< Misala ya Bantoma 21 >
1 Sima na biso kokabwana na bango, tokotaki na masuwa mpe tokendeki kino na esanga ya Kosi; bongo mokolo oyo elandaki, tokendeki na Roda mpe, longwa wana, tokomaki na Patara.
우리가 저희를 작별하고 행선하여 바로 고스로 가서 이튿날 로도에 이르러 거기서부터 바다라로 가서
2 Kuna, tomonaki masuwa moko oyo ezalaki kokende na Fenisi; tomataki kati na yango mpe tokendeki.
베니게로 건너가는 배를 만나서 타고 가다가
3 Tango tomonaki esanga ya Shipre, totikaki yango na ngambo ya loboko ya mwasi mpe tokobaki mobembo na biso na mopanzi ya Siri. Totelemaki na Tiri epai wapi masuwa esengelaki kokitisa biloko oyo ememaki.
구브로를 바라보고 이를 왼편에 두고 수리아로 행선하여 두로에서 상륙하니 거기서 배가 짐을 풀려 함이러라
4 Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki elongo na bango mikolo sambo. Nzokande Molimo asololaki na Bayekoli, mpe balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te.
제자들을 찾아 거기서 이레를 머물더니 그 제자들이 성령의 감동으로 바울더러 예루살렘에 들어가지 말라 하더라
5 Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.
이 여러 날을 지난 후 우리가 떠나갈새 저희가 다 그 처자와 함께 성문 밖까지 전송하거늘 우리가 바닷가에서 무릎을 꿇어 기도하고
6 Sima na kopesana mbote ya suka, tomataki na masuwa, mpe bango bazongaki na bandako na bango.
서로 작별한 후 우리는 배에 오르고 저희는 집으로 돌아가니라
7 Tosukisaki mobembo na biso ya mayi, kolongwa na Tiri kino na Pitolemayisi epai wapi topesaki bandeko mbote mpe tovandaki elongo na bango mokolo moko.
두로로부터 수로를 다 행하여 돌레마이에 이르러 형제들에게 안부를 묻고 그들과 함께 하루를 있다가
8 Mokolo oyo elandaki, tokendeki na Sezarea mpe tovandaki na ndako ya Filipo, mopanzi Sango Malamu. Azalaki moko kati na bato sambo oyo Lingomba eponaki.
이튿날 떠나 가이사랴에 이르러 일곱 집사 중 하나인 전도자 빌립의 집에 들어가서 유하니라
9 Azalaki na bana basi minei oyo bayebaki nanu nzoto ya mibali te, mpe bazalaki na likabo ya kosakola.
그에게 딸 넷이 있으니 처녀로 예언하는 자라
10 Lokola tovandaki wana mikolo ebele, mosakoli moko, kombo na ye ezalaki Agabisi, awutaki na Yuda
여러 날 있더니 한 선지자 아가보라 하는 이가 유대로부터 내려와
11 mpe ayaki kokutana na biso; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki: — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi: « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »
우리에게 와서 바울의 띠를 가져다가 자기 수족을 잡아매고 말하기를 성령이 말씀하시되 예루살렘에서 유대인들이 이같이 이 띠 임자를 결박하여 이방인의 손에 넘겨 주리라 하거늘
12 Tango toyokaki maloba wana, biso mpe bandimi ya Sezarea tobondelaki Polo ete akende na Yelusalemi te.
우리가 그 말을 듣고 그 곳 사람들로 더불어 바울에게 예루살렘으로 올라가지 말라 권하니
13 Kasi Polo azongiselaki biso: — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.
바울이 대답하되 `너희가 어찌하여 울어 내 마음을 상하게 하느냐? 나는 주 예수의 이름을 위하여 결박 받을 뿐 아니라 예루살렘에서 죽을 것도 각오하였노라' 하니
14 Lokola tolongaki te kobongola makanisi na ye, totikaki kobondela ye mpe tolobaki: — Tika ete mokano ya Nkolo esalema!
저가 권함을 받지 아니하므로 우리가 주의 뜻대로 이루어지이다 하고 그쳤노라
15 Sima na biso kolekisa mikolo wana na Sezarea, tobongisaki biloko na biso mpe tokendeki na Yelusalemi.
이 여러 날 후에 행장을 준비하여 예루살렘으로 올라갈새
16 Bayekoli mosusu ya Sezarea bakendeki kotika biso; bamemaki biso na ndako ya Minaso, epai wapi tovandaki. Azalaki moto ya Shipre, mpe akomaki moyekoli wuta kala.
