< Banzembo 100 >
1 Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe!
感謝の供え物のための歌 全地よ、主にむかって喜ばしき声をあげよ。
2 Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.
喜びをもって主に仕えよ。歌いつつ、そのみ前にきたれ。
3 Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
主こそ神であることを知れ。われらを造られたものは主であって、われらは主のものである。われらはその民、その牧の羊である。
4 Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
感謝しつつ、その門に入り、ほめたたえつつ、その大庭に入れ。主に感謝し、そのみ名をほめまつれ。
5 Pamba te Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.
主は恵みふかく、そのいつくしみはかぎりなく、そのまことはよろず代に及ぶからである。