< Luka 9 >
1 Ayicila nono katwa mye likure nin wabe, ana nani likara kitene nagbergenu nin shizhinu nin tikonu.
Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono;
2 Ato nani, idi bellin uliru kiti kipin tigo mye, nin shizinu nanan tikonu.
mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli.
3 A woro nani na iwa yiru imon bara ucine ba, sa uca, imon inyi, imonlii, ukurfung, sa alutuk abba.
Alobaki na bango: — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo; bozala na banzambala mibale te na moto.
4 Vat kilari ka na ipira soo kinin, udu liyiri lo na iba cinu kipine.
Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.
5 Inung alle na inari munu, asa iba nuzu nanya kipin, kotinon lidau we nabune mine, liba so ushaida nati mine.”
Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.
6 Itunna iwatuna, ipira nigbire itina nbellin nliru umang, nin shizinu nanit niti niti.
Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.
7 Hirdus ugo na alanza ile imon na idinsu, au Yohanna unan shintu nanit infita.
Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba: « Yoane asekwi, »
8 Kiti namong idin su Iliya nsah, among woro umon unan nburnari, in fita nanya na nan nlai.
bamosusu: « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu: « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. »
9 Hiridus woro, “Ina malu ukalu liti Yohanna, ani ghari ndi nlanzu kiti mee nene.” Hiridus do npiziru ayene Yesu ku.
Kasi Erode azalaki komilobela: « Ngai nde nakataki Yoane moto; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani? » Boye alukaki kokutana na Yesu.
10 Alenge na iwa tuu nani issah, ibellinghe vat nile imon na isu, anya nanghinu ligowe nanghe, udu kipin Batsaida.
Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.
11 Inung ligoze lanza nani Idofinghe, atah nani mahadi, abelle nani ubellen kipin tigo na idinin su inshinue.
Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.
12 Nin ndu kulelen, inung likure nin wabe, woroghee suuna ligoze idoo nigbir nkilinue, idi piziru kiti linanin nin nimonli, bara kikane na tidi ku kushori.
Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama.
13 Aworo nani, “Nan nani imonli ili.” Inug woro, “na tidi nin nimomon na ikatin nfungul utaun nin niboo ibba ba, sse tido tidi seru nani imonli bara ligozi vat.
Kasi Yesu alobaki na bango: — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki: — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
14 Iwadi annit amui alaun. A woro nono kadura mye, “Taan nani iso acuri akut ataun taun.
Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Bovandisa bango na masanga; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.
15 Isu nani anite so vat kutyin.
Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki.
16 A yauna ufungul utaune nin niboo ibe, ato iyiizi kitene atah nmari ku, a pucu agir anaa nono katuwa mye, inin koso nani.
Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato.
17 Inung vat leo ishito, kagisin nbubun nimole nazza, ipitirno ita nakuzun likure nin nabba.
Bato nyonso baliaki mpe batondaki; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
18 Idoo nkon kubi adin nti nliran usame, nono katuwa mye nanghe anin tirino nani, “Ligozi din su meng ghari?”
Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango: — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai? Mpo na bango, Ngai nazali nani?
19 Ikauwa ghe iworo, “Yohanna unan shintu nmyen (Baptisma) amon woro Iliya, amon woro nkon kunan nburnuari in fita.”
Bazongisaki: — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.
20 Anin woro nani, “Anung dinsu meng ghari?” Bitrus kauwa aworo kristi unuzu Kutelle.”
Yesu atunaki bango lisusu: — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani? Petelo azongisaki: — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.
21 A wunno nani atuf, Yesu woro nani na iwa bellin umon ba.
Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko.
22 Nworu gono nnit ba niu nin nimon gbardang, iba nari ghe, akune nin uso napirist a anan ninyerte, iba mollughe ayiri atat a ba fitu nin lai.
Mpe alobaki: — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
23 A woro nani vat, “Asa ule na adinin nsu adak kiti nigh, aba nari liti mye, aba diru, ule na anari litime bara meng aba se utucu.
Bongo Yesu alobaki na bango nyonso: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.
24 Ulenge na idinin su a tucu liti mye, aba diru, ule na anari litime bara meng aba se utucu.
Pamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango.
25 Iyaghari ncaute unit se imon inye vat, anin dira ulai mye?
Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye?
26 Vat nle na adi nlanzu ncin nigh nin ligbulang nigh, gono nnit ba lanzu ncin mye nwui une na aba dak nanya ngongon Ncif mye nin nono kadura Kutelle.
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.
27 Nworo munu kidegenere indi bellu munu, among yisin kikane, na ukul ba dudu nani ba, se idoo kipin tigo Kutelle.”
Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.
28 Na ayiri kulir nkata na Yesu nbelle nani tigbulang tone, ayira Bitrus, Yohanna, a Yakubu, ighana kitene kupara ati nlirag.
Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
29 Na adi nliraghe, umuro mye saka, imon mye tunna ipo pau nwaltu.
Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.
30 Itunna ise amon naba ida idin nliru nanghe, ashe Musa nin Iliya.
Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu: Moyize mpe Eliya
31 Ale na iwa yenje nani gongon, idin nliru kitene nnyiu mye, ule na iba kullu nanya Urushelima.
oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.
32 Kubi, Bitrus nan nale na iwa di nanghe nmoro wadi nani kang, na izinto, iyene ngongon mye nin nale iwa yisin nanghe.
Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.