가이사랴의 몇 제자가 함께 가며 한 오랜 제자 구브로 사람 나손을 데리고 가니 이는 우리가 그의 집에 유하려 함이라
17 Tango tokomaki na Yelusalemi, bandeko bayambaki biso na esengo.
예루살렘에 이르니 형제들이 우리를 기꺼이 영접하거늘
18 Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki biso epai ya Jake, mpe bakambi nyonso ya Lingomba bayaki kuna.
그 이튿날 바울이 우리와 함께 야고보에게로 들어가니 장로들도다 있더라
19 Sima na ye kopesa bango mbote, Polo akomaki koyebisa bango likambo moko na moko, oyo Nzambe asalaki kati na bato ya bikolo ya bapaya, na nzela ya lotomo na ye.
바울이 문안하고 하나님이 자기의 봉사로 말미암아 이방 가운데서 하신 일을 낱낱이 고하니
20 Sima na bango koyoka ye, bakumisaki Nzambe. Bongo balobaki na Polo: — Ndeko, ozali komona motango ya bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, mpe bango nyonso bazali na bolingo makasi mpo na Mobeko ya Moyize.
저희가 듣고 하나님께 영광을 돌리고 바울더러 이르되 `형제여 그대도 보는 바에 유대인 중에 믿는 자 수만 명이 있으니 다 율법에 열심 있는 자라
21 Nzokande, bayokaki sango ete oteyaka na Bayuda nyonso oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe ete olobaka na bango ete bakata lisusu te ngenga ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda.
네가 이방에 있는 모든 유대인을 가르치되 모세가 배반하고 아들들에게 할례를 하지 말고 또 규모를 지키지 말라 한다 함을 저희가 들었도다
22 Boye tosala nini? Pamba te bakoyoka kaka ete okomi awa.
그러면 어찌할꼬 저희가 필연 그대의 온 것을 들으리니
23 Sala makambo oyo tokoyebisa yo: Tozali awa na mibali minei oyo balapa ndayi.
우리의 말하는 이대로 하라 서원한 네 사람이 우리에게 있으니
24 Zwa bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka na tina na yo ezali ya lokuta, mpe bakososola ete yo moko mpe otosaka Mobeko.
저희를 데리고 함께 결례를 행하고 저희를 위하여 비용을 내어 머리를 깎게 하라 그러면 모든 사람이 그대에게 대하여 들은 것 이 헛된 것이고 그대로 율법을 지켜 행하는 줄로 알 것이라
25 Mpo na bato ya bikolo ya bapaya oyo bakomi bandimi, tokomeli bango mikano na biso ete basengeli te kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basengeli te komela makila, basengeli te kolia nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, basengeli te kosala kindumba ya lolenge nyonso.
주를 믿는 이방인에게는 우리가 우상의 제물과 피와 목매어 죽인 것과 음행을 피할 것을 결의하고 편지하였느니라' 하니
26 Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Bongo akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo tango ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakobonza mbeka mpo na moko na moko kati na bango.
바울이 이 사람들을 데리고 이튿날 저희와 함께 결례를 행하고 성전에 들어가서 각 사람을 위하여 제사 드릴 때까지의 결례의 만기 된 것을 고하니라
27 Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azia bamonaki Polo kati na lopango ya Tempelo. Batombokisaki ebele nyonso ya bato mpe bakangaki ye
그 이레가 거의 차매 아시아로부터 온 유대인들이 성전에서 바울을 보고 모든 무리를 충동하여 그를 붙들고
28 na koganga: — Bato ya Isalaele, bosunga biso! Botala moto oyo azali koteya bato nyonso mpe na bisika nyonso, ete batelemela bato na biso, Mobeko na biso mpe Tempelo oyo. Lisusu, akotisi bato ya Grese kati na Tempelo mpe akomisi esika oyo ya bule mbindo.
