< Mitango 35 >

1 Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko:
Und der Herr redete mit Moses in Moabs Steppen am Jordan bei Jericho:
2 « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.
"Befiehl den Söhnen Israels, daß sie von ihrem Besitze den Leviten Städte zum Siedeln geben! Auch die Weidetrift rings um die Städte sollt ihr den Leviten geben!
3 Bingumba ekozala mpo na kovanda, mpe mabele ya zingazinga mpo na bibwele na bango, bisalelo na bango mpe banyama na bango nyonso.
Die Städte seien ihnen zum Besiedeln, die Weidetriften aber seien für ihr Vieh, ihre Habe und all ihren Lebensbedarf!
4 Mabele ya zingazinga ya bingumba oyo bokopesa na Balevi ekozala etando ya bametele pene nkama mitano kobanda na mir ya engumba.
Der Städte Weidetriften, die ihr den Leviten geben sollt, seien ringsum tausend Ellen weit von der Stadtmauer!
5 Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga.
Meßt außerhalb der Stadt zweitausend Ellen auf der Ostseite ab, desgleichen südlich, westlich, nördlich, so daß die Stadt in die Mitte kommt! Das soll ihnen Weidetrift bei den Städten sein!
6 Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.
Und den Städten, die ihr den Leviten geben sollt, sechs Freistädten, die ihr abtretet, daß der Totschläger dahin fliehe, sollt ihr noch zweiundvierzig andere hinzufügen!
7 Na nyonso, bokopesa na Balevi bingumba tuku minei na mwambe, moko na moko elongo na mabele na yango ya zingazinga.
All der Städte, die ihr den Leviten gebt, sind es achtundvierzig samt den Weidetriften.
8 Mpo na bingumba oyo bokopesa na Balevi wuta na libula ya mabele ya bana ya Isalaele, bosengeli kozwa yango kolanda bozwi ya libota moko na moko: libota oyo ezali na bingumba ebele ekopesa mpe bingumba ebele; libota oyo ezali na bingumba moke ekopesa mpe bingumba moke. »
Die Zahl der Städte, die ihr vom Besitz der Söhne Israels abtretet, sollt ihr bei den Größeren größer bemessen und bei den kleineren kleiner! Jeder soll entsprechend dem Besitz einige seiner Städte den Leviten geben!"
9 Yawe alobaki na Moyize:
Und der Herr sprach zu Moses:
10 « Loba na bana ya Isalaele: ‹ Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na Kanana,
"Sag den Söhnen Israels und sprich zu ihnen: 'Wenn ihr, den Jordan überschreitend, in das Land Kanaan kommt,
11 bokopona bingumba ya kokimela mpo ete moto oyo akoboma moto na nko te akoka kokima kuna.
dann wählt Städte, die euch so gelegen sind, daß sie euch Freistädte seien! Dorthin fliehe jeder Totschläger und jeder, der einen Menschen unvorsätzlich erschlagen hat!
12 Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga.
Die Städte seien euch Zuflucht vor Bluträchern, daß nicht der Totschläger den Tod leide, bis er vor der Gemeinde zum Gericht gestanden!
13 Kati na bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ekozala ekimelo mpo na bino:
Der Städte, die ihr dazu hergebt, seien es sechs! Sie sollen euch Freistädte sein!
14 misato na ngambo ya Yordani, mpe misato kati na Kanana. Ekozala bingumba ya kokimela.
Drei der Städte sollt ihr über dem Jordan abtreten und drei Städte im Lande Kanaan! Freistädte seien es!
15 Bingumba nyonso motoba ekozala ekimelo mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na bapaya oyo bakozala kati na bino. Boye moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokima kuna.
Den Söhnen Israels sowie dem Gast und dem Beisassen bei euch sollen die sechs Städte eine Zuflucht sein, daß jeder dorthin fliehe, der unvorsätzlich einen Menschen erschlagen!
16 Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; basengeli koboma ye.
Hat er ihn aber mit einem eisernen Gerät geschlagen, daß er starb, dann ist er ein Mörder. Der Mörder leide den Tod!
17 Soki abeti moninga na ye libanga, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; basengeli koboma ye.
Und hat er ihn mit einem handlichen Steine getroffen, wodurch jemand sterben kann, und er starb, dann ist er ein Mörder. Der Mörder leide den Tod!
18 Soki abeti moninga na ye nzete, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; basengeli koboma ye.
Und hat er ihn mit einem handlichen Holzgerät getroffen, wodurch jemand sterben kann, und er starb, dann ist er ein Mörder. Der Mörder leide den Tod!