33 Uso nani, na inya ligowe nan Yesu, Bitrus woroghe, “Cikilari ucaun na tidi kikane, tiba ke adanga atat, ti ke kurum kun Iliya.” Na ayinno ile imon na adin belle ba.
Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki: — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa! Totonga bandako misato ya kapo: moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba.
34 Kube na adin belle nleli imone, kuwut tolo ku tursu nani, fiu da nani, na kuwute nkilino nani.
Wana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango.
35 Liwui nuzu nanya kuwute liworo, “Gono nighari kane na ina fere lanzan ghe.”
Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki: — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona; boyoka Ye!
36 Na imala ulanzu liwuiye, Yesu yita usame, inung so tik, nanya nayiri ane na iwa bellin umong ba, ile imon na iyene.
Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.
37 Ukurtunu nkuiye, na isa unuzu kupara, ligozi nanit da zuro nanghe.
Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.
38 Umon nanya ligozi gilla a woro, “Unan yiru ndin fofi nacara yene usaun nighe, amere gono nighe cas.
Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki: — Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko!
39 Yene Uruhu sa uyaunghe, amalzino, aketize, anutuzuno kupunget nnuwe, na asa usunghe ba, se ushalaghe.
Molimo moko etungisaka ye: soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye.
40 Asa nfo nono katwa fa acara, nshin ninghe na isa iyinno ba.”
Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
41 Yesu kauwa a woro, “Anung anan salin nyinnu nin kuji kugbas, udu kishiyari nba yinu uso nanghinu danin nsaun fe kikane.”
Yesu alobaki: — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko? Mema mwana na yo awa.
42 Na gone din cinu uduwe agbergenu yaunghe ilina kutyin atunna nketizu. Yesu kpada Uruhu unanzang, ashino nin gone, anin nakpa ucife.
Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.
43 Vat mine yene nziziki ngbardang Kutelle, na vat mine nkiffo tunu nile imon asu, ani woro nono katuwa mye,
Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe. Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye:
44 “Na to tigbulanghe do piit nnit nacara nanit.”
— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino: Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.
45 Na inin wa yinin ule idiru ba, Bara na uwa nyeshin kiti mine na iyinno liti nlire ba. Vat nani nlanza fiu nworu itiringhe uliru une.
Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.
46 Manyardang fita nanya mine, nbelleng nworu ghari ba so udiya mine.
Tembe moko ebimaki kati na bayekoli; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango.
47 Yesu nin yiru nkpilizu nibinai mine, a yicila kagone kabene a yisa likot me,
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye,
48 Anin woro nani, ulenge na asere gono kane, asere menku. Ulenge na asere menku, asere ulenge na ana tuuyi, ulenge na aceo liti me nafo gono kibene amere ba so udya nanya mine.
mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.
49 Yohanna kauwa, “Cikilari tiyene umong nutuzunu nagbergenu nin lisafe, tinanin wantinghe, bara na adi ndortu nari ba.”
Yoane alobaki: — Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te.
50 Na iwa wantinghe ba, “Ubellun Yesu, vat nlenge na adi nivira nan ghinu ba unminere.”
Yesu alobaki: — Bopekisa ye te, pamba te moto nyonso oyo atelemelaka bino te azali mpo na bino.
51 Na ayiri nyiu me nda susut aceo umuro me udu Urushelima.
Lokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi.
52 Ato anan kadura nbun me, inya ipira kagbir Nsamariya, ikeleghe imone.
Atindaki bantoma liboso na Ye; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko.
53 Anite kikane wa tighe mahabi ba, bara amal ciu umuro me udu Urushelima.
Kasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi.
54 Na nono katuwa me, Yakubu nin Yohanna inyene nani, iworo, “Cikilari titi ulah tolu umolu nani?”
Tango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki: — Nkolo, olingi ete tobelela moto ete ekitela bango kowuta na likolo mpo na kobebisa bango?
55 A gitirino a kpada nani.
Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango: [— Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.]
56 Itunna inya udu nkan kagbir.
Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.
57 Na idin cine libau we, umon woroghe, “Meng ba dofin fi udu kika na uba duu.”
Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu: — Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
58 Yesu kauwa a woroghe, “Ninyan yau dinin tiyyi, Anyin yita nin nado, meng gono nnit dinin kiti nciu liti ba.
Yesu azongiselaki ye: — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
59 Anin woro nmong, “Dofini.” Ame woroghe, “Cikilari ucizine na ndo ndi kassu ucif nigh.”
Yesu alobaki na mobali mosusu: — Landa Ngai. Kasi mobali yango azongiselaki Ye: — Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai.
60 Ame atimine anan nkul, fe can udi belle piit nin npash uliru kipin tigo Kutelle.”
Yesu alobaki na ye: — Tika bakufi bakunda bakufi na bango; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.
61 Umong ugang woroghe, “Meng ba dofinfi Cikilari, na ntuu ndi bellin anan kilari nighe meng nya.”
Mosusu lisusu alobaki na Ye: — Nkolo, nakolanda Yo; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.
62 Yesu kauwa a woroghe, “Na umong duku alenge na ata ucara me nkeke nikawa, asa a gitirno, na abase upiri kipin tigo Kutelle ba.”
Yesu azongiselaki ye: — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.