외치되 `이스라엘 사람들아 도우라 이 사람은 각처에서 우리 백성과 율법과 이 곳을 훼방하여 모든 사람을 가르치는 그 자인데 또 헬라인을 데리고 성전에 들어가서 이 거룩한 곳을 더럽게 하였다'하니
29 Balobaki bongo mpo ete, liboso, bamonaki Polo elongo na Trofime, moto ya Efeso, kati na engumba mpe bakanisaki ete Polo akotisaki ye kati na Tempelo.
이는 저희가 전에 에베소 사람 드로비모가 바울과 함께 성내에 있음을 보고 바울이 저를 성전에 데리고 들어간 줄로 생각함일러라
30 Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe ebele ya bato oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombangu. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo mpe, mbala moko, bakangaki bikuke na yango.
온 성이 소동하여 백성이 달려와 모여 바울을 잡아 성전 밖으로 끌고 나가니 문들이 곧 닫히더라
31 Wana bazalaki koluka koboma Polo, sango ekomaki kino na matoyi ya mokonzi ya basoda ya Rome ete mobulu ekoti kati na Yelusalemi mobimba.
저희가 그를 죽이려 할 때에 온 예루살렘의 요란하다는 소문이 군대의 천부장에게 들리매
32 Mbala moko, azwaki basoda elongo na bakonzi na bango, mpe bakendeki na lombangu epai ebele ya bato bazalaki. Tango kaka bamonaki mokonzi ya basoda elongo na basoda na ye, batikaki kobeta Polo.
저가 급히 군사들과 백부장들을 거느리고 달려 내려가니 저희가 천부장과 군사들을 보고 바울 치기를 그치는지라
33 Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Bongo atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini.
이에 천부장이 가까이 가서 바울을 잡아 `두 쇠사슬로 결박하라' 명하고 `누구며 무슨 일을 하였느냐?' 물으니
34 Kati na ebele ya bato oyo batondaki wana, bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola te bosolo ya likambo, mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo kati na lopango ya basoda.
무리 가운데서 어떤 이는 이 말로 어떤 이는 저 말로 부르짖거늘 천부장이 소동을 인하여 그 실상을 알수 없어 그를 영문 안으로 데려가라 명하니라
35 Tango Polo atiaki matambe na ye na binyatelo ya ematelo, basoda bakumbaki ye, mpo ete bato bazalaki kotia mobulu makasi.
바울이 층대에 이를 때에 무리의 포행을 인하여 군사들에게 들려가니
36 Bato nyonso bazalaki kolanda ye na koganga: — Akufa!
이는 백성의 무리가 그를 없이 하자고 외치며 따라 감이러라
37 Wana balingaki kokotisa ye kati na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda: — Nakoki koyebisa yo likambo moko? Mokonzi ya basoda atunaki Polo: — Oyebi koloba lokota ya Greki?
바울을 데리고 영문으로 들어가려 할 그때에 바울이 천부장더러 이르되 `내가 당신에게 말할수 있느뇨?' 가로되 `네가 헬라말을 아느냐?
38 Boni, ezali yo te moto ya Ejipito oyo akotisaki mobulu na mikolo oyo eleki mpe amemaki batomboki nkoto minei kati na esobe?
그러면 네가 이전에 난을 일으켜 사천의 자객을 거느리고 광야로 가던 애굽인이 아니냐?'
39 Polo azongisaki: — Te, ezali ngai te! Ngai nazali Moyuda ya Tarse, kati na mokili ya Silisi, mpe moto ya engumba moko ya tina mingi. Nabondeli yo, pesa ngai nzela ya koloba na bato.
바울이 가로되 `나는 유대인이라 소읍이 아닌 길리기아 다소 성의 시민이니 청컨대 백성에게 말하기를 허락하라' 하니
40 Sima na mokonzi ya basoda kopesa ye nzela, Polo atelemaki na binyatelo mpe atombolaki loboko. Bato batikaki makelele, mpe Polo akomaki koloba na bango na lokota ya Arami:
천부장이 허락하거늘 바울이 층대 위에 서서 백성에게 손짓하여 크게 종용히 한 후에 히브리 방언으로 말하여 가로되