< Mitango 30 >

1 Moyize alobaki na bakambi ya mabota ya Isalaele: « Tala mobeko oyo Yawe asili kopesa:
梅瑟訓示以色列子民各支派的首領說:「這是上主所吩咐的:
2 ‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye.
若人向上主許願,或發誓戒絕什麼,他不可食言,應全照口中所的去做。
3 Soki elenge moko ya mwasi alapi ndayi epai na Yawe, wana azali nanu na ndako ya tata na ye to azwi ekateli moko na nzela ya seleka,
那還在父家的年輕女子,若人向上主許願,或發願戒絕什麼,
4 bongo tata na ye ayoki ndayi to ekateli yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekotikala se bongo.
她父親聽到了她許的願和她發誓戒絕的事,卻對她未發一言,她許的願和她所發的戒誓,概為有效。
5 Kasi soki tata na ye atelemeli ye tango ayoki yango, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekokoma pamba. Yawe akotangela ye yango te lokola niongo, pamba te tata na ye aboyi yango.
但是,如果她父親在聽到的那天,禁止了她,她所許的願和所發的戒誓,概不生效;上主必寬恕她,因為她父親禁了止了她。
6 Soki elenge mwasi yango abali sima na kolapa ndayi to sima monoko na ye kobimisa ekateli;
如果她有權在身,或口中冒然發了戒絕某事的誓,而已出嫁,
7 bongo mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi oyo alapaki to ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.
她丈夫聽說了,在聽說的那天,對她未發一言,她的願和她所說的戒誓,仍為有效;
8 Kasi soki mobali na ye atelemeli ye tango ayoki yango, akweyisi nde ndayi oyo ekangaki ye to ekateli oyo azwaki ye moko mpe ebimaki na monoko na ye. Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.
但是,如果她丈夫在聽說的那天,禁止了她,他就取消了她許的願,和口中冒然所發的戒誓,上主也必寬恕她。
9 Soki mwasi oyo akufisa mobali to oyo babengana na libala alapi ndayi to azwi ekateli ezala ya ndenge nini, asengeli kokokisa yango.
寡婦或棄婦所許的願,或她所發的戒誓,概為有丈夫效。
10 Soki mwasi ya libala alapi ndayi to azwi ekateli na nzela ya seleka;
但是,如果她尚在丈夫家內許了願,或發誓要戒絕什麼,
11 bongo, mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te mpe apekisi ye te, ndayi oyo alapaki mpe ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.
若她丈夫聽說了,未發一言,沒有禁止她,她的願仍為有效,她所發的戒誓,亦為有效。
12 Kasi soki mobali na ye akweyisi yango tango ayoki yango, ndayi moko te to ekateli moko te oyo ebimaki na monoko na ye ekotikala bongo. Pamba te mobali na ye akweyisi yango, mpe Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.
但是,如果她的丈夫,在聽說的那天,聲明無效;凡她所說出的,不論是許的願,或發的戒誓,一概無效;她的丈夫既聲明無效,上主也就寬恕她。
13 Mobali na ye azali na bokonzi ya kondima to koboya ndayi nyonso oyo alapi to ekateli nyonso oyo asili kozwa na kokila bilei.
凡女人所許的願,或為苦身克己所發的誓,丈夫能使之生效,亦能聲明無效。
14 Kasi soki mobali na ye alobi na ye eloko moko te kino na mokolo oyo ekolanda, elakisi ete asili kondima ndayi nyonso to ekateli nyonso oyo mwasi na ye azwaki. Andimi yango, pamba te alobi eloko moko te tango ayokaki yango.
但是如果她的丈夫兩天內對她未發一言,就算他使她所許的願和她發的戒誓生效,因為在他聽說的那天,對她未發一言,就已算贊成。
15 Nzokande, soki akweyisi ndayi to ekateli yango, sima na koyoka yango, ye nde akomema mokumba ya mbeba ya mwasi na ye. › »
但若他聽說很久以後,才聲明無效,他應負妻子的罪債」。
16 Tala bikateli oyo Yawe apesaki epai na Moyize na tina na boyokani kati na mobali mpe mwasi na ye, kati na tata mpe bilenge basi oyo bazali na ndako na ye.
這是有關丈夫和妻子的關係,父親與尚在家內年輕女兒的關係,上主向梅瑟吩咐的法令。

< Mitango 30 >