< Yobo 12 >
2 « Solo, bozali penza bato; tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino!
V pravdě, že jste vy lidé, a že s vámi umře moudrost.
3 Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino, boleki ngai na eloko te. Nani ayebi te makambo wana nyonso?
I jáť mám srdce jako vy, aniž jsem zpozdilejší než vy, anobrž při komž toho není?
4 Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola!
Za posměch příteli svému jsem, kteréhož, když volá, vyslýchá Bůh; v posměchuť jest spravedlivý a upřímý.
5 Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.
Pochodně zavržená jest (podlé smýšlení člověka pokoje užívajícího) ten, kterýž jest blízký pádu.
6 Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.
Pokojné a bezpečné příbytky mají loupežníci ti, kteříž popouzejí Boha silného, jimž on uvodí dobré věci v ruku jejich.
7 Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo; tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo;
Ano zeptej se třebas hovad, a naučí tě, aneb ptactva nebeského, a oznámí tobě.
8 loba na mabele, ekoteya yo; to tika ete mbisi ya ebale monene epesa yo sango.
Aneb rozmluv s zemí, a poučí tě, ano i ryby mořské vypravovati budou tobě.
9 Kati na yango, ekelamu nini eyebi te ete loboko ya Yawe nde esalaki nyonso wana?
Kdo nezná ze všeho toho, že ruka Hospodinova to učinila?
10 Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.
V jehož ruce jest duše všelikého živočicha, a duch každého těla lidského.
11 Boni, litoyi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei?
Zdaliž ucho slov rozeznávati nebude, tak jako dásně pokrmu okoušejí?
12 Bwanya ezalaka kati na bampaka te? Bomoi ya molayi epesaka mayele te?
Při starcích jest moudrost, a při dlouhověkých rozumnost.
13 Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe, toli mpe mayele ezali ya Ye.
Nadto pak u Boha moudrost a síla, jehoť jest rada a rozumnost.
14 Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa, bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga.
Jestliže on boří, nemůže zase stavíno býti; zavírá-li člověka, nemůže býti otevříno.
15 Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka; kasi soki afungoli yango, mokili ezindaka.
Hle, tak zastavuje vody, až i vysychají, a tak je vypouští, že podvracejí zemi.
16 Makasi mpe elonga ezali ya Ye; moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi, bango mibale bazali ya Ye.
U něho jest síla a bytnost, jeho jest ten, kterýž bloudí, i kterýž v blud uvodí.
17 Amemaka bapesi toli na bowumbu mpe akomisaka basambisi bato ya maboma;
On uvodí rádce v nemoudrost, a z soudců blázny činí.
18 afungolaka minyololo ya bakonzi mpe akangaka liputa na baloketo na bango;
Svazek králů rozvazuje, a pasem přepasuje bedra jejich.
19 amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi;
On uvodí knížata v nemoudrost, a mocné vyvrací.
20 akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, alongolaka mikolo bososoli;
On odjímá řeč výmluvným, a soud starcům béře.
21 asopelaka bakonzi soni, abotolaka bibundeli ya bato ya makasi;
On vylévá potupu na urozené, a sílu mocných zemdlívá.
22 abimisaka na pwasa, makambo ya sekele, makambo oyo ezali kati na molili, mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo;
On zjevuje hluboké věci z temností, a vyvodí na světlo stín smrti.
23 atombolaka bikolo mpe abebisaka yango, akomisaka minene mindelo ya bikolo mpe apanzaka yango;
On rozmnožuje národy i hubí je, rozšiřuje národy i zavodí je.
24 alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo mpe asalaka ete batambola kati na bisobe oyo ezanga nzela
On odjímá srdce předním z lidu země, a v blud je uvodí na poušti bezcestné,
25 mpo ete batepatepa kati na molili, na kozanga pole; mpe asalaka ete batepatepa lokola moto alangwe masanga.
Aby šámali ve tmě bez světla. Summou, činí, aby bloudili jako opilý.