< 2 Samuele 13 >

1 Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka.
David's son Absalom had a beautiful sister named Tamar, and another of David's sons, Amnon, fell in love with her.
2 Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola.
Amnon became so infatuated with his sister Tamar that he felt sick. She was a virgin, and Amnon saw it was impossible for him to have her.
3 Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi.
However, Amnon had a friend named Jonadab, and he was the son of David's brother Shimeah. Jonadab was a very cunning man.
4 Atunaki Aminoni: — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo? Aminoni alobaki na ye: — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.
He asked Amnon, “Why are you, the king's son, so down every morning? Why don't you tell me what's wrong?” “I'm in love with Tamar, my brother Absalom's sister,” Amnon replied.
5 Yonadabi alobaki na ye: — Oh, sala boye: « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye: ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › »
“Lie down on your bed and pretend you're sick,” Jonadab told him. “When your father comes to see you, tell him, ‘Please have my sister Tamar come and give me some food to eat. She can make it as I watch and she can hand it to me.’”
6 Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye: « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. »
So Amnon lay down and pretended to be sick. When the king came to see him, Amnon asked him, “Please have my sister Tamar come and make a couple of pancakes as I watch, and she can hand them to me to eat.”
7 Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye: « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. »
Then David sent a message to Tamar at the palace: “Please be so kind as to go to the house of your brother Amnon and make him some food.”
8 Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango.
So Tamar went to the house of her brother Amnon to where he was lying down. She took some dough, kneaded it, and cooked the pancakes as he watched.
9 Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki: — Bimisa bato nyonso libanda. Bato nyonso babimaki.
Then she took the pan and emptied it out before him, but he refused to eat. “Everybody leave me!” Amnon shouted. Everyone left.
10 Aminoni alobaki na Tamari: — Memela ngai biloko ya kolia awa kati na shambre na ngai ya kolala mpo ete nalia yango wuta na loboko na yo. Tamari azwaki bagalete oyo asalaki mpe amemaki yango epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, kati na shambre na ye ya kolala.
Then Amnon said to Tamar, “Bring the food here into my bedroom so you can hand it to me to eat.” So Tamar took the pancakes she had made to her brother Amnon in his bedroom.
11 Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye: — Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi.
But as she handed him the food, he grabbed hold of her, and said, “Come to bed with me, my sister!”
12 Tamari alobaki na ye: — Te, ndeko na ngai ya mobali! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele! Kosala bozoba ya boye te.
“No, you're my brother!” she exclaimed. “Don't rape me! That's not what we do in Israel! Don't do something so shameful!
13 Ekosukela ngai ndenge nini? Nakokende wapi na soni na ngai? Mpe yo okozala ndenge nini? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai.
Stop and think about me! How could I bear such a disgrace? Think about yourself too! You'd be treated with contempt as a complete fool in Israel! Please talk with the king, for he won't stop you marrying me.”
14 Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto.
But Amnon wouldn't to listen to her, and because he was stronger than she was, he raped her.
15 Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari: — Telema mpe bima!
Then Amnon hated Tamar with immense hatred. His hatred was so strong that it was greater than the love he'd had before. “Get up! Get lost!” he told her.
16 Tamari azongiselaki ye: — Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai! Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye.
“No! Don't do this!” she answered. “Sending me away in disgrace would be an even greater evil than what you've already done to me.” But he wouldn't listen to her.
17 Abengaki mosali na ye mpe alobaki: « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. »
He called for his servant and said, “Get rid of this woman and lock the door behind her!”
18 Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata.
So his servant threw her out and locked the door behind her. Tamar was wearing the long robe of a princess, which is what the king's virgin daughters wore.
19 Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.
Tamar put ashes on her head and tore her long robe. She put her hands on her head, she went away crying loudly.
20 Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye: « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te! » Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola.
Her brother Absalom found her and asked, “Has brother Amnon been with you? Keep quiet for the moment, my sister. He's your brother. Don't be so upset about it.” So Tamar lived as a ruined and abandoned woman in her brother Absalom's home.
21 Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi.
When King David heard about it, he was very angry.
22 Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.
Absalom didn't talk to Amnon at all because he hated Amnon for raping his sister Tamar.
23 Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi.
Some two years later, when his sheepshearers were at Baal-hazor near Ephraim, Absalom invited all the king's sons to join the celebrations.
24 Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Mosali na yo abengisi basali oyo bakataka bapwale ya bameme. Tika ete mokonzi mpe bakalaka na ye basepela koya kosangana na ngai, mosali na yo.
He went to the king and said, “I, your servant, have hired shearers. Would the king and his servants please join me?”
25 Mokonzi azongisaki: — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye.
“No, my son,” the king replied, “we can't all go. We would be a burden to you.” Even though Absalom went on asking, he was not willing to go, but he did give Absalom his blessing.
26 Abisalomi alobaki lisusu: — Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso. Mokonzi atunaki ye: — Mpo na nini akende elongo na yo?
“Well then, at least let my brother Amnon join us,” Absalom responded. “Why do you want him to go?” the king asked.
27 Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni.
But Absalom kept on asking, so the king sent Amnon and his other sons.
28 Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye: — Boyoka! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino: « Bobeta Aminoni; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.
Absalom gave orders to his men, saying, “Pay attention! When Amnon is feeling happy from drinking wine and I tell you, ‘Attack Amnon!’ then kill him. Don't be afraid. I myself am giving you this order. Be strong and be brave.”
29 Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.
So Absalom's men did what Absalom had ordered and killed Amnon. Then all the rest of the king's sons jumped up, got on their mules, and ran away.
30 Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi: « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. »
While they were on their way back, David received a message, “Absalom has killed all the king's sons—there's not a single one left!”
31 Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka.
The king stood up, tore his clothes, and lay down on the ground. All his officials stood beside him with their clothes torn.
32 Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki: « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye.
But Jonadab, son of David's brother Shimeah, told them: “Your Majesty must not think they have killed all the king's sons—only Amnon is dead. Absalom has been planning ever since the day Amnon raped his sister Tamar.
33 Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi! Ezali Aminoni kaka moto akufi. »
So, Your Majesty, please don't believe the report that all the king's sons are dead. Only Amnon is dead.”
34 Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi: « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »
In the meantime, Absalom had run away. When the watchman in Jerusalem looked out, he saw a large crowd coming along the road west of him, down the side of the hill.
35 Yonadabi alobaki na mokonzi: — Tala! Bana mibali ya mokonzi bazali koya! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki.
Jonadab told the king, “Can you see? The king's sons are arriving! It's exactly as your servant said.”
36 Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye.
As he finished speaking, the king's sons came in, crying and wailing. Then the king and all his officials also cried loudly.
37 Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.
Absalom ran away to Talmai, son of Ammihud, the king of Geshur. Every day David mourned for his son Amnon.
38 Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato.
After Absalom had run away to Geshur, he remained there for three years.
39 Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.
King David longed to go and see Absalom, for he had finished grieving over the death of Amnon.

< 2 Samuele 13 >