< Misala ya Bantoma 18 >
1 Sima na yango, Polo atikaki Ateni mpe akendeki na Kolinto.
Potem Paweł opuścił Ateny i przybył do Koryntu.
2 Kuna, akutanaki na Moyuda moko, kombo na ye ezalaki « Akilasi. » Azalaki moto ya mboka Ponti. Akilasi awutaki koya kala te longwa na Itali, elongo na mwasi na ye, Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso balongwa na Rome. Boye, Polo akendeki kotala bango;
Spotkał tam pewnego Żyda, imieniem Akwila, rodem z Pontu, który niedawno przybył z Italii razem ze swoją żoną Pryscyllą (ponieważ Klaudiusz zarządził, żeby wszyscy Żydzi opuścili Rzym), i poszedł do nich;
3 mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango.
A ponieważ znał to samo rzemiosło, zamieszkał u nich i pracował. Zajmowali się bowiem wyrobem namiotów.
4 Mikolo nyonso ya Saba, Polo azalaki koteya kati na ndako ya mayangani mpe azalaki koluka kondimisa Bayuda mpe bato ya Grese.
W każdy szabat rozprawiał w synagodze i przekonywał i Żydów, i Greków.
5 Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.
A gdy przyszli z Macedonii Sylas i Tymoteusz, Paweł był napierany w duchu i świadczył Żydom, że Jezus jest Chrystusem.
6 Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki: — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Lecz gdy się sprzeciwiali i bluźnili, otrząsnął szaty i powiedział do nich: Krew wasza na waszą głowę, ja jestem czysty. Od tej chwili pójdę do pogan.
7 Boye, Polo atikaki bango mpe akendeki na ndako ya Titisi Yusitusi, mogumbameli ya Nzambe, oyo ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya mayangani.
Odszedł stamtąd i wszedł do domu pewnego [człowieka], imieniem Justus, który czcił Boga, a którego dom przylegał do synagogi.
8 Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani, elongo na libota na ye mobimba bazalaki na kondima epai ya Nkolo; mpe bato mingi ya Kolinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi.
A przełożony synagogi, Kryspus, uwierzył w Pana wraz z całym swoim domem. Także wielu Koryntian, którzy słuchali, uwierzyło i zostało ochrzczonych.
9 Mokolo moko, na butu, Nkolo alobaki na Polo kati na emoniseli: Kobanga te, koba kaka koloba, kokanga monoko te.
Wtedy w nocy Pan powiedział do Pawła w widzeniu: Nie bój się, lecz mów i nie milcz;
10 Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.
Bo ja jestem z tobą i nikt się na ciebie nie targnie, aby cię skrzywdzić. Mam bowiem liczny lud w tym mieście.
11 Boye, Polo avandaki na Kolinto, mobu moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba na Nzambe.
I mieszkał tam przez rok i sześć miesięcy, nauczając u nich słowa Bożego.
12 Wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo
A gdy Gallio był prokonsulem w Achai, Żydzi jednomyślnie powstali przeciw Pawłowi i przyprowadzili go przed sąd;
13 mpe bafundaki ye boye: — Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete bagumbamela Nzambe na lolenge oyo mibeko epekisa.
Mówiąc: On namawia ludzi, aby niezgodnie z prawem czcili Boga.
14 Tango kaka Polo alingaki koloba, Galioni alobaki na Bayuda: — Bino Bayuda, soki moto oyo asalaki mabe to likambo moko ya sembo te, nalingaki solo koyokela bino.
Kiedy Paweł miał już otworzyć usta, Gallio powiedział do Żydów: O Żydzi, gdyby się działo bezprawie albo jakaś niegodziwość, znosiłbym was, jak należy;
15 Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe na tina na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, wana etali kaka bino moko; ngai naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye.
Lecz jeśli spór dotyczy słów, imion i waszego prawa, sami [to] rozpatrzcie. Ja bowiem nie chcę być sędzią w tych [sprawach].
16 Boye, abenganaki bango na esambiselo.
I wypędził ich z sądu.
17 Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe babetaki ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba.
Wtedy wszyscy Grecy schwytali Sostenesa, przełożonego synagogi, i bili go przed sądem, lecz Gallio na to nie zważał.
18 Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.
A Paweł mieszkał tam jeszcze przez wiele dni, potem pożegnał się z braćmi i popłynął do Syrii, a z nim Pryscylla i Akwila. W Kenchrach ostrzygł głowę, bo złożył ślub.
19 Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendeki ye moko na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda.
Potem przybył do Efezu i tam ich zostawił. Sam zaś wszedł do synagogi i rozprawiał z Żydami.
20 Basengaki ete awumela mwa mikolo elongo na bango, kasi Polo aboyaki.
A gdy go prosili, żeby u nich pozostał dłużej, nie zgodził się;
21 Atikaki bango na koloba: — Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi. Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki.
Ale żegnając się z nimi, powiedział: Nadchodzące święto muszę koniecznie obchodzić w Jerozolimie, lecz jeśli taka będzie wola Boga, wrócę do was. I odpłynął z Efezu.
22 Tango akomaki na Sezarea, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote; sima, akendeki na Antioshe.
Po przybyciu do Cezarei udał się [do Jerozolimy], gdzie pozdrowił kościół, a potem odszedł do Antiochii.
23 Sima na Polo kovanda mwa mikolo na Antioshe, alongwaki kuna mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, na kolendisa bayekoli nyonso.
Mieszkał [tam] przez pewien czas i wyruszył, przemierzając krainę galacką i Frygię i umacniając wszystkich uczniów.
24 Moyuda moko ayaki na Efeso, kombo na ye ezalaki « Apolosi. » Abotamaki na Alekizandri, ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi.
A do Efezu przybył pewien Żyd, imieniem Apollos, rodem z Aleksandrii, człowiek wymowny i biegły w Piśmie.
25 Bateyaki ye nzela ya Nkolo; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane.
Był on obeznany z drogą Pana, a pałając duchem, mówił i nauczał starannie o Panu, wiedząc tylko o chrzcie Jana.
26 Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akilasi bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe.
Zaczął on odważnie mówić w synagodze. Gdy go usłyszeli Akwila i Pryscylla, przyjęli go do siebie i dokładniej wytłumaczyli drogę Boga.
27 Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Kolinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi,
Kiedy chciał udać się do Achai, bracia go zachęcili i napisali do uczniów, aby go przyjęli. Gdy [tam] przybył, bardzo pomagał tym, którzy uwierzyli dzięki łasce [Bożej].
28 pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.
Dzielnie bowiem przekonywał Żydów, publicznie dowodząc z Pisma, że Jezus jest Chrystusem.