥܗ ܕܡܪܢ ܒܐܐܪ ܘܗܟܢܐ ܒܟܠܙܒܢ ܥܡ ܡܪܢ ܢܗܘܐ 17
Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.
ܗܘܘ ܗܟܝܠ ܡܒܝܐܝܢ ܚܕ ܠܚܕ ܒܡܠܐ ܗܠܝܢ 18
Yango wana, bolendisanaka na maloba oyo.

< ܐ-ܬܣܠ̈ܘܢܝܩܝܐ 4 >