19 Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi: akoboma ye tango kaka akokutana na ye.
Der Bluträcher soll selber den Mörder töten! Wo er auf ihn trifft, soll er ihn töten!
20 Soki abambi moninga na ye eloko na nko mpe moninga yango akufi
Und hat dieser jemandem aus Haß einen Stoß gegeben, oder hat er nach ihm hinterlistig geworfen, daß er starb,
21 to soki abeti moninga na ye likofi mpo ete alingaka ye te, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; boye mobukanisi makila akoboma mobomi tango kaka akokutana na ye.
oder hat er ihn aus Feindschaft mit der Hand niedergeschlagen, daß er starb, dann leide der, der ihn geschlagen, den Tod! Er ist ein Mörder. Der Bluträcher soll den Mörder töten, wo er ihn trifft!
22 Kasi soki moto atindiki moninga na ye na nko te to na kokana te, soki abambi ye eloko na makanisi mabe te,
Hat er von ungefähr jemanden gestoßen, ohne Feindschaft, oder hat er irgendein Gerät auf ihn geworfen, ohne daß er zielte,
23 soki akweyiseli ye libanga na nko te mpe na kokana te, mpe moninga yango akufi,
oder hat er irgendeinen Stein, wodurch einer sterben kann, unversehens auf ihn fallen lassen, daß er starb, ist ihm aber kein Feind gewesen und hat ihm nichts Böses tun wollen,
24 lisanga ekokata makambo oyo kolanda mibeko kati ya mobomi mpe mobukanisi makila.
dann richte die Gemeinde zwischen dem Totschläger und dem Bluträcher nach diesen Satzungen!
25 Lisanga ekokangola mobomi na maboko ya mobukanisi makila mpe ekozongisa ye kati na engumba ya kokimela epai wapi akimaki. Mobomi akovanda kuna kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo bapakolaki mafuta ya bule.
Den Totschläger beschütze die Gemeinde vor der Hand des Bluträchers! Die Gemeinde bringe ihn in seine Zufluchtsstadt, in die er fliehen will! Er bleibe dort bis zum Tode des Hohenpriesters, den man mit heiligem Öl gesalbt hat!
26 Nzokande soki mobomi alongwe na engumba ya kokimela epai wapi akimaki,
Verläßt aber der Totschläger die Gemarkung seiner Zufluchtsstadt, in die er sich gerichtet,
27 mpe soki mobukanisi makila akutani na ye libanda ya engumba na ye ya kokimela mpe abomi ye, mobukanisi makila asali mabe te.
und trifft ihn der Bluträcher außerhalb der Gemarkung seiner Zufluchtsstadt und tötet der Bluträcher den Totschläger, dann ist kein Mord an ihm verübt worden.
28 Pamba te mobomi asengeli kovanda kati na engumba na ye ya kokimela kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Ezali kaka sima ya kufa na ye nde akoki kozonga na mabele na ye.
Er soll ja bis zum Tode des Hohenpriesters in der Zufluchtsstadt verbleiben! Doch nach des Hohenpriesters Tod darf der Totschläger zu seines Besitzes Boden zurückkehren.
29 Mitindo oyo ekozala mibeko mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino nyonso, na bisika nyonso oyo bokovanda.
Dies sei euch Rechtssatzung für eure Geschlechter in allen euren Siedlungen!
30 Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa.
Wenn jemand einen Menschen umbringt, so soll man den Mörder nach dem Mund von Zeugen hinrichten! Ein einziger Zeuge aber soll nicht aussagen gegen jemand, daß er sterbe!
31 Bokondima kozwa eloko moko te mpo na kosikola bomoi ya mobomi oyo asengeli na kufa; basengeli kaka koboma ye.
Ihr sollt kein Lösegeld für das Leben eines Mörders annehmen, der des Todes schuldig ist! Er muß den Tod leiden.
32 Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
Ihr sollt auch keine Gegengabe dafür nehmen, daß einer in seine Zufluchtsstadt flieht und dann heimkehrt, bevor der Priester gestorben ist!
33 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.
Ihr dürft das Land, in dem ihr wohnt, nicht entweihen. Denn Blut entweiht das Land. Sühne wird dem Land für das darin vergossene Blut nur durch das Blut dessen, der es vergossen hat.
34 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › »
Ihr sollt also nicht das Land unrein machen, in dem ihr siedelt, weil auch ich darin wohne! Denn ich, der Herr, wohne mitten unter Israels Söhnen.'"

< Mitango 35 >