< Banzembo 52 >

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki. Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabe? Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.
다윗의 마스길, 영장으로 한 노래, 에돔인 도엑이 사울에게 이르러 다윗이 아히멜렉의 집에 왔더라 말하던 때에 강포한 자여 네가 어찌하여 악한 계획을 스스로 자랑하는고 하나님의 인자하심은 항상 있도다
2 Yo oyo otambolaka na lokuta, lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi, ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.
네 혀가 심한 악을 꾀하여 날카로운 삭도 같이 간사를 행하는도다
3 Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.
네가 선보다 악을 사랑하며 의를 말함보다 거짓을 사랑하는도다(셀라)
4 Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.
간사한 혀여 네가 잡아 먹는 모든 말을 좋아하는도다
5 Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.
그런즉 하나님이 영영히 너를 멸하심이여 너를 취하여 네 장막에서 뽑아내며 생존하는 땅에서 네 뿌리를 빼시리로다(셀라)
6 Bato ya sembo bakomona mpe bakokoma na somo, bakotiola ye na maloba oyo:
의인이 보고 두려워하며 또 저를 비웃어 말하기를
7 « Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
이 사람은 하나님으로 자기 힘을 삼지 아니하고 오직 그 재물이 풍부함을 의지하며 제 악으로 스스로 든든케 하던 자라 하리로다
8 Kasi ngai, kati na Ndako na Yo, nazali lokola nzete ya olive oyo etondi na makasa ya mobesu; natiaka tango nyonso elikya na ngai kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.
오직 나는 하나님의 집에 있는 푸른 감람나무 같음이여 하나님의 인자하심을 영영히 의지하리로다
9 Nakosanzola Yo mikolo nyonso, mpo na oyo osali; mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo, pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.
주께서 이를 행하셨으므로 내가 영영히 주께 감사하고 주의 이름이 선함으로 주의 성도 앞에서 내가 주의 이름을 의지하리이다

< Banzembo 52 >