< Jeremi 7 >
1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi:
The word which came to Jeremiah from the Lord, saying,
2 « Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo: ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.
Take your place in the doorway of the Lord's house, and give out this word there, and say, Give ear to the word of the Lord, all you of Judah who come inside these doors to give worship to the Lord.
3 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo.
The Lord of armies, the God of Israel, says, Let your ways and your doings be changed for the better and I will let you go on living in this place.
4 Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama: ‘Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe! Yawe azali awa.’
Put no faith in false words, saying, The Temple of the Lord, the Temple of the Lord, the Temple of the Lord, are these.
5 Soki solo bobongoli bizaleli mpe misala na bino mpe bokomi kokata bino na bino makambo na bosembo;
For if your ways and your doings are truly changed for the better; if you truly give right decisions between a man and his neighbour;
6 soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,
If you are not cruel to the man from a strange country, and to the child without a father, and to the widow, and do not put the upright to death in this place, or go after other gods, causing damage to yourselves:
7 nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela.
Then I will let you go on living in this place, in the land which I gave to your fathers in the past and for ever.
8 Kasi botala ndenge bozali kotia motema na maloba ya lokuta oyo ezali ata na litomba moko te.
See, you put your faith in false words which are of no profit.
9 Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te;
Will you take the goods of others, put men to death, and be untrue to your wives, and take false oaths, and have perfumes burned to the Baal, and go after other gods which are strange to you;
10 bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba: ‘Tobiki na biso!’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele?
And come and take your place before me in this house, which is named by my name, and say, We have been made safe; so that you may do all these disgusting things?
11 Boni, bokomisi Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai ekimelo ya miyibi? Ngai nazali komona ete bozali kozwa yango bongo, elobi Yawe.
Has this house, which is named by my name, become a hole of thieves to you? Truly I, even I, have seen it, says the Lord.
12 Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele.
But go now to my place which was in Shiloh, where I put my name at first, and see what I did to it because of the evil-doing of my people Israel.
13 Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te,
And now, because you have done all these works, says the Lord, and I sent my word to you, getting up early and sending, but you did not give ear; and my voice came to you, but you gave no answer:
14 makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino.
For this reason I will do to the house which is named by my name, and in which you have put your faith, and to the place which I gave to you and to your fathers, as I have done to Shiloh.
15 Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. ›
And I will send you away from before my face, as I have sent away all your brothers, even all the seed of Ephraim.
16 Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko: kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te.
And as for you (Jeremiah), make no prayers for this people, send up no cry or prayer for them, make no request for them to me: for I will not give ear.
17 Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi?
Do you not see what they are doing in the towns of Judah and in the streets of Jerusalem?
18 Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda.
The children go for wood, the fathers get the fire burning, the women are working the paste to make cakes for the queen of heaven, and drink offerings are drained out to other gods, moving me to wrath.
19 Boni, bakanisi ete bazali kosala Ngai mabe, etuni Yawe? Te! Bazali nde komisala bango moko mabe, mpo na soni na bango moko.
Are they moving me to wrath? says the Lord; are they not moving themselves to their shame?
20 ‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele: kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.
So this is what the Lord God has said: See, my wrath and my passion will be let loose on this place, on man and beast, and on the trees of the field, and on the produce of the earth; it will be burning and will not be put out.
21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko!
These are the words of the Lord of armies, the God of Israel: Put your burned offerings with your offerings of beasts, and take flesh for your food.
22 Pamba te, tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito, nalobaki na bango likambo moko te na oyo etali mbeka ya kotumba mpe makabo mosusu.
For I said nothing to your fathers, and gave them no orders, on the day when I took them out of Egypt, about burned offerings or offerings of beasts:
23 Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo: Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.
But this was the order I gave them, saying, Give ear to my voice, and I will be your God, and you will be my people: go in all the way ordered by me, so that all may be well for you.
24 Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka.
But they took no note and did not give ear, but were guided by the thoughts and the pride of their evil hearts, going back and not forward.
25 Wuta tango batata na bino babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo, natindelaka bino basali na Ngai, basakoli, tango nyonso mpe mikolo nyonso.
From the day when your fathers came out of Egypt till this day, I have sent my servants the prophets to you, getting up early every day and sending them:
26 Kasi bayokaki Ngai te mpe bapesaki Ngai matoyi na bango te; bazalaki kaka mito makasi mpe basalaki lisusu mabe koleka bakoko na bango. ›
But still they took no note and would not give ear, but they made their necks stiff, doing worse than their fathers.
27 Ata oyebisi bango makambo oyo nyonso, bakotikala koyoka yo te; ata mpe obengi bango, bakoyanola te.
And you are to say all these words to them, but they will not give ear to you: you will send out your voice to them, but they will give no answer.
28 Yango wana, loba na bango: ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.
And you are to say to them, This is the nation which has not given ear to the voice of their God, or taken his teaching to heart: good faith is dead and is cut off from their mouths.
29 Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.
Let your hair be cut off, O Jerusalem, and let it go, and let a song of grief go up on the open hilltops; for the Lord is turned away from the generation of his wrath and has given them up.
30 Bato ya Yuda basali mabe na miso na Ngai, elobi Yawe, batie banzambe na bango ya bikeko ya mbindo kati na Ndako na Ngai mpe bakomisi Ndako na Ngai mbindo.
For the children of Judah have done what is evil in my eyes, says the Lord: they have put their disgusting images in the house which is named by my name, making it unclean.
31 Batongi bisambelo ya likolo ya bangomba, ya Tofeti, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo ete batumba bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na kobonza bango lokola mbeka: nzokande wana ezali likambo oyo Ngai natindaki bango te mpe natikalaki ata kokanisa yango te.
And they have put up the high place of Topheth in the valley of the son of Hinnom, burning their sons and their daughters there in the fire; a thing which was not ordered by me and never came into my mind.
32 Yango wana, bosala keba, elobi Yawe: na mikolo ekoya, bato bakobenga lisusu te esika oyo Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, kasi bakobenga yango lubwaku oyo babomelaka bato, pamba te bakokunda bato na Tofeti kino tango esika ekotikala lisusu te.
For this cause, the days are coming, says the Lord, when it will no longer be named Topheth, or, The valley of the son of Hinnom, but, The valley of Death: for they will put the dead into the earth in Topheth till there is no more room.
33 Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba; mpe moto moko te akobengana yango.
And the bodies of this people will be food for the birds of heaven and for the beasts of the earth; and there will be no one to send them away.
34 Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.
And in the towns of Judah and in the streets of Jerusalem, I will put an end to the laughing voices, the voice of joy and the voice of the newly-married man and the voice of the bride: for the land will become a waste.